“18. Kosala Makuli mpe Mapamboli ya Bonganganzambe,” Maponi uta na Buku Monene (2023).
“18. Kosala Makuli mpe Mapamboli ya Bonganganzambe,” Maponi uta na Buku Monene
18.
Kosala Makuli mpe Mapamboli ya Bonganganzambe
18.0
Boyingisi
Makuli mpe mapamboli ezali misala ya bule eesalemi na likokki ya bonganganzambe mpe na nkombo ya Yesu Klisto. Makuli mpe mapmboli ya bonganganzambe epesaka nzela na nguya ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 84:20).
Makuli mpe mapamboli esengeli kosalema na bondimi na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto mpe kolandisama na botambwisi ya Molimo Mosantu. Bakambi bandimisamaka ete yango esalemi na ndingisa esengeli (soki ezali ntina), na likoki ya bonganganzambe esengeli, na lolenge esengelami, mpe na basali elongo balongobana (tala 18.3).
18.1
Makuli na Mosala ya Lobiko mpe Bonetoli
Bonganganzambe esangisi likoki ya koyangela makuli oyo ezali ntina mpo na lobiko mpe bonetoli. Bato basalaka mayokani ya bule na Nzambe ntango bazali kozwa makuli yango. Makuli ya lobiko mpe bonetoli atangami na nse:
-
Libatisi
-
Nkotisa mpe likabo ya Molimo Mosantu
-
Kokulisa ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe bokulisi na mosala (mpo na mibali)
-
Dotasio ya tempelo
-
Kokanga na tempelo
Soki mwana oyo abotamaki kati na liyokani akufi yambo ya mibu 8, makuli moko te esengelami to ekosalama. Soki mwana abotamaki kati na liyokani te, likuli se moko asengeli na yango ezali kokangisama na baboti. Mpo na Bomikabi ya Mobikisi, bana nyonso bakufi yambo ya mibu 8 “ babikisamaki kati na bokonzi ya selesitiale ya lola” (Malongi mpe Mayokani 137:10; tala lisusu Moroni 8:8–12).
18.3
Kosala elongo na Likuli to Lipamboli
Baoyo basalaka to basanganaka kati na likuli mpe lipamboli basengeli kozala na nguya ya bonganganzambe esengeli mpe kozala ya kolongobana. Mingimingi, motindo ya bolongobani ezali oyo esangani na kozala na mokanda ya tempelo. Nzokande, na kotambwisa ya Molimo mpe mitindo ya mokapo oyo, baepisikopo mpe bakambi ya makonzi bakoki kopesa nzela na batata mpe mibali babala oyo bazali na mosala ya bonganganzambe oyo esengeli mpo na kosala to kosala elongo makuli mpe mapamboli mosusu atako soki balongobani mobimba mpo na tempelo te. Moto azali na bonganganzambe oyo azali na masumu ya makasi oyo nanu elobelami te akoki kosala elongo te.
Kosala to koyamba makuli to mapamboli mosusu esengaka bondimami uta na mokambi motambwisi oyo azali na bafungola ya bonganganzambe esengeli (tala 3.4.1). Soki esengeli, bondimami ekoki kopesama na mopesi toli oyo ye apesi nzela. Tala etando oyo elandi. Makambo etali bakambi ya likonzi etali mpe bakambi ya misio. Makambo etali bopisikopo etali mpe bakambi ya bitape.
Bakambi nini oyo Bazali na Bafungola ya Kopesa Nzela ya Kosala to Koyamba Makuli ya Lobiko mpe Bonetoli?
Likuli |
Nani Asimbi Bafungola |
---|---|
Likuli Libatisi | Nani Asimbi Bafungola Episikopo (mpo na bana ya mibu 8 ya mbotama mpe mpo na bandimi bakomama ya mibu 9 ya mbotama mpe bakolo oyo libatisi na bango ezelisamaki mpo na mayele ekoka te) Mokambi ya misio (mpo na babongoli mitema) |
Likuli Nkotisa mpe likabo ya Molimo Mosantu | Nani Asimbi Bafungola Episikopo (mpo na bana ya mibu 8 ya mbotama mpe mpo na bandimi bakomama ya mibu 9 ya mbotama mpe bakolo oyo libatisi na bango ezelisamaki mpo na mayele ekoka te) Mokambi ya misio (mpo na babongoli mitema) |
Likuli Kokulisa ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe bokulisi na mosala (mpo na mibali) | Nani Asimbi Bafungola Mokambi ya Likonzi |
Likuli Dotasio ya tempelo | Nani Asimbi Bafungola Episikopo mpe mokambi ya likonzi |
Likuli Kokanga na tempelo | Nani Asimbi Bafungola Episikopo mpe mokambi ya likonzi |
Bakambi nini oyo Bazali na Bafungola ya Kopesa Nzela ya Kosala to Koyamba Makuli mpe Mapamboli Misusu?
Likuli to Lipamboli |
Nani Asimbi Bafungola |
---|---|
Likuli to Lipamboli Kopesa kombo mpe kopambola bana | Nani Asimbi Bafungola Episikopo |
Likuli to Lipamboli Elambo | Nani Asimbi Bafungola Episikopo |
Likuli to Lipamboli Kokulisa ya Bonganganzambe ya Alona mpe bokulisi na mosala (mpo na bilenge mibali mpe mibali) | Nani Asimbi Bafungola Episikopo |
Likuli to Lipamboli Kotia bandimi pembeni mpo na kosala na mabiangi | Nani Asimbi Bafungola Tala 30.8 |
Likuli to Lipamboli Kobulisa mafuta | Nani Asimbi Bafungola Bondimami esengelami te |
Likuli to Lipamboli Koyangela babeli | Nani Asimbi Bafungola Bondimami esengelami te |
Likuli to Lipamboli Mapamboli ya bolendisi mpe toli, sangisa mapamboli ya tata | Nani Asimbi Bafungola Bondimami esengelami te |
Likuli to Lipamboli Kopambola bandako | Nani Asimbi Bafungola Bondimami esengelami te |
Likuli to Lipamboli Kopambola malita | Nani Asimbi Bafungola Mokambi ya bonganganzambe oyo akambaka mosala |
Likuli to Lipamboli Mapamboli ya Nkoko | Nani Asimbi Bafungola Episikopo |
18.4
Makuli mpo na Bana Bakoli te
Mwana akoli te akoki kopambolama, kobatisama, kokotisama, kokulisama na mosala moko ya bonganganzambe, to kotiama pembeni na libiangi bobele na na bopesi nzela ya (1) baboti oyo bazali na ndingisa engebene na mobeko mpo na kosala elongo na mokano to (2) babateli ya engebene na mobeko.
18.6
Kopesa kombo mpe Kopambola Bana
Bana bapesamaka kombo mpe bapambolama na liyangani ya kokila mpe litatoli na palwase epai wapi baboti na bango bazali.
18.6.1
Nani Apesaka Lipamboli
Likuli ya kopesa nkombo mpe kopambola mwana epesamaka na bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke, kolandisama na Malongi mpe Mayokani 20:70.
Moto to libota oyo azali na mposa ete mwana azwa nkombo mpe lipamboli akobongisa likuli elongo na episoko. Ye azali na bafungola ya bonganganzambe mpo na kopesa nkombo mpe kopambola bana na palwase.
Episikopo apesaka nzela na tata oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke kopesa nkombo mpe kopambola mwana na ye atako tata azali ya kolongobana mobimba mpo na tempelo te (tala 18.3). Baepisoko bapesaka batata makasi ya kolengela bango moko mpo kopambola bana na bangomei.
18.6.2
Mitindo
Na nse ya botambwisi ya bopisikopo, bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke bakosanga na zolongano mpo na kopesa kombo mpe kopambola mwana. Bango batie maboko na bango na nse ya bebe, to batie maboko na bango na pete na moto ya mwana oyo akoli. Nsima oyo akosala mpo na koloba:
-
Alobi na Tata ya Lola lokola na losambo.
-
Alobi ete lipamboli ezali kopesama na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.
-
Apesai mwana nkombo
-
Alobi na mwana
-
Apesi lipamboli na mwana na lolenge akambami na Molimo
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
18.6.3
Mokanda ya Kokoma Mwana mpe Likundoli ya Lipamboli
Yambo Mwana apambolama, kalaka asalelaka Leader and Clerk Resources (LCR) mpo na kolengela Mokanda ya Kokoma Mwana. Nsima ya lipamboli, asali mokanda ya bokoti ya bandimi na systeme yango mpe akolengeli Likundoli ya Lipamboli. Likundoli yango ekotiama linzakaa na episikopo mpe epesami na baboti ya mwana to babateli na ye.
Nkombo na mokanda ya mondimi mpe likundoli esengeli ekokana na likundoli ya mokolo ya mbotama, buku ya bambotama ya leta, to nkombo engebene na mobeko ya mikolo oyo.
18.7
Libatisi
Libatisi ya kozindisa na mayi na moko azali na likoki ezali ntina mpo ete moto akoma mondimi ya Eklezia mpe ayamba Molimo Mosantu. Banso oyo balukaka bonetoli basengeli kolanda ndakisa ya Mobikisi na koyambaka makuli oyo.
18.7.1
Kopesa Nzela mpo ete Moto Azwa libatisi mpe Nkotisa
18.7.1.1
Bana Oyo Bazali Bandimi Bakomama
Episikopo azali na bafungola ya bonganganzambe mpo na libatisi ya bandimi bakomama ya mibu 8 na palwase. Bana yango basengeli bazwa libatisi mpe nkotisa mbala moko to mwa ntango moke nsima ya mibu 8 ya mbotama na lolenge esengeli (tala Malongi mpe Mayokani 68:27). Yango etali bana oyo mokanda ya kokomama bandimi ya Eklezia ezali mpenza (tala 33,6.2). Ntango bango bakokisi mibu 8, episokopo akondimisama ete bango bazali na mabaku nyonso ya kondima nsango malamu mpe kobatisama mpe kokotisa.
Episikopo to mopesi toli moko aponami akotuna mituna na bana bakomisami mpo na libatisi mpe kotisa. Mitindo ezali na 31.2.3.1.
Mpo na kozwa nsango etali kokoma na Mokanda ya Libatisi mpe Kotisa, tala 18.8.3.
18.7.1.2
Bandimi ya sika
Mokambi ya misio asimbi ba fungola ya bonganganzambe mpo bandimi ya sika babatisami na misio. Mpo na ntina yango, bamisionele ya ntango mobimba bakosolola na bandimi ya sika mpo na libatisi mpe kotisa.
18.7.2
Misala ya Libatisi
Mosala ya libatisi esengeli ezala pete, mokuse, mpe elendisami na molimo. Yango ekoki kosangisa oyo elandi:
-
19. Miziki ya bokoti
-
Liloba mokuse ya boyambi uta na ndeko mobali oyo azali kotambuisa mosala
-
Loyembo ya bofungoli mpe losambo
-
Lisikulu moko to mibale ya mikuse elobeli makambo ya nsango malamu, lokola libatisi mpe likambo ya Molimo Mosantu.
-
Miziki eponami
-
Libatisi
-
Ntango moko ya limemia ntango baye oyo basali elongo na libatisi bazali kolata bilamba ya kokauka (miziki to banzembo ya eteyelo ya bana ekoki kobetama to koyembama katikati ya ntango yango)
-
Nkotisa ya bandimibakomama ya mibu 8 ya mbotama; nkotisa ya babongwami soki episikopo alobi (tala 18.8)
-
Bopesi matatoli ya babongwami ya sika, soki bosenga ezali.
-
Loyembo mpe losambo ya kokanga
-
Miziki ya nsima
Ntango mwana moko akomamia nkombo azali komilengela mpo na kozwa libatisi, moko ya bopisikopo mpe bokambi ya Eteyelo ya bana bakosolola na libota mpo na kolengela mpe kopesa mokolo mpe ngonga ya mosala ya libatisi. Moko ya bopisikopo akotambwisa mosala yango. Soki mingi koleka mwana moko bakozwa libatisi na sanza moko, bango bakoki kokabola mosala moko ya libatisi.
Na likonzi yo bana mingi bakomama, bana uta na bapalwase mingi bakoki kokabola mosala ya libatisi moko. Moko ya bokambi ya likonzi to mopesi toli monene oyo atindami akotambwisa mosala yango.
Libatisi ya moko ya libota esengeli te kozelisama nsima kino papa akoki koyamba bonganganzambe mpe kosala libatisi ye moko.
Na nse ya bokambi ya bopisikopo, mokambi ya misio ya palwase (soki moko abiangema) to moko ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka oyo azali kokamba mosala ya bamisionele na palwase balengeli mpe batambwisi miala ya libatisi mpo na babongami. Bango bakoyokana na bamisionele ya ntango mobimba.
18.7.3
Nani Azali kosala Likuli
Likuli ya libatisi esalemaka na nganganzambe to moto azali na ya Bonganganzambe ya Melekisedeke. Mo oyo azali kobatisa asengeli andimama na episikopo (to na mokambi ya miso soki misionele ya mobimba azali kosala libatisi).
Episikopo akoki kopesa nzela na tata oyo azali nganganzambe to moto azali nai Bonganganzambe kobatisa mwana na ye atako soki tata azali ya kolongabana mobimba te mpo na tempelo (tala 18.3). Baepisikopo apesaka ba tata makasi mpo na komilengela mpo na kobatisa bana na bango moko.
18.7.4
Epai wapi Kosala Likuli
Mabatisi esengeli kosalama na liziba ya libatisi soki moko ezali. Soki epai wapi liziba ya libatisi ezali te, mayi ya koleka ya bozangi bokebi ekoki kosalelama.
Mpo na bokebi, mokolo moko ya mayele akoki kozala wana ntango liziba ya libatisi ezali kotondisama mpe akotikala kino mayi ekobimisami, esukuami, mpe etikali na bozangi likama. Liziba ya libatisi esengeli etikala ya kokauka mbalamoko nsima ya mosala ya libatisi nyonso. Bikuke ya liziba ya libatisi esengeli ezala ya kokangama ntango esali kosalelama te.
18.7.5
Bilamba
Moto oyo azali kobatisa mpe moto oyo azali kobatisama balataka bilamba ya pembe oyo ekolakisa nzoto te soki epoli na mayi. Moko alatisami na nguya ya molimo akolata bilamba ya tempelo na nse ya bilamba ya kobatisa ntango azali kosala libatisi. Eteni ya esika esombaka bilamba ya libatisi na mbongo bazui mpe bakofutisa esaleli na yango te.
18.7.6
Banzeneneke
Banzeneneke mibali, oyo bandimami na mokambi ya boyangeli, bakotala libatisi moko na moko mpo na kondimisama solo yango esalemi na ndenge esengeli. Bandimi babatisami kala ya Eklezia, sangisa bana mpe bilenge, bakoki kosala lokola banzeneneka.
Libatisi esengeli ebandelama soki maloba elobami lolenge mongo te lolenge epesami na Malongi mpe Mayokani20:73. Yango esengeli kobandelama soki eteni moko ya nzoto ya moto, suki, to bilamba ekoti mobimba na mayi te.
18.7.7
Mitindo
Mpo na kosala likuli ya libatisi, nganganzambe to mosimbi Bongangzambe ya Melekeisedeke:
-
Akotelema na mayi elongo na moto azali kobatisama.
-
Asimbi loboko ya mobali ya moto azali kobatisama na loboko na ye ya mwasi (mpo na bolamu mpe bosangi likama). Moto azali kobatisama akosimba loboko ya mwasi ya mosimbi bonganganzambe na ye ya mwasi.
-
Atombolaka loboko na ya ya mwasi likolo.
-
Akobenga nkombo ya mutu yango mobimba mpe alobi, “Kozalaka na nguya ya Yesu Klisto, nazali kobatisa yo na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana mobali, mpe ya Molimo Mosantu. Amen” (Doctrine et AlliancesMalongi mpe Mayokani 20:73).
-
Moto akosimba zolo na ye na loboko ya mobali (mpo na bolamu); nsima atie loboko na ye ya mobali likolo ya mokongo ya moto ya kobatisa mpe adindisi ye mobimba na mayi, sangisa na bilamba.
-
Asungi moto mpo na kobimisa ye libanda ya mayi.
18.8
Kotisa mpe Likabo ya Molimo Santu
Nsima ya moto kozwa libatisi, azuaka kotisa ya mondimi ya Eklezia mpe azui likabo ya Molimo Mosantu na kotiama maboko (tala malongi mpe Mpe Mayokani 20:41; Misala 19:1–6). Moto akomi mondimi ya Eklezia nsima ya makuli nyonso mibale ekomami mobimba mpe na ndenge esengeli (tala Yoane 3:5; Malongi mpe Mayokani 33:11; 3 Nefi 27:20).
Episikopo atalaka na bokebi esalelami ya kotisa. Bana ya mibu mwambe ya mbotama bazuaka kotisa bobele mokolo bango bazui libatisi. Bandimi ya sika bazuaka kotisa na liyangani nyonso ya elambo na palwase epai wapi bazuami, mingimingi na Eyenga nsima ya libatisi na bango.
Moko ya bopisikopo alandanga bontambuisi na 29.2.1.1 ntango azalaki kolakisa bandimi ya sika.
18.8.1
Nani Azali kosala Likuli
Bobele mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke oyo alongobani na tempelo akoki kosala mpo na koloba na kotisa. Nzokande, episikopo akoki kopesa nzela na tata oyo asimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke kotelema na kati ya zolongano mpo na kotisa ya mwana na ye atako soki tata azali ya kolongobana mobimba te mpo na tempelo (tala 18.3).
Ata moko ya bopisikopo akosangana na likuli yango. Ntango bamisionele bateyaki mondimi ya sika, episikopo akobenga bango kosangana.
18.8.2
Mitindo
Nanse ya boyangeli ya bopisikopo, moko to mingi ya bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke bakoki kosangana na kotisa. Bango bakotia maboko na bango na pete likolo ya moto ya moto. Nsima oyo akosala mpo na koloba:
-
Akobenga moto na nkombo na ye mobimba.
-
Alobi ete likuli ezali kosalema na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.
-
Akotisi moto lokola mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansatu ba Mikolo mya Nsuka.
-
Alobi “yamba Molimo Mosantu” (te “yamba likabo ya Molimo Mosantu”).
-
Apesi maloba ya mapamboli lokola Molimo ezali kokamba ye.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
18.8.3
Mokanda ya kokoma nkombo mpe Certificat ya Libatisi mpe Kotisa
Yambo ete mwana oyo akomami lokola mondimi atunama mituna mpo na libatisi, kalaka akosalela LCR mpo na kobongisa Mokanda ya Libatisi mpe Kotisa. Episikopo to mopesi toli moko aponami akotambuisi lisolo mpe akotia lisanga na mokanda. Nsima ya libatisi mpe kotisa, kalaka asalelaka mokanda yango mpo na kobongisa kokotisa ya mwana lokola mondimi na LCR
Ntango misionele ya ntango mobimba asololi na mondimi ya sika mpo na libatisi, akokoma Bokoti ya Libatisi mpe Kotisa kosalelaka Area Book Planner (ABP) app. Nsima ya libatisi mpe kotisa, bamisionele bakokoma makambo na ABP, mpe bakotia na kalaka ya palwase ya interneti. Kalaka ya palwase akotala lisusu makambo na LCR mpe akokela dossier ya kimondimi.
Soki mokanda ya kimondimi ekelami, kalaka alengelaka libatisi mpe Kertifica ya Kotisa. likundoli yango ekotiama linzanga na episikopo mpe epesami na moto.
Nkombo ya bokotisi ya mondimi mpe certificat esengeli ekokana na certificat ya mokolo ya mbotama,
18.9
Elambo
Bandimi ya eklezia bakutanaka na mokolo ya Sabata mpo na kosanjola Nzambe mpe kokabola elambo (stala Malongi mpe Mayokans 20:75; 59:9; Moroni 6:5–6). Katikati ya likuli yango, bango bakabolaka liba mpe mayi mpo na kokundola libonza ya mobikisi ya mosuni mpe makila na ye mpe kobandela lisusu mayokani na bango ya bule (tala Matai 26:26–28; Joseph Smith Translation, Mark 14:20–25; Luka 22:15–20; 3 Nefi 18; Moroni 6:6).
18.9.1
Ndingisa mpo na Kopesa Elambo
Episikopo azali na bafungola ya bonganganzambe mpo kopesa elambo na palwase. Baye nyonso basalaka elongo na bolengeli, bopamboli, mpe bokaboli elambo basengeli kozala na ndingisa uta na ye to moto moko na nse ya boyangali na ye.
18.9.2
Nani Azali kosala Likuli
-
Bateyi, banganganzambe, mpe bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke bakoki kolengela elambo.
-
Banganganzambe mpe bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke bakoki kopambola elambo.
-
Badiakono, bateyi, banganganzambe, mpe bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke bakoki kokabola elambo.
18.9.3
Babotambwisi mpo na Elambo
Mpo na lolenge ya bule ya elambo, bakambi ya bonganganzambe basengeli kolelengela na bokebi nyonso mpo ete yango ezala sembo mpe na limemia.
Baye bazali kopesa elambo basengeli kosala yango na lolenge kolongobana, kososolaka ete bango bazali kosala na esika ya Nkolo.
Kokabola elambo esengeli kozala pete mpe na mitindo ebele te.
Atako elambo ezali mpo na bandimi ya Eklezia, eloko moko te esengeli kosalama mpo na kopekisa basusu basangana na yango.
18.9.4
Mitindo
-
Baye bakapolaka, bapambolaka, to bakabolaka elambo yambo basokolaka maboko na bango na sabuni mpo bisokoleli misusu.
-
Bateyi, banganganzambe, to batyo bazali nabonganganzambe bakosala na bokebi ete basani ya mapa naino bakati te, plato ya mayi na kati na bakopo ya peto mpe bilamba ya mesa ya peto ezali na esika yambo ya liyangani.
-
Ntango bandimi ya palwase bazali koyemba loyembo ya elambo, baye oyo bakopambola elambo bakotelema na botosi nyonso, bakolongola elamba ezipi sani ya mapa, mpe bakokata mapa na monene ya moto kotia na monoko.
-
Nsima ya loyembo, moto oyo azali kopambola mapa akofukama mpe akoloba losambo mpo na lipa (see Malongi mpe Mayokani 20:77).
-
Episikopo ekosala na bokebi ete nsambo ya elambo elobama polele, malamu mpe na kolongobana. Soki moto asali libunga na kolobaka mpe abongisi ye moko, kobongisama moko esengelami te. Soki moto abongisi libunga na ye te, episikopo akosenga ye na malamu nyonso kobandela libondeli.
-
Nsima ya losambo, bato bazali na bonganganzambe bakokabola mapa na limemia epai ya bandimi. Mokambi mokonzi azwi yango yambo, nsima na yango ezali na molongo mko etiama te. Soki sani epesami na bandimi mbala moko, bango bakoki kolekisana moko na mosusu.
-
Bandimi bazwi na loboko na bango ya mobali soki ekoki kosalema.
-
Ntango lipa eleki epai ya bandimi nyonso, baye oyo bazali kokabola elambo bakozongisa sani na mesa ya elambo. Baye bazali kopambola elambo bakotia elamba likolo ya sani ya mapa mpe bakolongola elamba likolo ya sani ya mayi.
-
Moto oyo azali kopambola mayi afukami mpe alobi losambo ya elambo mpo na mayi (tala Malongi mpe Mayokani 20:79). Ye akobongola liloba mayi mpo na vinyo.
-
Nsima ya losambo, bato bazali na bonganganzambe na botosi nyonso bakopesa mayi epai ya bandimi. Mokambi mokonzi azwi yango yambo, nsima na yango ezali na molongo mko etiama te.
-
Ntanfo mayi epesami na bandimi nyonso, baye bazali kopesa elambo bazongisi basani na mesa ya elambo. Baye bazali kopambola elambo batie elamba likolo ya basani, mpe baye oyo bapamboli mpe bapesi elambo bafandi na bisika na bako na limemia.
-
Nsima ya liyangani, baye balengelaki elambo bapangusi, bangumbi bilamba ya mesa, mpe baongoli mapa etikalaki.
18.10
Kopesia Bonganganzambe mpe Kokulisa na Mosala moko
Ezali na babokwabani mibale na bonganganzambe: Alona mpe Melekisedeke (tala 3.3; malongi mpe Mayokani 107:1, 6). ntango bonganganzambe epesami na moto moko, ye akulisami lisusu na mosala moko ya bonganganzambe yango. Nsima ya bonganganzambe nyonso epesami na moto, mobali asengeli bobele kokulisama na misala ya bonganganzambe wana.
18.10.1
Bonganganzambe ya Melekisedeke
Mokambi ya likonzi asimbi bafungola ya bonganganzambe mpo na kopesa bonganganzambe ya Melekisedeke mpe bokulisi na misala ya bampaka mpe nganganzambe monene. Na bongo, episoko apesaka na momesano mibeko mpo bamakuli yango.
18.10.1.1
Bampaka
Bandeko mibali oyo balongobanai bakoki kozwa Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe kokulisama bampaka ntango bakokisi mibu 18 ya mbotama to koleka. Na oyo etali mabaku ya bato na bato, episikopo akoloba elenge mobali nini asengeli kopesama mpo na kozwa likuli ya mpaka moke nsima ya mibu 18 ya mbotama na ye to atikala ngonga molayi na lisanga likoki ya banganganzambe
Na kozwaka mokano yango, episikopo asololaka yambo na elenge mobali mpe baboti to babateli na ye. Mibali balongobani basengeli kokulisama bampaka na mibu 19 yambo balongwa na ndako mpo na eteyelo ya mikolo, kosala misio ya ntango mobimba, kosala mosala ya kisoda, to kondima mosala ya ntango mobimba.
Mibali oyo babatisami kala te ya mibu 18 ya mbotama bakulisama bampaka nsima ya bango:
-
Koyamba Bonganganzambe ya Alona mpe kosala lokola banganganzambe.
-
Kokolisa bososoli ekoki ya nsango malamu.
-
kolakisa kolongobana na bango.
Ngonga moko te eyebami lokola mondimi ya Eklezia esengami.
18.10.1.2
Banganganzambe minene
Mibali bakulisamaka banganganzambe minene ntango bango baiangemi na bokambi ya likonzi, lisanga linene, to bopisikopo.
18.10.1.3
Bosololi mpe Bosungi
Na bopesi nzela ya bokambi ya likonzi, episikopo asololaka na ndeko mobali lokola elakisami na likomi ya mokanda ya Bonganganzambe ya Melekisedeke. Nsima moko ya bokambi ya likonzi lisusu akosolola na ye. Na bopesi nzela uta na mokambi ya misio, mokambi ya disitiliki akoki kosolola na ndeko mobali mpo na kokulisama mpaka (tala 6.3).
18.10.2
Bonganganzambe ya Alona
Episikopo azali na bafungola ya bonganganzambe mpo na kopesa Bonganganzambe ya Alona mpe kokulisa na misala ya diakona, moteyi, mpe nganganzambe. Bandeko mibali oyo balongobani bakuisami mingi na misala oyo na bamibu oyo elandi, kasi liboso te:
-
Diakona na ebandeli ya mobu bakokokisa mibu 12
-
Moteyi na ebandeli ya mobu bakokokisa mibu 14
-
Nganganzambe na ebandeli ya mobua bakokokisa mibu 16
Episikopo mpe mopesi toli oyo atindami akosolola ba baye oyo basengeli kokulisama badiakono mpe bateyi mpo na koyeba soki bango bazali ya kolengelama mpenza na molimo. Episoko asololaka na bandeko mibali oyo basengeli kokulisama banganganzambe.
Yambo ya kosolola na elenge mobali mpo na likuli ya bonganganzambe, moko ya bopisikopo akozwa ndingisa uta baboti to babateli ya elenge mobali. Soki baboti bakabwana, akozwa ndingisa ya (ba)moboti nabobatelaya engebene na mobeko.
18.10.3
Bolakisi ya Mondimi mpo na Kosungama yambo Ye Akulisamai
Nsima ya ndeko mobali kosolola mpe kokutama ya kolongobana mpo na kokulisama na mosala ya bonganganzambe, ye alakisami mpo na bosungi (tala Maloni mpe Mayokani 20:65, 67). Bandeko mibali ya kokulisa bampaka mpe nganganzambe minene balikasamaka na moko ya bokambi likonzi na liyangani linene ya likita ya likonzi (tala 6.3 mpo na malakisi mpo na bakambi ya disitiliki). Bandeko mibali ya kokulisa lokola badiakono, bateyi, to banganganzambe balakisamka na moko ya bopisikopo na liyangani ya elembo.
Moto oyo azali kotambuisa bosungi asengaka na bandeko mibali kotelema. Alobaka likanisi ya kopesa Bonganganzambe ya Alona to ya Melekisedeke (soki esengelami) mpe kokulisa bandeko na mosala ya bonganganzambe. Ye nsima akobenga bandimi kosunga likanisi yango. Mpo na ndakisa, kolakisa ndeko mobali yako kukulisa mpaka, akoki kosalela maloba lokola oyo:
“Tokanisi ete [nkombo] ayamba Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe akulisama lokola mpaka. Baye bandimi bakoki kolakisa yango na kotombola likolo. [Bopemi ya mokuse mpenza.] Baye baboyi, soki bazali, bakoki mpe kolakisa yango. [Bopemi ya mokuse mpenza.]
Soki ndeko moko oyo akoki atelemeli likuli, mokambi mokonzi to mokambi ya bonganganzambe atindami akokutana na ye mobali to mwasi na nkuku nsima ya liyangani. Mokambi akoluka koyeba mpo na nini mondimi atelemeli yango. Akoyeba soki mondimi ayebi etamboleli oyo ekoki kolongola moto kozalaka kokula na mosala ya bonganganzambe.
Na mabaku mosusu, ndeko mobali akoki kosengela kokula mpaka to nganganzambe monene yambo ye akoka kolakisama na likita ya likonzi. Ntango yango esalemi, akolakisama na liyangani ya elambo ya palwase na ye mpo na bosungi. Nsima ye akolakisama na likita ya likonzi oyo elandi mpo na kosilisa likuli (kolandisaka nzela mpo na bosungi, elobelami likolo).
18.10.4
Nani Azali kosala Likuli
Mokambi ya likonzi to mosimbi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke na nse ya bokambami na ye akoki kokulisa mobali na mosala ya mpaka. Na bondimami ya mokambi ya misio, mokambi ya distiliki to moto moko na nse ya bokambi na ye akoki kosala likuli (tala 6.3). Bobele bato bazali na Bonganganzambe ya Melisedeke bakoki kotelema na zolongano.
Mokambi ya likonzi to nganganzambe monene na nse ya bokambi na ye akoki kokulisa mobali moko na mosala ya nganganzambe monene. Bobele banganganzambe minene bakoki kotelema na zolongano.
Moto oyo azali kokulisa mobali moko mpo na mosala ya Bonganganzambe ya Melekisedeki asengeli kolongobana mpo na tempelo. Mokambi ya likonzito moto moko aponi asengeli wana.
Nganganzambe to moto azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke akoki kokulisa ndeko mobali na mosala ya diakono, moteyi, to nganganzambe. Asengeli kozwa ndingisa na episikopo. Episikopo to moto moko aponami asengeli kozala wana.
Mpo na kozala elongo na bokuli ya Bonganganzambe ya Alona, moto yango asengeli kozala nganganzambe to mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke.
Episikopo akoki kopesa nzela na tata oyo azali nganganzambe to oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke mpo na kokulisa mwana na ye ya mobali na mosala ya diakono, moteyi, to nganganzambe ata soki tata azali kolongabana mobimba te mpo na tempelo (tala 18.3). Baepisikopo bapesaka baboti makasi ya komilengela bango moko mpo na kokulisa bana mibali na bango moko.
18.10.5
Mitindo
Mpo na kopesa bonganganzambe mpe kokulisa moto na mosala ya bonganganzambe, moko to mingi ya bato bazali na bonganganzambe oyo bapesami likoki batie maboko na bango na pete likolo ya mutu ya moto yango. Nsima oyo akosala mpo na koloba:
-
Abengi moto na nkombo na ye mobimba.
-
Alobi likoki azali na yango ye moko mpo na kosala likuli (ezala Bonganganzambe ya Alona to ya Melekisedeke).
-
Apesi Bonganganzambe ya Alona to ya Melekisedeke, soki epesamaki naino te.
-
Akulisi moto na mosala ya Bonganganzambe ya Alona to ya Melekisedeke mpe apesi ye banzela, banguya, mpe likoki ya mosala wana.
-
Apesi maloba ya mapamboli lokola Molimo ezali kokamba ye.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
Mpo na okulisa moto moko na mosala ya bonganganzambe nsima bonganganzambe oyo esengalamaki esilaki kopesamela ye, moto oyo azali kosala likuli akolongola eteni ya 3.
18.10.6
Mokanda mpe likundoli ya Likuli
Yambo ndeko mobali basolola na ye mpo akulisama na mosala moko ya Bonganganzambe ya Alona, kalaka asaleka LCR mpo na kolengela Mokanda ya Bokulisi Bonganganzambe ya Alona. Episikopo to mopesi toli moko atindami akombi lisolo mpe atie lizaka na mokanda soki balolenge nyonso ya kolongobana emonani.
Nsima ya likuli, episikopo to mopesi toli moko atindami abakisaka na mokanda mpe apesi yango na kalaka. Ye akokoma likuli na LCR mpe akolelngela certificat ya likuli.
Mboko eyebani ya moto nde esengeli esalelama na mokanda mpe certificat ya likuli.
18.11
Botiami Pembeni ya Bandimi mpo na Kosala na Mabiangi
Bandimi oyo babangami mpe basungami bisika biyike basengelami batiama pembeni mpo na kosala na esika yango (tala Yoane 15:16; makulimpe Malongi 42:11; tala lisusu 3.4.3.1 in this handbook). Ntango ya botiami pembeni, moto apesamelaka (1) nguya ya kosala na libiangi mpe (2) maloba ya lipamboli na nzela ya Molimo.
Bakambi ya Likonzi, baepisikopo, mpe bakambi ya lisanga likoki koyamba bafungola ya bokambi ntango bango batiami pembeni (tala 3.4.1.1). Atako, loloba bafungola esengeli kosalelama te ntango ya botiami pembeni ya bandimi mpo na kosala na mabiangi misusu, sangisa bapesi toli na babokambi.
18.11.1
Nani Asalaka Botiami Pembeni
Botiami pembeni esalemaka na mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke. Asengeli kozwa nzela uta na mokambi oyo asimbi bonganganzambe oyo esengeli. Baye bapesami likoki ya kosala botiami pembeni balakisami na 30.8. Mpaka asengeli te kosala lokola molobi to kotelema na zolongano ntango mobali azali kotiama pembeni mpo na mosala moko oyo esengi ye kozala nganganzambe monene.
Na nse ya boyangeli ya bokambi mokonzii, moko to mingi yabato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke basengeli kosala elongo na botiam pembeni. Bakambi batiamaka pembeni yambo ya bapesi toli na bango.
Mokambi mokonzi akoki kopesa nzela na mobali to tata oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke atelema na zolongano mpo na botiami pembeni ya mwasi to bana na ye atako soki azali ya kolongabana mobimba te mpo na tempelo (tala 18.3).
18.11.2
Mitindo
Bakumbi ya Bonganganzambe ya Mlelkisedeke moko to mibale batiaka maboko na bango na pete likolo ya mutu ya moto. Nsima oyo akosala mpo na koloba:
-
Akobenga moto na nkombo na ye mobimba.
-
Alobi ete azali kosalaka na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke
-
Atie moto pembeni mpo na libiangi na likonzi, palwase, lisanga likoki, to kelasi.
-
Apesi bafungola soki moto asengeli kozwa yango.
-
Apesi maloba ya mapamboli lokola Molimo ezali kokamba ye.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
18.12
Mafuta Mansantu
Bato bazali ya Bonganganzambe ya Melekisedeke basengeli santisa mafuta ya olive yambo yango ealelama mpo na kopakola mobeli to motungisami (tala Yakobo 5:14). Mafuta mususu te ekoki kosalelama.
Bandimi bakoki kolambela te mafuta ebulisami to kopakola yango na biteni ya nzoto oyo ebeli.
18.12.1
Nani Azali kosala Likuli
Moko to mingi ya Bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke bakoki kobulisa mafuta. Bango basengeli koluka ndingisa uta na mokambi ya bonganganzambe te.
18.12.2
Mitindo
Mpo na kobulisa mafuta, moto azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke:
-
Asimbi molangi ya mafuta efunguami.
-
Alobi na Tata ya Lola lokola losambo.
-
Alobi ete azali kosalaka na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke
-
Abulisi mafuta (mulangi te) mpe atie yango pembeni mpo na kopakola mpe kopambola bato ya bokono mpe batungisami.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
18.13
Kosungana bato na Bokono
Kosungana bato na bokono “na botii na maboko” lokola biteni mibale: bopakoli mafuta mpe bokangisi mafuta elongo na lipamboli. Soki mafuta ebulidami ezali not, lipamboli ekoki kopesama na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke na bozangi bopakoli mafuta.
18.13.1
Nani Apesaka Lipamboli
Bobele bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke oyo balongobani bakoki kosunga bato na bokono mpe batungisami. Bango basengeli koluka ndingisa uta na mokambi ya bonganganzambe te. Soki ekoki kosalemai, tata oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke akopambola babeli ya libota na ye.
Mingimingi, bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke asungaka bato na bokono. Nzokande, moko akoki kosala nyonso mibale bopakoli na bokangisi.
18.13.2
Mitindo
Bopakoli ya mafuta esalamaka na mosimbi moko ya Bonganganzambe ya Melelekisedeke. Ye:
-
Atangisi litanga ya mafuta ebulisami na mutu ya moto.
-
Atie maboko na ye na pete likolo ya mutu ya moto mpe abengi ye na nkombo na ye mobimba.
-
Alobi ete azali kosalaka na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke
-
Alobi ete azali kopakola na mafuta oyo ebulisamaki mpo bopakoli mpe kopambola bato ya bokono mpe batungisami.
-
Akangaka na nkombo ya Yesu Klisto.
Mpo na kokangisa bopakoli, bato bazali naBonganganzambe ya Melekisedeke moko to mibale bakotia maboko na bango na pete likolo ya mutu ya moto. Nsima moko oyo azali kokangisa bopakoli:
-
Akobenga moto na nkombo na ye mobimba.
-
Alobi ete azali kokangisa bopakoli na nguya ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.
-
Apesi maloba ya mapamboli lokola Molimo ezali kokamba ye.
-
Akangaka na nkombo ya Yesu Klisto.
18.14
Mapamboli ya Kolendisa mpe Toli, Sangisa Mapamboli ya Tata
18.14.1
Nani Apesaka Lipamboli
Basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke bakoki kopesa mapamboli ya kolendisa mpe toli na bato libota mpe na basusu oyo basengi yango.
Tata oyo asimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke akoki kopesa mapamboli ya tata na mwana na ye. Baboti bapesaka bana na bango makasi ya koluka mapamboli ya tata na ngonga ya bosenga. Mapamboli ya Tata ekoki komama mpo na esaleli ya moto yemoko.
Moto azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke esengeli te koluka bondimami ya mokambi ya bonganganzambe mpo na kopesa lipamboli ya kolendisa mpe ya toli to lipamboli ya tata.
18.14.2
Mitindo
Mpo na kopesa lipamboli ya kolendisa mpe ya toli to lipamboli ya tata, bato bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke moko to mingi batie maboko na bango na pete likolo ya moto ya moto. Nsima oyo akosala mpo na koloba:
-
Akobenga moto na nkombo na ye mobimba.
-
Alobi ete lipamboli ezali kopesama na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.
-
Apesi maloba ya lipamboli, kolendisa, mpe toli lolenge Molimo ekambi.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
18.15
Bobulisi Bandako
Bandimi ya Eklezia bakoki kobulisa bandako na bango na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.
18.15.2
Mitindo
Mpo na kobulisa nadako, moto azali na Bonganganzambe:
-
Alobi na Tata ya Lola lokola losambo.
-
Alobi ete azali kosalaka na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke
-
Abulisi nda lokola esika moko ya bule epai wapi Molimo Mosantu akoki kofanda mpe apesi maloba misusu lokola Molimo akambi.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
18.16
Bobulisi Malita
18.16.1
Nani Abulisaka Malita
Moto oyo abulisaka malita asengeli kozala na Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe kopesama nzela na mokambi ya bonganganzambe oyo azali kombaka mosala.
18.16.2
Mitindo
Mpo na kobulisa lilita, moto azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke:
-
Alobi na Tata ya Lola lokola losambo.
-
Alobi ete azali kosalaka na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke
-
Abulisi mpe atiki esika ya lilita lokola esika ya bopemi mpo na nzoto ya moweyi.
-
Asambeli mpo ete esika ezala ya kopetwama mpe ebatelama kino Lisekwa (soki esingeli).
-
Asengi Tata ya Lola mpo na kolendisa libota mpe akoloba makanisi lolenge Molimo ekokamba.
-
Akangi na nkombo ya Yesu Klisto.
Soki nzoto ya mondimi moko ya Eklezia ezikisami, mokambi oyo azali koyangela akosalela makanisi na ye mpo na kozwa mokano soki ebongi kobulisa esika wapi putulu ebombami.
18.17
Mapamboli ya Nkoko
Mondimi nyonso alongobani, abatisami asengeli kozwa lipamboli ya nkoko, oyo epesaka bokambi efulama uta na Tata ya Lola (tala Genese 48:14–16; 49; 2 Nefi 4:3–11).
Episikopo to mopesi toli moko atindami asololi na bandimi oyo bazali na mposa ya kozwa lipamboli ya nkoko Soki mondimi azali ya kolongobana, motuni akolengela Mokanda ya Lipamboli ya nkoko. Atie yango kati ya Patriarchal Blessing System na ChurchofJesusChrist.org.
Moto oyo azali kosala Mokanda ya Lipamboli ya Nkoko atali na bokebi ete mondimi akoli na makanisi mpenza mpo na kososola ntina mpe lolenge ya bule ya lipamboli.
18.17.1
Kozwa ya Lipamboli ya Nkoko
Nsima ya kozwa mokanda, mondimi akutani na nkoko mpo na kobongisa mokolo ya bokutani mpo na kozwa lipamboli ya nkoko. Na mokolo ya bokutani, mondimi asengeli kokende epai ya nkoko na makanisi ya losambo mpe bilamba ya eyenga.
Lipamboli moko na moko ya nkoko ezali bule, ya bonkutu, mpe ya moto ye moko. Na bongo, yango epesamaka na nkuku longola se mpo na motango moke ya bato ya libota oyo bakoki kozala wana.
Moto oyo azali kozwa lipamboli ya botata asengeli kolinga maloba na yango, kokanisa yango, mpe kobika ya kolongobana mpo na kozwa mapamboli elakami na bomoi oyo mpe ya boseko.
Bandimi ya Eklezia basengeli tkokokanisa mapamboli tempe basengeli kokabola yango te longola bobele elongo na bato ya libota ya pembeni. Mapamboli ya Nkoko esengeli te etangama na mayangani ya Eklezia to babokutani mosusu ya bato mingi.