Buku mpe Mbiangi
21. Mosala ya Kosalisa


“21. Mosala ya Kosalisa,” Maponi uta na Buku ya Monene (2023).

“21. Mosala Ya lisalisi,” Maponi uta na Buku ya Monene

Elilingi
mibali bazali kotombola libanga

21.

Mosala ya Kosalisa

21.0

Boyingisi

Mosala ya lisalisi elingi koloba kosalisa basusu lokola Mobikisi asalaki (tala Matai 20:26–28).

Nkolo alingi bandimi na banso ya Eklezia na Ye bazwa lisungi ya ndenge wana. Mpo na ntina yango, basimbi bonganganzambe batindami lokola bandeko mibali ya lisalisi na libota ya mondimi mokomoko. Bandeko basi ya lisalisi batindami na basi mikolo mokomoko

21.1

Mokumba ya Bandeko Mibali mpe Basi ya Kosalisa

Bandeko basi mpe mibali ya lisalisi bazali na mikumba miye milandi mpo na bato mpe mabota bapesami na bango:

  • Kosunga bango kolendisa kondima na bango na Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

  • Kosunga bango bamilengela kosala mpe kobatela mayokani na Nzambe ntango bazui makuli.

  • Bamona bamposa mpe bapesa bolingo lokola ya Klisto, kobatela, mpe misala.

  • Kosunga bango bakoma bamikoki na molimo mpe na ntango.

21.2

Kobongisa Mosala ya Kosalisa

21.2.1

Kosala Bitinda

Bokambi ya Lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi na losambo bakoyekola bitinda mpo na bandeko mibali mpe basi ya lisalisi. Batindaka na malamu bandeko mibali mibale to bandeko basi mibale lokola baninga ya mosala. Bakoluka kondimama ya episikopo mpo na moninga ya mosala mpe bitinda.

Babalani mibale bakoki kotindama kosalisa elongo epai ya moto moko to libota.

Bandeko mibali mpe basi ya lisalisi babengamamaka te, basungamaka, to batiamiaka mpembeni te.

21.2.2

Mosala ya Kosalisa mpo na Bilenge

Elenge mwasi akoki kosala lokola moninga ya mosala ya lisalisi na ndeko mwasi ya lingomba ya bamama basungi ntango Elenge mwasi alingi mpe azali na makoki. Akoki kobanda kosala na mbula akomi na mibu 14.

Elenge mobalii akoki kosala lokola moninga ya mosala ya lisalisi na mosimbi ya Bonganganzambe ya Melekisedeki ntango ye akuli bonganganzambe ya moteyi to nganganzambe.

21.3

Masolo ya Mosala ya Kosalisa

Mokambi lisanga likoki ya bampaka mpe basungi na ye bakosolola na bandeko mibali ya lisalisi. Mokambi ya lingomba ya bamama basungi mpe basungi na ye bakosolola na bandeko basi ya lisalisi.

Masolo miye ekosalema soki moke mbala moko ne sanza misato.

Bantina na bango ezali:

  • Kopesana toli na ntina ya bokasi, bamposa, mpe mikakatano mpo na bato mpe mabota batindami.

  • Kosolola banzela ya kosunga bato bamilengele kozwa makuli soki esengelami.

  • Kotala lolenge nini lisanga likoki ya bampaka, Lingomba ya Bamama Basungi, lisanga ya palwasi, mpe misusu ekoki kosunga.

  • Koteya mpe kolendisa bandeko mibali mpe basi ya lisalisi.

21.4

Kosangisa Elongo Babokasi ya Mosala ya Kosalisa

Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe lisanga likoki ya bampaka ekutanaka elongo soki moke mbala moko na sanza misato. Bakotala lisusu nini bayekoli kati na masolo ya mosala ya lisalisi (tala 21.3). Bakotanbwisa lisusu bitinda ya mosala ya lisalisi.

Na eteni na bandimi moke ya molende, bokambi Lingomba ya Bamama Basungi mpe lisanga likoki ya bampaka ekoki kokana kotinda te nyonso mibale bandeko basi mpe mibali ya mosala ya kosalisa epayi ya bandeko misusu.

Bimisa na lokasa