Buku mpe Mbiangi
28. Makuli ya Tempelo mpo na Bakufi


“28. Makuli ya Tempelo mpo na Bakufi,” Maponi uta na Buku ya Monene (2023).

“28. Makuli ya Tempelo mpo na Bakufi,” Maponi uta na Buku ya Monene

Elilingi
liziba ya libatisi

28.

Makuli ya Tempelo mpo na Bakufi

28.0

Boyingisi

Makuli oyo esalemi na batempelo epesaka nzela ete mabota makoka kozala elongo mpo na boseko mpe kozwa botondi ya esengo liboso ya Nzambe.

Mpo ete bana ya Tata na Lola bazonga epai na Ye, moko na moko na bango asengeli koyambola, kolongobana mpo na kozwa makuli ya libiki mpe bonetoli, mpe kokumisa mayokani oyo esanganaki na bokuli moko na moko.

Tata na Lola ayebaki ete mingi ya bana na Ye bakozwa makuli oyo te na ntango ya bomoi na bango ya kufa. Apesaki nzela mosusu mpo na bango kozwa makuli mpe kosala mayokani elongo na Ye. Bakoki kozwela moto makuli yango na kati ya batempelo. Yango elimbolii ete moto ya bomoi azwaka makuli na nkombo ya moto oyo akufi. Na mokili ya molimo, bato bakufi bakoki kopona kondima to koboya makuli oyo esalemi mpo na bango (tala Malongi mpe Mayokani 138:19, 32–34, 58–59).

Bandimi ya Eklezia balendisami mpo na koyeba bandeko bakufi oyo bazwaki makuli ya libiki mpe ya bonetoli te. Na nsima, bandimi basalaka makuli na nkombo ya bandeko wana.

Soki bandimi babongisaki bankombo ya mabota te mpo na mosala ya tempelo (tala 28.1.1), bankombo ya bakufi oyo bazali na mposa ya makuli ekopesama na tempelo.

28.1

Malakisi Manene mpo na kosala Makuli ya BozwelI

Bato bakufa oyo bazalaki na mibu 8 to koleka na ntango ya liwa na bango bakoki kozwela bango makuli oyo esalemi na nkombo na bango. Longola se lokola elobami na 28.3, makuli ya bozweli ekoki kosalema mpo na bato nyonso bakufa noki soki mikolo tuku misato eleki uta mokolo ya liwa na bango soki moko ya makambo oyo elandi esalemi:

  • Ndeko moko ya penepene ya mokufi (molongani oyo aboma libala te, mwana ya mokolo, moboti, to ndeko) atindi nkombo mpo na makuli ya tempelo.

  • Ndingisa ya kosala makuli ezwami uta na ndeko ya penepene ya mokufi (molongani oyo aboma libala te, mwana mokolo, moboti, to ndeko).

Soki moko ya masengami oyo tolobeli awa na likolo esalelami te, makuli ya tempelo ya bozweli ekoki kosalema mibu 110 nsima ya kobotama ya moto oyo akufi.

28.1.1

Kobongisa Bankombo ya Bakufi mpo na Makuli ya Tempelo

Soki likoki ezali, bansango oyo emonisi bato ya libota oyo bakufeli esengeli ekotisama FamilySearch.org yambo ete makuli ya tempelo masalama (tala 25,4.2).

28.1.1.1

Kotinda Bankombo ya Bato ya Libota

Ntango bazali kotinda bankombo mpo na makuli ya tempelo ya kozwela, bandimi basengeli mingi mingi kotinda kaka bankombo ya bato oyo bazali na mokangano na bango.

28.1.2

Nani Akoki Kosangana na Makuli mpo na Bakufi

Bandimi banso oyo bazali na mokanda ya ndingisa ya kokota tempelo na mokolo ya lelo bakoki kosangana na mabatisi mpe nkotisa mpo na bakufi. Bandimi oyo bapesameli mokanda wana ya ndingisa mpo na tempelo na mokolo ya lelo bakoki kosangana na makuli nyonso mpo na bakufi. Tala 26,3.

28.1.4

Kobongisa manaka

Bandimi bakoki kozala na mposa ya kosala bokutani yambo ya kosala makuli mpo na bakufi. Tala temples.ChurchofJesusChrist.org Mpo na koyeba makambo oyo ya kosolola na tempelo moko moko mpe makambo oyo esengeli kosala.

28.2

Kosala Makuli ya Tempelo mpo na Bato oyo Bakufa

Ntango bazali kosala makuli ya bozweli, mondimi akoki kosala lokola mozweli bobele mpo na moto oyo akufi oyo azali lolenge moko ya mbotama moko na mondimi.

28.2.1

Mabatisi mpe Bankotisa mpo na Bakufi

Mondimi nyonso oyo azali na mokanda ya koyingela na tempelo ya lelo akoki kobengisama mpo na kosala na misala ya libatisi. Misala mosusu ekoki kozala:

  • Kosala lokola mozweli mpo na mabaitisi mpe nkotisa.

  • Kosala lokola nzeneneke mpo na mabatisi ya bozweli.

  • Kosunga bapaya bayeli milulu na tempelo

Basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe banganganzambe na Bonganganzambe ya Alona bakoki kobengisama mpo na kosala libatisi mpo na bakufi. Bakoki mpe kobengisa bamemi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpo na kosala mosala ya nkotisa mpo na bakufi.

Bobele mibali oyo basala dotasio nde bakoki kobengisama na:

  • Kosala lokola kalaki mokomi na liziba.

  • Kosalela lokola kalaki mokomi na nkotisa

28.2.2

Dotasio (mpe kopesa makuli ya ebandeli)

Ntango bazali kosala dotasio ya bozweli mpo na mokufi, eteni ya ebandeli ya dotasio esalemaka mpe ekomami na bokabwani (tala 27.2). Mondimi nyonso oyo asala dotasio na mokanda ya ndingisa ya tempelo ya lelo akoki kosala lokola mozweli mpo na kozwa makuli oyo.

28.2.3

Kokangisama na Molongani mpe Kokangisa Bana na Baboti

Na tempelo, bato oyo bakufa bakoki kokangisama na balongani oyo babalanaki na bango na bomoi. Bato oyo bakufa bakoki mpe kozala na bana na bango ya bomoi to baye bakufa kokangisama na bango. Mondimi moko oyo alatisama nguya ya molimo elongo na mokanda ya tempelo ya sika akoki kosala lokola momonisi mpo na makuli ya bokangisi.

28.3

Makambo ya Sikisiki

Eteni oyo ezali kolimbola makambo mosusu oyo malakisi oyoezali na 28.1 ekoki kosalelama te.

28.3.1

Bana oyo Bakufaki liboso ya Mbotama (Bana oyo babotami na Kufa mpe oyo Balongoli zemi)

Makuli ya tempelo esengisami te to esalemaka te mpo na bana oyo bakufa liboso ya mbotama. Mpo na koyeba makambo mosusu, tala 38.7.3.

28.3.2

Bana Oyo Bakufaki liboso ya Mbula Mwambe

Bana mike basikolami na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe “babikisami na bokonzi ya selestiale ya lola” (Malongi mpe Mayokani 137:10). Mpo na ntina yango, libatisi to dotasio moko te ekosalema mpo na mwana oyo akufaki liboso ya mbula 8. Nzokande, kokangisama na baboti ekoki kosalema mpo na bana oyo babotamaki te na liyokani to bazwaki te makuli wana na bomoi (tala 18.1).

Bimisa na lokasa