Buku mpe Mbiangi
24. Bitinda mpe Mosala ya Misionele


“24. Bitinda mpe Mosala ya misionele,” Maponi uta na Buku ya Monene (2023).

“24. Bitinda mpe Mosala ya Misionele,” Maponi uta na Buku Monene.

Elilingi
bamisionele bazali kotambola

24.

Bitinda mpe Mosala ya misionele

24.0

Boyingisi

Na bantango ya kala, Nkolo apesaki etinda ya kosangisa Isalaele kati na “bikolo inso , kobatisaka bango na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Santu” (Matai 28:19; tala lisusu molongo 20). Nkolo azongisi sika etinda na mikolo eye ya nsuka (tala Malongi mpe Mayokani 39:11; 68:6–8; 112:28–30).

Kosalela Nkolo lokola misionele ezali lotomo ya bule. Ememaka mapamboli ya seko epai na moto mpe epai ya baye ye asalelaka (tala Malongi mpe Mayokani 18:14 -16 -16).

Nkolo asengi na elenge mobali nyonso, oyoalongobani, oyo azali na makoki, ete amilengela mpe asala mosala misio.

Nkolo azali lisusu kotombela boyei malamu na bilenge basi nyonso balongobani, baoyo bazali na makoki po na kosala misio soki balingi.

Bomisionele ya bakolo mpe basengami mpe balendisami komilengele mpo na kosala.

24.1

Libiangi ya kosalisa

Bamisionele bazali bantoma ya Nkolo mpe basengeli kobiengama na likoki ebongi malamu (tala Malongi mpe Mayokani 42:11; Biteni ya Bondima 1:5). Libiangi ya kosala misio esalemaka mingi na Moyangeli ya Eklezia. Mpo na kosala mosala ya bamisionele ya mikolo, libiangi esalemaka na mokambi ya likonzi.

24.2

Bitinda ya Misionele

Libiangi ya kosala lokola misionele ezali na etinda moko eyebani malamu. Bitinda biye ekeseni makasi.

24.2.1

Bilenge Bamisionele Bateyi

Mingi koleka ya bamisionele batindami koteya nsango malamu mosika na mabota na bango. Bitinda oyo epesami na bimoniseli ya bapostolo. Bamisionele oyo basalaka na nse ya bokambi ya mokambi ya misio.

24.2.2

Bilenge Bamisionele mpo na Mosala

Ndambu ya bilenge bamisionele batindami kosala na Eklezia mpe na bisika bavandi ntango bazali na mabota. Bitinda biye epesami na emoniseli epai ya Bapostolo mpe epesami na baye bazali koluka kokende misio, baye makambo mabongisami malamu mpo na mosala ya misio (tala 24.3.3).

24.2.3

Bamisionele ya Mikolo

Bamisionele nyonso ya mikolo balendisami na koluka bato ya koteya mpe kolengela bango mpo na libatisi. Bamisionele ya mikolo bakoki lisusu kotindama mpo na kosunga:

  • Bandimi mpe bakambi ya etuka mpe bakambi ya mboka.

  • Badepartema ya Eklezia mpe bandako.

  • Mangomba ya Kosunga Babola

Bamisionele ya mikolo basengeli te kosala bangonga moko, kosala misala se moko, to kokokisa masengami moko lokola bilenge bamisionele.

Bitinda mpo na bamisionele ya mikolo epesami na bobimisi na Bantoma. Bakandida bakoki koloba oyo basepeli mpo na etinda kasi basengeli bazala na bolingi ya kondima etinda nyonso.

24.2.4

Bamisionele ya Mikolo mpo na Mosala

Na kobakisa na mabiangi ya palwasi to likonzi na bango esika bavandi, bandimi bakoki kasalela Nkolo lokola bamisionele ya mikolo mpo na mosala. Bamisionele oyo bapesaka mosala ya motuya kati na badepartema ya Eklezia, bandako, mpe bamisio (tala 24.7.1). Bakobika na ndako.

Bamisionele ya mikolo mpo na mosala babiangami na mokambi ya likonzi. Bakosala na nse ya botambwisi na ye. Motango ya ngonga basali mposo mokomoko elandi makoki na bango, mabaku ya misala kati na etuka, mpe botambwisi kowuta na bokambi ya etuka enene.

24.2.5

Bitinda ya Bamisionele na Bokuse

Etando oyo elandi elakisi na bokuse ndenge ya bitinda ya misionele.

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Abiangami na

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Mokambi ya Eklezia

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Mokambi ya Eklezia

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Mokambi ya Eklezia

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Mokambi ya likonzi

Atindami na

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Ntoma moko

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Ntoma moko

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Ntoma moko

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Mokambi ya likonzi

Atiami mpembeni na

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Mokambi ya likonzi

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Mokambi ya likonzi

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Mokambi ya likonzi

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Mokambi ya likonzi to mopesi toli na ye

Akobika

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Mosika na ndako

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Na ndako

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Mosika na ndako to na ndako

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Na ndako

Bakambi ya Eklezia

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Mokambi ya misio to mokambi ya esika ya kala

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Mokambi ya likonzi

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Misio, tempelo, to mokambi ya esika ya kala; to mokambi etuka enene

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Mokambi ya likonzi

Akopesa lapole na

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

Mokambi ya misio to mokambi ya esika ya kala

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

Mokambi ya Misio ya mosala

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

Misio, tempelo, to mokambi ya esika ya kala; Mokambi Etuka Enene, mokambi ya esika enene ya bapaya; to departema ya Eklezia to mokambi ya bandako

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

Mokambi ya etinda ya mosala

Mbula esengeli

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.1)

18–25 (mibali)
19–29 (basi)

Elenge misionele mpo na koteya
(tala 24.2.2)

18–25 (mibali)
19–29 (basi)

Misionele ya mokolo
(tala 24.2.3)

40 to mokolo koleka soki abali to ndeko mwasi monzemba

Misionele ya mokolo mpo na mosala
(tala 24.2.4)

26 to mokolo koleka

24.3

Bomilengeli mpe Bokokisi Masengami mpo na Kosala Misio

Baye bakoki kokoma bamisionele balendisami kosala misio mpo na bolingo na bango mpo na Nkolo mpe bana na Ye. Basengeli bamesana na missionary recommendation interview questions.

24.3.1

Kobongwana epai na Yesu Klisto

Baye bakoki kokoma bamisionele basala makasi mpo na kolendisa mbongwana na bango na Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezongisami.

24.3.2

Bokokisi ya malako ya klongobana

Baye bakoki kokoma bamisionele basalaka makasi mpo na kolongobana na moninga ya Molimo. Oyo esengami mpo na mosala makasi ya misionele (tala Malongi mpe Mayokani 42: 13– 14).

24.3.2.1

Boyamboli

Boyamboli ezali kosenga kotia bondimi na Klisto, kozala na mposa ya solo, mpe kobatela mibeko. Esangisi kotubela mpe kotika lisumu. Mpo na masumu manene, boyamboli esengi tubela na episikopo to mokambi ya likonzi.

Moto oyo ayamboli alimbisami mpe akomi peto na nzela ya Bomikabi mpe ngolu ya Yesu Klisto. Nkolo akokundola lisusu lisumu te. (Tala Yisaya 43:25; Yakobo 6:5; Alama 34:15–17; Helamani 5:10–11; Malongi mpe Mayokani 58:42–43. Tala lisusu 32.1 kati na buku mitindo eye.)

Kandida misionele esengeli ayambola na lisumu monene liboso mokambi ya likonzi atinda Mokanda ya etinda ya misionele (tala 32.6; tala lisusu 24.4.4). Bitape ya boyamboli esengaka ntango ekoki mpo na moto alakisa na nzela ya bomoi ya sembo ete ye mobali to ye mwasi azwi molimo ya Klisto kati na bolimbisi ya masumu.

24.3.3

Bokolongono ya Nzoto, Makanisi, mpe ya Mayoki

Mosala ya misionele ezali mikakatano. Bilenge bamisionele bateyi basengeli bazala bato bamipesi mpe na nzoto, na makanisi, mpe na mayoki, kozala bato bakoki kosala manaka ya misionele ya ntango mobimba.

24.3.4

Misolo

24.3.4.1

Kofuta Misolo ya Bilenge Bamisionele Kosalaka Mosika na Ndako

Bilenge oyo bazali koluka kosala misio bamilengeli engebene na makoki na bango bakoki te kozelisama kosala mpo na bantina ya misolo. Baye basengeli na lisungi ya misolo mpo na kokokisa motango bamipesaki bakoki kozwa yango na libota ya monene mpe baninga.

Soki mposa etikali, episikopo to mokambi ya likonzi akoki kosenga bandimi kati na palwasi to likonzi bafuta na misolo ya misionele ya palwasi.

Bidje ya eteni mpe misolo ya likabo ya kokilaekoki kosalelama te.

Mokano ya kofuta misolo sanza inso Bilenge bamisionele mpo na koteya na mabota na bango bafutaka montango songolo sanza inso kosunga mpo na kozipa manaka ya kosomba ya misionele.

Bofuti misolo esalemi na misolo ya misionele ya palwasi. Episikopo akolandela ete misolo epesama sanza inso. Misolo koleka montango ya sanza esengeli te epesama liboso ya sanza. Misolo epesami liboso ekoki kozongisama te soki misionele azongi ndako iboso ya ngonga.

Kosalela misolo na bilanga. Sanza inso, bilenge bamisionele bazwaka misolo kowuta na misio kosomba bilei,kofuta motuka, mpe biloko mosusu ya bomoi. Misolo eye ezali ya bule. Bamisionele bakosalela yango kaka na bantina etali misio. Basengeli te kosalela yango mpo na kosomba ya moto, to kobomba, to kotinda na libota ya bandimi to basusu. Bamisionele bakozongisa na misio misolo nyonso oyo bazali na yango bosenga te.

Bamisionele bakosalela misolo na bangomei mpo na kosomba biloko misusu. Kosomba biloko eye ya bangomei esengeli ezala moke. (tala Missionary Standards for Disciples of Jesus Christ, 4.8.)

24.3.4.2

Bofuta Misolo ya Bamisionele Bakolo Bakosalaka Mosika na Ndako

Mokano ya kofuta misolo sanza inso Bamisionele bakolo kosalaka mosika ya ndako bafutaka na plwasi na bango na misolo ya misionele ya palwasi sanza inso. Misolo miye ekosunga kofuta ndako mpe bisombasomba ya motuka.

Episikopo akolandela ete misolo epesama sanza inso. Misolo koleka montango ya sanza esengeli te epesama liboso ya sanza.

Kobakisa Kosalela misolo. Na kobakisa na ekateli ya bofuti misolo ya sanza inso, oyo ekozipa misolo ya kofuta ndako mpe motuka, bamisionele ya bakolo basengeli kozipa mobimba ya misolo nyonso mpo na kosomba biloko misusu, kobakisa bilei.

24.3.4.3

Bofuti Misolo mpo na Bamisionele kosalaka na ndako.

Bamisionele kosalaka na ndako bazali na mokumba ya mposa na bango ya misolo.

24.3.4.4

Assuranse ya lopitalo mpe Kosalela Misolo

Bamisionele balendisami makasi ya kobatela asirance ya lopitalo na bango soki ekoki kosalema, kobakisa bilenge bamisionele mpo na koteya.

Bamisionele kosalaka na ndako basengeli kozwa ya bangomei asiranse ya lopitalo mpe kozipama na asiranse mosusu. Bamisionele bakolo kosalaka mosika ya ndako basengeli kozwa bozipi eye. Bamisionele bakolo oyo bakosala libanda ya mboka na bango basegeli bazala na makoki ya kozwa asiranse na nzela ya Mwango ya Misala ya Lopitalo mpo na Bakolo.

24.3.5

Mokumba ya Mabota ya Bandimi mpe Bakambi kati na Bolengeli Bamisionele

Mabota ya bandimi, episikopo, mpe bakambi misusu basungaka bilenge komilengele kosala misio.

Mabota ya bandimi, episikopo, mpe bakambi balendisaka bakandida misionele banso koyekola:

  • Buku ya Mormon mpe makomi masusu.

  • Preach My Gospel.

  • Safeguards for Using Technology.

Mabota ya bandimi ekosunga bakandida nyonso bazwa ekateli ya kolanda mibeko ya bamisionele. Bakolendisa bakandida koyekola buku ya mibeko ya bamisionele oyo etali bitinda na bango ekoki kozwama:

  • Mpo na bilenge bamisionele mpo na koteya: Missionary Standards for Disciples of Jesus Christ

24.4

Kotinda Bamisionele

24.4.1

Botali Bokolongono ya Nzoto

Bakandida nyonso basengami kozala na mokanda ya lopitalo etalisi lolenge ya bokolongono ya nzoto na bango.

24.4.2

Masolo mpe Mikanda ya Etinda

Episikopo mpe mokambi ya likonzi akotambwisa masolo na mozindo, na molimo mpe kolendisa kandida mokomoko. Bakosalela missionary recommendation interview questions.

Episikopo mpe mokambi ya likonzi lisusu bakotala bansango na ntina ya mibeko ya kolongobana mpe lolenge ya bokolongono kati na Missionary Online Recommendation System. Episikopo to mokambi ya likonzi bakobakisa te mobeko songolo ya kokokisa. Mpe te ya kobongola mituna ya masolo.

Soki episikopo mpe mokambi ya likonzi bazali na likambo na ntina ya kandida songolo kokokisa mibeko ya kolongobana to na ntina ya lolenge ya bokolongono na ye, bakopesana toli elongo mpe na candida. Na ndingisa ya candida elenge, bakoki lisusu kopesana toli na baboti na ye. Episikopo mpe mokambi ya likonzi bakotinda te mokanda ya etinda tii moto akoyambola masumu ya minene (tala 24.3.2.1). Engebene na lolenge ya moto na nzoto, makanisi, to bokolongono ya mayoki, bakoki kosolola makoki ya kotindama lokola misionele mpo na mosala.

Na ntango ya mbango ntango episikopo to mokambi likonzi azali te, akoki kopesa ndingisa na moko ya basungi na ye amema masolo yango.

Kati na badisitiliki, mokambi ya misio to moko ya basungi oyo aponami akosolola mpe akotinda kandida. Mokambi ya disitiliki akotambwisa masolo maye te.

24.4.4

Baye Bazangi Makoki ya Kosala lokola Bamisionele ya Ntango Mobimba

Mbala mosusu mondimi moko oyo azali na mposa ya kosala akoki te kobiangema lokola misionele ya ntango mobimba. Yango ekoki kozala na ntina ya mikakatano ya kolongono, akokisi te mibeko ya kolongobana, makambo ya mibeko ya leta, to makambo misusu. Mokambi ya likonzi akoki kolimbisa ye mpo na mosala ya misionele ya ntango mobimba.

24.5

Sima ya Kozwa Libiangi ya Misio

Bamisionele babiangemi sika balendisami kotanga to kotanga lisusu Buku ya Mormon yambo ya kobanda misio na bango. Bakolanda toli ya Mokonzi Benjamin ya “bokokengele te binomei, mpe makanisi ma bino, mpe maloba ma bino, mpe misala mya bino,” (Mosiya 4:30).

24.5.1

Dotasio ya Tempelo mpe Mosala ya Tempelo

Soki bamisionele babiangami sika bazwi te makuli ya dotasio ya tempelo, basengeli kosala yango yambo babanda mosala ya misionele esika ekoki kosalema (tala Malongi mpe Mayokani 43:15–16; 105:33). Oyo esangisi na bamisionele mpo na mosala soki ebongi mpo na makambo na bango.

Bamisionele babiangami sika oyo bazwi dotasio bakoki kosala lokola basali ya makuli ya tempelo yambo babanda mosala ya misionele soki elongobani (tala 25.5).

24.5.2

Makita ya Elambo

Episikopo na basungi na ye bakobianga bamisionele babiangami sika kozwa maloba kati na likita ya elambo yambo ya bango kobanda misio. Yango ezali Likita ya elambo bo momesano. Makanisi masengeli kofandisama na elambo mpe Mobikisi.

24.5.3

Botiami mpembeni ya Bamisionele

Mokambi ya Likonzi ya misionele akotia mpembeni misionele mokomoko ntango akomi penepene ya mokolo ya kobanda misio na ye. Na ntango ya mbango ntango mokambi ya likonzi azali te, akoki kopesa ndingisa na moko ya basungi na ye atia misionele mpembeni.

Mokambi ya misio to moko ya basungi na ye akotia mpembeni misionele oyo abiangami wuta na disitiliki kati na misio. Mokambi ya disitiliki akotia te mpembeni bamisionele.

Ndeko mobali oyo akosala mosika na ndako asengeli azwa Bonganganzambe ya Melekisedeki yambo atiama mpembeni lokola misionele. Ndeko mobali oyo akosala lokola misionele mpo na mosala asengeli azwa Bonganganzambe ya Melekisedeki soki ebongi mpo na makambo na ye.

24.6

Mosala Mosika na Ndako

24.6.2

Kali na Elanga

24.6.2.5

Bosenga ya Lisungi ya Misolo to ya Kelasi to ya Kobemba

Bamisionele mpe mabota na bango basengeli te koppesa lisungi na baye bazali kobika esika misionele azali kosala, kobakisa lisungi mpo na kelasi. Esngeli mpe te bamisionele mpe mabota na bango basunga bato oyo balingi kobemba mboka misusu (tala 38.8.19).

24.6.2.8

Mikanda ya Mondimi na Moko na Zomi

Palwasi misionele awuti ekobatela mikanda ya kimondimi. Palwasi awuti akokoma lolenge ya bofuti moko na zomi na ye. Bamisionele basengeli te kofuta moko na zomi na misolo ya lisungi bazwaka uta na misio. Nzoka nde, bakofuta moko na zomi soki bazali na misolo uta lifuti ya moto ye moko.

24.6.3

Bozongi Ndako Sima ya Misio

24.6.3.1

Bozongi Ndako Lolenge Manaka Esalamaki

Bamisionele mpe bato ya libota na bango basengeli te kosenga bopemisi liboso ya manaka to kobenda molayi mosala mpo na litomba ya moto.

Bilenge bamisionele basengeli babemba mbala moko na ndako uta bamisio na bango. Mobembo mosusu ekoki kondimama kaka soki misionele azali kobemba soki moke na moboti moko to mokengeli.

Bamisionele bazali na bopemisi te kino bakopesa lapole na mokambi ya likonzi na bango. Bakolanda mibeko ya misionele kino ntango wana.

24.6.3.2

Bozongi Ndako Liboso ya Manaka

Bamisionele misusu bapemisamaka liboso ya manaka mpo na bokolongono, kolongobana, to makambo misusu. Episikopo mpe mokambi ya likonzi bakopesa lisungi monene na bamisionele oyo bazongi. Bakambi bakosunga bango kosala mpo na kozwa bokolongono ya nzoto to kozongela mosala soki ekoki kosalema.

24.7

Bamisio ya Mosala

24.7.1

Komona Mabaku mpo ete Bamisionele Basala

Episikopo, mokambi ya likonzi, mpe misionele mpo na mosala bakopesana toli elongo mpo na komona mabaku ya kosala na esika. Mpo na bilenge basionele mpo na mosala, mokambi ya misio ya mosala mpe baboti to bakengeli ya misionele bakosangana na lisolo.

24.8

Sima ya Mosala ya Misionele

24.8.2

Lisolo ya Bopemisi Misionele

Mokambi ya likonzi akopemisa bamisionele mpe akotambwisa lisolo ya bopemisi. Kati na disitiliki, mingi mingi mokambi ya misio to mosungi oyo aponami akopemisa bamisionele.

Malako maye malandi mpo na lisolo makoki kozala na litomba.

  • Kolendisa bango bakoba kozala bayekoli ya Yesu Klisto bomoi na bango mobimba.

  • Kopesa bango toli batonga likolo ya bizaleli malamu bakolisu lokola misionele.

  • Kolendisa bango bayeba mpe bamilengele mpo na lobi, kobakisa kotanga kelasi mpe misala mpo na bilenge bamisionele.

  • Kolendisa bango bazala ntango nyonso lolenge ya bato balongobana na mokanda ya ndingisa mpo na tempelo.

24.8.4

Mabiangi

Bakambi na lombango bakopesa bitinda ya mosala ya lisalisi mpe mabiangi na bamisionele bapemisami kala mingi te. Oyo ebakisi kozala lokola mosali ya makuli ya tempelo soki ebongi (tala 25.5).

24.9

Makoki mpo na Bitinda ya Misionele mpe Mosala

24.9.2

Basite interneti

Bimisa na lokasa