Buku mpe Mbiangi
17. Koteya Nsango Malamu


“17. “Koteya Nsango Malamu,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“17. Koteya Nsango Malamu,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
mama azali koteya mwana mobali

17.

Koteya Nsango Malamu

Toteyaka nsango malamu mpo na kosalisa bato balendisa bondimi na bango kati na Lola mpe Yesu Klisto.

17.1

Mibeko ya Mateya ya Kozala lokola Klisto

Ntango bazali koteya nsango malamu, baboti, bateyi, mpe bakambii balandaka ndakisa ya Yesu Klisto, oyo azali Nkolo Molakisi.

Bakambi bakabolaka oyo mibeko elandi ya koteya lolenge ya Klisto elongo na bateyi kati na bamabongisi na bango. Mibeko yango elimbolami malamu malamu mingi na Koteya na Lolenge ya Mobikisi.

17.1.1

Linga Baye Ozali Koteya

Makambo nyonso Mobikisi asalaka ezali elembo ya bolingo na Ye (tala 2 Nefi 26:24).

17.1.2

Koteya na nzela ya Molimo

Bateyi balukaka bokambi ya Molimo ntango bazali kolengela mpe koteya, mpe bango babundaka mpo na kobika ya kolongobana na bofuli na Ye mokolo moko na moko.

17.1.3

Koteya Malongi

Kolandaka ndakisa ya mobikisi, bateyi batiaka makanisi mingi na oyo ezali ntina, kobombaka bosolo ya nsango malamu. Bateyaka na kosalelaka makomi, bamateya ya ya ba profeta ya mikolo ya nsuka, mpe biloko ya kosalela oyo endimami.

17.1.4

Kobenga Boyekoli ya Mayele

Bateyi bapesaka bandimi makasi ya kozala na mokumba ya koyekola na bango moko.

17.2

Boyekoli mpe Boteyi Nsango Malamu Etie-Libota na katikati

Bakambi mpe bateyi ya Eklezia bapesaka makasi mpe basungaka boyekoli mpe boteyi nsango malamu etie libota na katkati ya libota.

Bakambi mpe bateyi bapesaka bandimi makasi ya koluka lifuli na bango moko na ntina ya lolenge nini kotanga mpe koteya nsango malamu. Bisaleli na bango monene esengeli ezala makomi mpe mateya ya likita linene.

17.3

Mikumba ya Bakambi

  • Pesa ndakisa na koyekola mpe koteya yango na lolenge ya Mobikisi.

  • Ndimela ete mateya kati na mabongisi na bango etongami na bondimi mpe malongi ya sembo.

  • Pesa bosimbi ya kokoba na bateyi kati na mabongisi na bango.

17.4

Mayangani ya Lisanga ya Bateyi

Na mayangani ya lisanga ya bateyi, bateyi bapesanaka toli na ntina ya mibeko ya koteya lolenge ya Mobikisi. Bakutanaka lisusu na oyo etali lolenge nini kobutisa koyekola mpe koteya nsango malamu. Baselaka Koteya na Lolenge ya Mobikisi lokola bisaleli.

Mayangani ya lisanga ya bateyi esalemaka trimestre nyonso katikati ya miniti 50 ya ntango ya kalesi na Eyenga.

Bimisa na lokasa