Buku mpe Mbiangi
20. Milulu


“20. Milulu,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“20. Milulu,” , Maponi uta na Buku monene

Elilingi
elenge mobali na mayi ekopumba

20.

Milulu

20.1

Bantina

Milulu ya Eklezia ememaka bandimi mpe basusu kosangana lokola “bai mboka na basantu” (Baefese 2:19). Bantina mpo na masano ekoki kokotisa maye malandi:

  • Kotonga bondimi kati na Yesu Klisto.

  • Kopesa bosakani mpe kokembisa bomoko.

  • Kopesa mabaku ya bokoli ya moto ye moko.

  • Kolendisa bato mpe mabota.

  • Kosunga bandimi basangana na mosala ya lobiko mpe ya bonetoli (tala 1.2).

20.2

Kosala Mwango ya Milulu

Liboso ya kosala mwango ya molulu, bakambi bakotala bamposa ya molimo mpe ya ntango ya bandimi. Bakambi balukaka bokambami ya Molimo ntango bazali kokana lolenge nini ya molulu ekosunga mpo na kokokisa bamposa maye.

20.2.1

Mokumba ya Kosala Mwango ya Milulu

Milulu ya Palwasi ekoki kobongisama na lolenge nyonso ya banzela eye, etaleli bamposa ya mboka.

  • Lisanga ya Palwasi ekoki kokengela mwango.

  • Lisanga ya Palwasi ekoki kotinda Mabongisi songolo kosunga mpo na kobongisa masano moko to ebele.

  • Ntango esengami mpe mapi bandimi bazali ya kokoka, episikopo na basungi na ye bakoki kobonzisa lisanga ya masano ya palwasi.

Mpo na kozwa bansango mingi koleka na ntina ya mwango ya masano ya bilenge ya palwasi, tala 10.2.1.3 mpe 11.2.1.3.

20.2.2

Kobenga Banso Basangana

Baye bazali kobongisa masano basangeli kosembola loboko na banso, mingimingi bandimi ya sika, bandimi ya mosala moke, bilenge, bakolo minzemba, baye bazali na bibosono, mpe bato ya biyambi.

Milulu masengeli te matiya mokumba na bakambi mpe bandimi.

20.2.3

Mibeko

Milulu ya Eklezia esengeli ezala kolendisa mpe kobeta nsete na oyo ezali “bolamu, bolingo, to lisolo ya malamu to kitoko ” (Biteni ya Bondimi 1:13). Milulu masengeli te kokotisa eloko songolo oyo ezali kotelemela mateya ya Eklezia.

20.2.6

Misolo mpo na Milulu

Mingi ya masano masengeli mazala na bopete mpe ezala na motuya moke to ya ofele. Bosaleli songolo ya misolo esengeli endimama yambo na episikopo na basingi na ye to bakambi ya likonzi.

Bandimi basengeli te na momesano kofuta mpo na kosangana na masano. Mpo na polotiki mpe malako na ntina ya misolo ya masano, tala 20.6.

20.4

Likita ya Bilenge

Kobandaka na sanza ya yambo ya mobu bazali kokoma na mbula 14, bilenge mibali mpe bilenge basi babiengami kosangana elongo kati na likita ya bilenge. Makita ya bilenge esalamaka na momesano mbula nyonso na palwasi to na likonzi. Ekoki mpe kosalema na makonzi ebele to na etuka enene. Na mobu eye bilenge baponami mpo na kosangana na likita ya FSY, makonzi mpe bapalwasi basengeli te kosala makita ya bilenge.

Makita ya bilenge ya palwasi ebongisami mpe etambwisami na lisanga ya bilenge ya palwasi, na nse ya bokambami ya episikopo na basungi na ye(tala 29.2.6). Episikopo na basungi na ye bakozwa kondimama ya bokambi ya likonzi ya mabongisi ya likita ya bilenge ya palwasi.

Ntango bakambi mpe bilenge bazali kolengela likita ya bilenge, basengeli kolanda politiki kati na mokapo mpe milongo miye milandi:

  • Moto ya likambo ya bilenge ya Eklezia ekoki kosalelama lokola moto ya likambo ya likita.

  • Kobongisa masano maye mazali na boyokani na moto ya likambo.

  • Kozwa kondimama ya episikopo na basungi na ye to bokambi ya likonzi mpo na banso baye bakoloba mpe masano.

  • Kotiya bokengeli malamu ya bakolo na ngonga nyonso (tala 20.7.1).

20.5

Politiki mpe Malako mpo na Boponi mpe Bolengeli Milulu

20.5.1

Milulu ya Monbongo to Politiki

Milulu masalemi mpo na mombongo to ntina ya politiki songolo epesami ndingisa te (tala 35.5.2).

20.5.2

Mabina mpe Miziki

Na nyonso ya mabina, bilamba, monzele, minda, lolenge ya mabina, maloba ya nzembo, mpe miziki masengeli ekela esika moko wapi Molimo ya Nkolo ekoki kozala.

20.5.3

Butu ya Mokolo ya yambo

Bandimi batindikami kosala masano ya libota mokolo ya yambo to na bantango mosusu. Milulu ya Eklezia te, mayangani, to misala ya libatisi esengeli esalema sima ya 6:00 sima ya nzanga mokolo ya yambo.

20.5.5

Milulu ya Butu

Milulu ya butu mpo na masanga elongo ya bilenge mibali mpe bilenge basi esengeli ezwa ndingisa epayi na episikopo mpe mokambi ya likonzi. Ezali solo lolenge moko mpo na masano kati na bandimi minzemba ya mibali mpe basi.

Milulu ya butu kati na ndako ya mayangani ya Eklezia to lopango ya ndako ya mayangani endimami te.

20.5.8

Kokumisa Mokolo ya Saba

Camp moko te ya Eklezia, milulu ya masano, to milulu ya bopemisi nzoto esengeli elengelama mokolo ya Eyenga. Esengeli te masanga ya bilenge to misusu mabemba kokende to kozonga na kan to likita na mokolo ya Eyenga.

20.5.10

Kokende kotala tempelo

Kokennde kotala Tempelo ebongisami na palwasi to na likonzi kati na tempelo ya disitiliki eponami.

20.6

Politiki mpe Malako mpo na Boponi mpo na Misolo ya Milulu

20.6.1

Milulu Efutami na Msolo ya bidje ya Palwasi to Misolo ya Likonzi

Misolo ya bidje ya palwasi to ya likonzi esengeli esalelama mpo na kofuta masano manso—na kolongola maye kati na molongo 20.6.2.

20.6.2

Misolo mpo na Kan ya bilenge

Soki bidje ya palwasi to ya likonzi ezali na misolo ya kokoka te mpo na masano na milongo ya nse, bakambi bakoki kosenga bayangani kofuta mpo na ndambu to mobimba na yango:

  • Kan ya ntango molayi moko na mobu ya Bonganganzambe ya Alona to molulu ekokana.

  • Kan ya ntango molayi moko na mobu ya Bilenge Basi to molulu ekokana.

Bosaleli misolo to mobembo mpo na kan ya mobu esengeli te eleka mingi. Bozangi ya misolo ya moto esengeli te epekisa mondimi kasangana.

20.6.3

Misolo mpo na Makita ya FSY

Bilenge bakoki kosengama kofuta mbongo mpo na kosangana na makita ya Jeunes Soyez Forts ( FSY) Soki motuya ekopekisa elenge asangana, episikopo akoki kosalela misolo ya bidje ya palwasi mpo na kofuta mobimba to ndambo ya motuya eye. Tala FSY.ChurchofJesusChrist.org.

20.6.5

Milulu ya Bokongoli Misolo

Kobimisa misolo mpo na masano ya likonzi mpe palwasi efutamaka na momesano na misolo ya bidje. Nzokande, Mokambi ya likonzi to episikopo akoki kopesa nzela na molulu moko ya bokongoli misolo na mbula nyonso mpo na bantina kaka maye malandi:

  • Mpo na kosunga kofuta mpo na milulu etangami kati na 20.6.2 mpe 20.6.3.

  • Mpo na kosunga kosomba bisalelo eye eteni azali na mposa mpo na Kan ya mobu.

20.7

Politiki ya Bokengi mpe Malako mpo na Milulu

20.7.1

Bokengeli ya Mokolo

Soki moke bakolo mibale basengeli bazala na masano manso ya Eklezia oyo esangisi bana mpe bilenge. Bakolo ya kobakisa bakoki kosengama kotalaka monene ya lisanga, makoki esengami mpo na molulu, to makambo mosusu. Baboti batindikami mpo na kosunga.

Baye banso bazali kosala na bana to bilenge basengeli basilisa kolanda mateya matali kobatela bana mpe bilenge. Tala ProtectingChildren.ChurchofJesusChrist.org.

20.7.2

Mbula Esengeli mpo na Kosangana na Milulu ya Bilenge

Na bondimami ya baboti na bango, bilenge bakoki kosangana na masano ya butu kobanda na sanza ya yambo ya mobu bakokisi 12. (Bilenge basi mpe bilenge mibali oyo bakuli babongi na mokanda mpo na tempelo kobanda na sanza ya yambo ya mobu bakokisi 14.

20.7.4

Ndingisa ya Moboti

Bana mpe bilenge bakoki te kosangana na molulu ya Eklezia kozanga ndingisa ya baboti to bakengeli na bango. Mpo na masano ya Eklezia oyo ebakisi bovandi tii butu, mobembo ya molayi, to makama makasi oyo eleki ya mikolo nyonso, Kondimama ekomama esengelami.

Baboti mpe bakengeli bakopesa kondimama na bango na kotiyaka elembo kati na Permission and Medical Release form.

20.7.5

Balapole ya mbeba

Mbemba nyonso ekokoma ntango ya molulu ya Eklezia esengeli epesama lapole na bakonzi ya leta Esengeli koyebisa episikopo mbala moko. Malako mpo na bandimi mazali kati na 38.6.2.7. Malako mpo na baepisikopo mazali kati na 38.6.2.1.

20.7.6

Bokebi ya Bokengi, Eyano ya Likama, mpe Lapole ya Likama

20.7.6.1

Bokebi Ya Bokengi

Bakambi mpe basangani na bokebi bakotala molulu mpo na kosala ete likama ya mpota to bokono ezala moke. Lisano esengeli mpe lisusu elakisa likama moke ya bobebisi ya lopango. Ntango ya masano, bakambi bakosala makasi nyonso mpo na kapesa bokengi.

20.7.6.2

Eyano ya Likama

soki likama to kozoka ekomi na lopango ya Eklezia to ntango ya molulu ya Eklezia, bakambi bakolanda malako maye, ndenge ekoki kosalelama:

  • Kopesa lisungi ya liboso. Soki moto azali na mposa ya lisungi ya lopitale, benga misala ya lombango ya lopitale. Lisusu, benga moboti, mokengeli, to ndeko mosusu ya libota mpe episikopo to mokambi ya likonzi.

  • Soki moto akeyi kobunga to akufa, mbala moko yebisa bakonzi ya mibeko ya esika.

  • Pesa lisungi ya mayoki.

  • Kotinda te to kopekisa te likambo ekende na bazuzi. Kozwa mokano te na nkombo ya Eklezia.

  • Bosangana mpe bozwa bankombo ya banzeneneke, banumelo na bango, matatoli ya nini eleki, mpe bafoto.

  • Pesa lapole ya likama (tala 20.7.6.3).

20.7.6.3

Bopesi Lapole ya Likama

Makambo oyo elandi esengeli kotindama lapole na incidents.ChurchofJesusChrist.org.

  • Likama moko to mpota esalemi kati na lopango ya Eklezia to na ntango ya masano.

  • Moto oyo azaliki kosangana na molulu ya Eklezia abungi.

  • Ya moto, Ya leta, to lopango ya Eklezia ebebi ntango ya molulu ya Eklezia.

  • Likambo na bazuzi ezali kobundisa to kowelisama.

Soki molulu moko ememi mpota monene, liwa, to kobunga ya moto, mokambi ya likonzi, episikopo to mondimi ye atindaki akobenga mbala moko bilo ya etuka enene.

20.7.6.4

Asiranse mpe Mituna

Soki mpota ezokami ntango ya molulu moko ya Eklezia, bakambi bakoloba soki manaka ya Lisungi ya Lopitale mpo na Lisano ya Eklezia ekoki kosalema.

Na bambala misusu, mokambi ya likonzi to episikopo akoki kazala na mituna na ntina ya bopesi bokengi to bifundeli na ntina ya Eklezia Mokambi ya likonzi (to episikopo na nse bokambami na ye) akotinda mituna nyonso na Risk Management Division to bilo ya etuka.

20.7.7

Mobembo

Mobembo mpo na masano ya Eklezia esengeli endimama na episikopo to mokambi ya likonzi. Mobembo eye esengeli te epesa mokumba makasi na bandimi. Mobembo ya nzela molayi mpo na masano ya Eklezia etindikami te.

Ntango ekoki kosalema, masanga ya Eklezia masengeli kosalela mituka ya mombongo mpo na mobembo ya nzela molayi. Esengeli epesama ndingisa mpe ebatelama na assuranse ya mokumba.

Ntango masanga ya Eklezia babembi na mituka ya moto, motuka nyonso esengeli ezala kosala malamu. Moto nyonso asengeli asalela mokaba ya kiti. Mokumbi nyonso asengeli kozala na ndingisa ya kokumba, moto ya boyanoli mpe mokolo.

Bimisa na lokasa