Buku mpe Mbiangi
25. Mosala ya Tempelo mpe ya Mambi ya kala ya libota kati na Palwasi mpe Likonzi


“25. Mosala ya tempelo mpe ya mambi ya kala ya libota kati na palwasi mpe na likonzi,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“25. Mosala ya Tempelo mpe ya Mambi ya kala ya Libota kati na Palwasi mpe na Likonzi,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
tempelo

25.

Mosala ya Tempelo mpe Mambi ya kala ya libota kati na Palwasi mpe Likonzi

25.0

Boyingisi

Mosala ya tempelo mpe ya mambi ya kala ya libota ezali nzela mpo na kosangisa mpe kokangisa mabota mpo na seko (tala Matai 16:19). Mosala oyo ezali na:

Nsango mingi ezwami na “Temples” mpe “Family History” (Gospel Topics, topics.ChurchofJesusChrist.org).

25.1

Bandimi mpe Bakambi kosangana kati na Mosala ya Tempelo mpe Mambi ya Kala ya Libota

Bandimi ya Eklezia bazali na libaku malamu mpe mokumba ya kosunga na kosangisaka mabota mpo na seko. Bamilengelaka bango moko mpo na kosala mayokani ntango bazali kosala makuli, mpe bazali kobunda mpo na kobatela mayonani maye.

Bandimi ya Eklezia balendisami koyeba bandeko na bango bakufa oyo bazwaki makuli ya tempelo te. Bandimi sima bakosala makuli na nkombo ya bandeko yango (tala Malongi mpe Mayokani 128:18). Na mokili ya molimo, bakufi bakoki kopona kondima to koboya makuli maye masalemi mpo na bango.

25.1.1

Mokumba ya Moto na Moto mpo na Kokende na Tempelo

Bandimi bakokata mpo na bango moko ntango nini mpe mbala mingi nini kosambela na tempelo. Bakambi basengeli te kotia motango to lolenge ya lapole mpo na kosangana na tempelo.

25.2

Kobongisa Mosala ya Tempelo mpe Mambi ya kala ya Libota kati na Palwasi

25.2.1

Bepisikopo

Episikopo na basungi na ye bakambaka na bokambi lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi ntango bazali kokamba bokasi ya palwasi kati na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libotta. Bakambi oyo basanganaka elongo mbala mingi.

Episikopo na basungi na ye lisusu bazali na mikumba miye milandi mpo na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota kati na palwasi:

  • Koyeba solo ete malongi mpe mapamboli ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota mateyami na Eklezia.

  • Koyeba solo ete mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota ebongisami kati na lisanga ya palwasi mpe likita ya lisanga ya bilenge ya palwasi.

  • Kolandela mabongisi ya mateya ya komilengele mpo na tempelo (tala 25.2.8).

  • Kopesa Mikanda ya Ndingisa mpo na Tempelo (tala mokapo 26).

25.2.2

Bakambi ya Lisanga Likoki ya Bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi

Bakambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi bakambaka mokolo na mokolo bokasi bandimi basalaka na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota na palwasi (tala 8.2.4 mpe 9.2.4). Basalaka elongo mpo na kokamba bokasi oyo elongo na lisanga ya palwasi, na nse ya bokambi ya episikopo.

Bakambi eye bazali na mikumba maye malandi:

  • Kosunga bandimi komilengela mpo na kozwa makuli ya tempelo mpe kosala mayokani ya tempelo.

  • Kolendisa bandimi kosambela kati na tempelo mbala mingi nyonso lokola mabaku epesameli bango.

  • Kolendisa bandimi bayekola na ntina ya bankoko na bango mpe kosala makuli ya tempelo na nkombo na bango.

  • Kokamba mosala ya mokambi mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota ya palwasi. Soki mokambi oyo abengami te, moko kati na bakambi ya lisanga likoki ya bampaka akozwa mosala moye (tala 25.2.3).

Mokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe ya lingomba ya bamama basungi bakopona moto na moto na ngambo na ye moto moko kati na bokambi mpo na kosunga na kokambaka mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota na palwasi. Bato mibale oyo ya bokambi bakosala elongo. Bakokota mposo inso likita ya kobongisa mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya palwasi (tala 25.2.7).

25.2.3

Mokambi ya Mosala ya Tempelo mpe Mambi ya kala ya Libota ya Palwasi

Episikopo na basungi na ye bakotuna na mokambi ya likonzi ayeba soki esengeli kobenga mokambi ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya palwasi. Moto oyo asengeli kozala momemi ya Bonganganzambe ya Melekisedeki.

Mokambi ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya palwasi akosunga bakambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya bamama basungi na mokumba na bango ya mosala ya tempelo mpe ya mambi ya kala ya libota. Azali lisusu na mikumba miye milandi:

  • Kokamba mposo inso likita ya kobongisa mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota na palwasi (tala 25.2.7).

  • Kotangisa bapesi toli ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya palwasi. Kobongisa bokasi na bango ya kosunga bandimi na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota.

  • Kosala elongo na mokambi ya Misio ya Palwasi mpe bamisionele mpo na kosunga baye basosoli nsango malamu, bandimi ya sika, mpe baye bazongeli bamipesa kati na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota.

25.2.4

Bapesi Toli ya Mosala ya Tempelo mpe Mambi ya kala ya Libota

Bapesi toli ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota bakosala na nse ya bokambi ya mokambi ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota ya palwasi to moko na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka oyo akozwa mosala eye. Episikopo na basungi na ye bakobenga bandimi oyo mpo na kosala. Bakolo mpe bilenge bakoki kobengama.

Bapesi toli bazali na mikumba maye malandi:

  • Kosunga bandimi bazwa mapamboli ya koyeba bankoko na bango mpe kosala makuli ya tempelo na nkombo na bango.

  • Kosunga bandimi komilengela mpo na kozwa makuli ya tempelo mpe kosala mayokani ya tempelo.

  • Kosangana na makita ya kobongisa mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota (see 25.2.7).

25.2.7

Makita ya kobongisa Mosala ya Tempelo mpe ya Mambi ya Kala ya Palwasi

Makita ya mikuse ya kobongisa mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota esalemi mbala na mbala Soki mokambi ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota ya palwasi abengami, akotambwisa makita maye. Soki te, moko na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka oyo azwi mosala eye akokamba.

Basusu baye babiangemi bakisa:

  • Moko na bokambi ya lingomba ya bamama basungi mpe lisanga likoki ya bampaka.

  • Mosungi moko ya lisanga likoki ya banganganzambe.

  • Moko ya mokolo loleka ya bakambi ya kelasi ya bilenge basi.

  • Bapesi toli ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota.

Bantina ya Makita eye ezali na:

  • Kosala moango lolenge nini kosunga palwasi songolo na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota ndenge esengami.

Makita maye makoki kosalema na bomoto to na nzela ya interneti Kobongisa ekoki mpe kosalema na banzela misusu, kobakisa kobenga na telefoni, ba sms, mpe mikanda na interneti.

25.2.8

Mateya ya Komilengela mpo na Tempelo

Na nse ya bokambami ya episikopo, mateya ya komilengele mpo na tempelo ekoki kobongisama mpo na kosunga bandimi bamilengela kosala mayokani ntango bazwi makuli ya tempelo. Mateya oyoy esalemi libanda ya makita ya eyenga nyonso na ngonga ebongi mpo na bandimi. Ekoki mpe kosalema na ndakonzambe to kati na libota.

Mateya mpe malako mpo na kobongisa mateya mazali kati na Endowed from on High: Temple Preparation Seminar Teacher’s Manual. Basangani bakozwa kopi ya Preparing to Enter the Holy Temple. Mpo na boyekoli na yo moko mpe mikanda ya boyekoli, tala temples.ChurchofJesusChrist.org.

25.4

Makoki ya Mambi ya Kala ya Libota

25.4.1

Libota na Ngai: Masolo oyo Ememi Biso Elongo

Libota na Ngai: Masolo oyo Ememi Biso Elongo Kosunga bato bamona bandeko ya libota mpe bankoko mpe tosangisa elongo masolo na bango. Mokanda oyo ya mokie ekoki lisusu kosunga bandimi babanda kolengela bankombo ya libota mpo na makuli ya tempelo.

Mokanda ya moke ekoki kozwama na ChurchofJesusChrist.org. bakopi ya maboko ekoki kosombama na store.ChurchofJesusChrist.org.

25.4.2

FamilySearch.org mpe Aplikasio ya FamilySearch

FamilySearch.org ezali siteweb ya Eklezia mpo na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya mabota. Ekoki kosunga basaleli:

  • Kotonga nzete ya kosangisa libota mpe mokangano.

  • Mona bankoko mpe masolo na bango.

  • Kabola mpe bomba masolo ya libota, bafoto, mpe mambi ya kala.

  • Kolengela bankombo ya libota mpo na makuli ya tempelo.

Baplikasio FamilySearch Tree app mpe FamilySearch Memories app epesaka makoki na bato kosangana kati na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota kouta na aplikasio ya telefone.

25.5

Kotinda mpe Kobenga Basali ya Tempelo

25.5.1

Kotinda Basali ya Tempelo

Bato oyo bakoki kokoma basali ya tempelo bakoki komonana na banzela eye:

  • Bandimi baponami na episikopo to mokambi ya palwasi mosusu

  • Bandimi baye bakutanaka na episikopo na ntina ya kosala

  • Bandimi batindami na mokambi ya tempelo, matrone, to mokambi mosusu ya tempelo

  • Bandimi baye bazali komilengela mpo na to baye bawuti kala mingi te mosala ya misio (tala mokapo 24)

Bankombo ya baye bakoki kokoma basali ya tempelo etindami na kosalelaka Recommend Temple Worker tool. Esaleli eye ezali mpo na episikopo, mokambi ya likonzi, mpe bokambi ya tempelo.

Bimisa na lokasa