Buku mpe Mbiangi
14. Bandimi Banzemba


“14. Bandimi Banzemba,” Maponi uta na Buku monene (2023).

“14. Bandimi Banzemba,” Maponi uta na Buku monene

Elilingi
bato bazali kosolola

14.

Bandimi Banzemba

14.0

Boyingisi

Mibali to basi oyo babali naino te to oyo babomi libala to bakufeli bazalaka eteni moko ya motuya ya bandimi ya Eklezia. Yango ezali motuya mpo na banso bazua elikya na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto (tala Ether 12:4). Babosolo ya seko oyo elandi ekoki kosunga mpo na bokobi ya elikya ya boye:

  • Makomi ya baprofeta ya mikolo mya suka elobi ete moto nyonso oyo azali na bondimi na kobombaka mayokani ya nsango malamu bakozala na libaku mpo na bonetolami.

  • Ntango eyebani mpe lolenge oyo mapamboli ya bonetolami epesami naino ebimisami te. Kasi yango elakami mpenza (tala Moziya 2:41).

  • Kotalelaka Yesu esengaka botosi ya kokoba mpe kokola na molimo liboso na Ye (tala Yisaya 64:4).

  • Nzambe apesi bomoi ya seko na bana na Ye nyonso. Baoyo nyonso balongobani mpo na likabo ya ngolu bolimbisi ya Mobikisi mpe kobika mitindo na Ye bakozwa bomoi ya seko. (Tala Mosiya 26:30; Moroni 6:8.)

  • Sekele kati na kondimisama oyo etiami misisa na bondimi na Yesu Klisto. Na nzela ya ngolu na Ye, biloko nyonso etali bokufi ekokoma sembo (tala Alma 7:11–13).

Nzambe alingaka bandimi nyonso basunga kati ya mosala na Ye ya lobiko na bapalwasi mpe makonzi na bango (tala 1 Bakolinti 12:12–27 Lokola etambwisami na Molimo, bandimi banzemba babengamaka mpo na kokamba mpe koteya.

Kati ya mokapo oyo:

  • “Bandimi banzemba” ezali mondimi nyonso akoli ya Eklezia oyo abali naino te.

  • “Bilenge bakoli banzemba” ezali baye na mibu 18–30 ya mbotama.

  • “Mikolo banzemba” ezali baye na mibu 31 ya mbotama mpe kino likolo.

14.1

Bandimi Banzemba kati ya Masanga na Mokili

14.1.1

Bokambi ya Etuka

14.1.1.2

Mangomba ya Bilenge bakoli Banzemba mpe Bakolo Banzeka

Bokambi ya likonzi ekelaka lingomba ya bilenge banzemba.

Bokambi ya likonzi ekoki lisusu kokela lingomba ya bakolo banzemba.

Lingomba elukaka kosunga bandimi na nzela ya kimoninga mpe mabaku ya kosangana na mosala ya lobiko mpe ya bonetolami (tala  14,2).

14,1.2

Bokambi na Palwasi

14.1.2.1

Boepisikopo

Boepisikopo ezali na fungola ya kotia bandimi babali na mosala ya lobiko mpe ya bonetoli. Bango basalaka elongo na lisanga ya palwase mpo na koyeba mabiangi mpe botindi ya ndimbola mpo na bandimi babali te. Bango bayebaka mpe babundaka mpo na kosunga kokutana na babosenga ya baboti banzemba.

  • Moko ya boepisikopo akutanaka na elenge akoli monzemba moko na moko mpo na mbala moko na mobu.

  • Boepisikopo ekoki kobongisa lingomba ya bilenge banzemba bakoli ya palwasi.

14.1.2.2

Lisanga likoki ya Bampaka mpe Baye ya Lingomba ya Bamama Basungi Batindami epai ya Bilenge Bakoli Banzemba

Lisanga likoki ya bampaka mpe bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi bakoki kopona moko na kati ya babokambi na bango mpo na kosalisa bilenge bakoli banzemba. Bandeko ya bokambi oyo bayekolaka na ntina ya bolendisi bandimi banzemba ya mikolo mpe kosunga bango bakokisa bamposa na bango.

Mokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe mokambi ya lingomba ya bamama basungi bakoki komema lapole na bokasi yango na liyangani ya lisanga ya palwasi.

14.1.2.3

Bakambi ya Bilenge Bakoli Banzenga

Na palwasi oyo ezali na bilenge bakoli banzemba ebele, boepisikopo ekoki kobenga elenge akoli monzemba moko ya mobali mpe ya mwasi lokola mokambi ya bilenge bakoli banzemba. Mokumba na bango esangisi:

  • Kosungaka bilenge bakoli banzemba basangana na mosala ya lobiko mpe ya bonetolami (tala 14,2).

  • Kosalaka na lingomba ya bilenge banzemba bakoli ya likonzi

  • Kokambaka lingomba ya bilenge bakoli ya palwase soki moko esila kosalema.

  • Kokutanaka mingi mingi na bokambi ya lisangal ikoki ya ba mpaka mpe bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi. Kati ya mayangani wana, bango basololaka na ntina ya bokasi ya bilenge bakoli banzemba mpe lolenge nini kosunga bango bakokisa bosenga na bango. Bango bakotala lisusu mosala ya bilenge bakoli banzemba.

14.2

Kosanganaka na Mosala ya Lobiko mpe ya Bonetoli

14,2.1

Kobikaka Nsango Malamu ya Yesu Klisto

14.2.1.1

Likita ya Mpokwa na Libota mpe Boyekoli Nsango malamu

Bakambi to bandimi oyo bazali na bosenga ya kokota bakoki kobongisa moko to makita ya mpokwa na libota mpo na bakolo banzemba mpe masanga misusu mpo na bilenge bakoli banzemba.

14.2.1.3

Milulu

Na nse ya botambwisi ya bakambi ya palwasi mpe likonzi, bilenge bakoli banzemba bakoki kolengela mpe kosangana na misala oyo ezali kaka mpo na bango. Bandakisa ekoki kosenga:

  • Bakoti na tempelo

  • Mosal ya mambi ya kala ya libota

  • Kokabolaka Nsango malamu

  • Mosala ya lingomba

  • Miziki mpe milulu ya bonkoko

  • Masano

Na nse ya botambwisi ya bakambi ya likonzi, bilenge bakoli banzemba bakoki kolengela misala ya ndenge moko na likonzi.

Bimisa na lokasa