Buku mpe Mbiangi
23. Kokabola Nsango Malamu mpe Kolendisa Bandimi ya Sika mpe baye Bazongi


“23. Kokabola nsango malamu mpe kolendisa bandimi ya sika mpe baye bazongi,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“23. Kokabola Nsango Malamu mpe Kolendisa Bandimi ya Sika mpe Baye Bazongi,” Maponi uta na Buku Monene.

Elilingi
bato bazali kotala telefoni

23.

Kokabola Nsango Malamu mpe Kolendisa Bandimi ya Sika mpe baye Bazongi

23.0

Boyingisi

Kobengisa banso bazwa nsango malamu ezali eteni ya mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli (tala 1.2 kati ya buku monene oyo; Matai 28:19–20). Ezali kobakisa:

  • Kosangana na mosala ya misionele mpe kosala lokola bamisionele.

  • Kosunga bandimi ya sika mpe baye bazongi ya Eklezia bakoba na nzela ya boyokani.

23.1

Kokabola Nsango malamu

23.1.1

Kolinga

Nzela moko tolakisaka bolingo na bison mpo na Nzambe ezali na kolingaka mpe kosalelaka bana na Ye (tala Matai 22:36–39; 25:40). Tozali kobunda mpo na kolinga mpe kosalela lokola Yesus Klisto asalaki. Bolingo oyo efuli biso tofungola maboko na bato ya biyamba nyonso, loposo, mpe mimesano (tala Misala 10:34; 2 Nefi 26:33).

23.1.2

Kokabola

Mpo na tolingaka Nzambe mpe bana na Ye, tolingi na bopete kokabola mapamboli Ye apesa biso ( tala Yoane 13:34–35) mpe kosunga bosangisi ya Isalaele. Tolukaka kosunga bato bayoka esengo oyo toyoki (tala Alama 36:24). Tolobaka polelepolele na ntina ya Mobikisi mpe bopusi na Ye na bomoi na biso (tala Malongi mpe Mayokani 60:2). Tokabolaka makambo oyo na nzela ya malamu mpe ya pete lokola ndambo ya moto ye moko, nzela ya nsinga, mpe bisaleli na basusu.

23.1.3

Kobengisa

Tosambelaka mpo na kofulama mpe kokambama lolenge ya kobianga basusu na:

  • Koya mpe kotala mapamboli oyo ezali na nzela ya Yesu Klisto, nsango malamu na Ye, mpe Eklezia na Ye (tala Yoane 1:37–39, 45–46).

  • Koya mpe kosunga biso kosalela bato kati na bosenga.

  • Koya mpe kozala ya Eklezia ya Yesu Klisto ezongisami.

Mbala mingi, kobianga mpamba elingi koloba kobakisa libota na biso, baninga, mpe bazalani na oyo tozali kosala uta kala.

23.2

Kolendisa Bandimi ya Sika

Mondimi mokomoko ya sika azali na bosenga ya kimoninga, mabaku ya kosala, mpe bilei ya molimo. Lokola mondimi ya Eklezia, topesaka bandimi ya sika bolingo mpe lisungi na biso (tala Mosiah 18:8–10). Tosungaka bango bayoka liyoki ya kozala mondimi kati na Eklezia. Tosungaka bango bakende liboso na nzela ya boyokani mpe bakoma mingi na mozindo “babongwani kati na Nkolo” (Alma 23:6).

23.3

Kolendisa Bandimi baye Bazongeli

Bandimi misusu baponaka kotika kosangana na Eklezia. “Mpo epai ya ba lolenge oyo,”elobi Mobikisi, “bokokoba kosala; mpo boyebi te soki bakozonga mpe bakoyambola, mpe bakoya epai ya ngai na mokano motonda ya motema, mpe nakobikisa bango mpe bokozala nzela ya komemaka lobiko epai na bango” (3 Nefi 18:32).

Bandimi oyo bazali kosangana na molende te bakozala mingi na bolingi ya kozonga soki bazali na kimoninga makasi na bandimi ya Eklezia. Lokola bandimi ya sika, bazali na bosenga ya kimoninga, mabaku ya kosala, mpe bilei ya molimo.

23.4

Bakambi ya Likonzi

23.4.1

Bokambi ya Likonzi

Mokambi ya likonzi asimbi ba fungola kati na likonzi mpo na kosakolaka Nsango malamumpe kolendisa bandimi ya sika mpe baye bazongeli. Ye na basungi na ye bakopesa botambwisi ya babokasi oyo.

Na momesano sanza nyonso, mokambi ya likonzi akokutana na mokambi ya misio mpo na kobongisa babokasi kati na likonzi mpe bakambi ya palwasi mpe bamisionele ya ntango mobimba.

23.4.3

Basangani minene

Bokambi ya likonzi ekoki kotinda basangani minene koteya mpe sunga bokambi ya masanga makoki ya bampaka mpe bakambi ya misio ya palwasi. moko to ebele ya basangani minene bakoki kotindama mpo na kokamba babokasi eye. Nzokande, basangani minene bazali na mikumba miye mpo na bapalwasi mpe masanga makoki wapi batindami.

23.4.4

Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi

Na nse ya bokambami ya mokambi ya likonzi, bokambi ya lingomba ya bamama basungi bakoteya mpe kosunga bokambi ya mangomba ya bamama basungi ya palwasi na mikumba na bangg mpo na kosakolaka nsango malamu mpe kolendisa bandimi ya sika mpe baye bazongeli.

23.5

Bakambi ya palwasi

23.5.1

Episikopo na Basungi na ye

Episikopo na basungi na ye bakobongisa na bokambi lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi ntango bazali kokamba bokasi ya palwasi kati na kosakolaka nsango malamu mpe kolendisaka bandimi ya sika mpe baye bazongeli. Bakambi oyo basanganaka elongo mbala mingi.

Episikopo na basungi na ye bakosala ete bokasi oyo asololaka mpe abongisaka kati na lisanga ya palwasi mpe likita ya lisanga ya bilenge ya palwasi.

Episikopo akosolola na bandimi ya sika oyo bazali na mbula ekoki kozwa mokanda mpo na mokanda mpo na tempelo mpo na kosala mabatisi mpe bankotisa (tala 26.4.2). Akosolola mpe na bandeko mibali ya mbula ekoka mpo na kozwa Bonganganzambe ya Alona. Ye atambwisaka mingimingi masolo maye mposo sima ya nkotisa ya mondimi.

23.5.2

Bokambi ya Lisanga Likoki ya Bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi

Bokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi ekambaka mokolo na mokolo bokasi ya palwasi kokabola nsango malamu mpe kolendisa bandimi ya sika mpe baye bazongeli (tala 8.2.3 mpe 9.2.3).

Bakambi eye bazali na mikumba maye malandi:

  • Kosunga kofula bandimi kolinga bana ya Nzambe, kokabola nsango malamu, mpe kobianga basusu kozwa mapamboli ya Mobikisi.

  • Kotinda bandeko mibali mpe basi ya lisalisi epai ya bandimi ya sika mpe baye bazongeli (tala 21.2.1).

  • Kokamba mosala ya mokambi ya misio ya palwasi.

Mokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi mokomoko akopona moko ya bokambi mpo na kosunga na bokasi oyo. Baye bokambi mibale bakosala elongo. Bakokota mposo inso na likita ya kobongisa mosala ya misionele (tala 23.5.7).

23.5.3

Mokambi ya Misio ya Palwasi

Episikopo na basungi na ye bakotuna mokambi ya likonzi ayeba soki esengeli kobenga mokambi ya misio ya palwasi. Moto oyo asengeli azala mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeki. Soki mokambi oyo abengami te, moko ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka akozwa mosala eye.

Mokambi ya misio ya palwasi akosunga bokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi na mokumba na bango ya misionele Azali lisusu na mikumba miye milandi:

  • Kobongisa mosala ya bandimi ya palwasi mpe bakambi, bamisionele ya palwasi, mpe bamisionele ya ntango mobimba.

  • Kokamba mposo inso likita ya kobongisa mosala ya misionele (tala 23.5.7).

23.5.4

Bamisionele ya palwasi

Bamisionele ya palwasi basungaka bandimi ya palwasi bayoka esengo ya bokaboli nsango malamu ndenge elimbolami na 23.1. Bakosala na nse ya bokambi ya mokambi ya misio ya palwasi to moko na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka oyo akozwa mosala eye.

23.5.5

Lisanga ya Palwasi mpe Lisanga ya Bilenge ya Palwasi

Kokabola nsango malamu mpe kolendisa bandimi ya sika mpe bandimi baye bazongeli esengeli esololama mbala na mbala kati na makita ya lisanga ya palwasi. Episikopo akoki kobianga mokabo ya misio kosangana na makita ya lisanga ya palwasi

Mikanda lokola maye malandi ekoki kosunga kati na masolo maye:

Na kosololaka bamposa ya bilenge kati na palwasi, lisanga ya bilenge ya palwasi ekopesa likebi mingi na bandimi ya sika mpe baye bazongi mpe na bilenge bazali koteyama na bamisionele

23.5.7

Likita ya Kobongisa Mosala ya Misionele

Mposo inso, makita ya mokuse ekosalema mpo na kobongisa bokasi ya kokabola nsango malamu mpe kolendisa bandimi ya sika mpe bandimi baye bazongeli. Soki mokambi ya misio ya palwasi abengami, akotambwisa makita maye. Soki te, moko na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka oyo azwi mosala eye akokamba.

Basusu baye babiangemi bakisa:

  • Moko na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi.

  • Bamisionele ya palwasi.

  • Mosungi moko ya lisanga likoki ya banganganzambe ( to mokambi ya lisanga likoki ya bateyi to badiakona soki banganganzambe bazali te na palwasi)

  • Moko ya mokolo loleka ya bakambi ya kelasi ya bilenge basi.

  • Bamisionele ya ntango mobimba.

Bimisa na lokasa