Buku mpe Mbiangi
30. Mabiangi kati na Eklezia


“30. Mabiangi kati na Eklezia,” Maponi uta na Buku ya Monene (2023).

“30. Mabiangi kati na Eklezia,” Maponi uta na Buku ya Monene

Elilingi
bato bazali kotombola maboko ya mobali

30.

Mabiangi kati na Eklezia

30.0

Boyingisi

Mabiangi epesaka bandimi mabaku ya koyoka esengo ya kosalela Nzambe na kosalelaka bana na Ye (tala Mosiya 2:17). Mabiangi esungaka lisusu bandimi kobakisa bondimi na bango mpe kopusana penepene na Nkolo.

Ebongi malamu te kolinga mabiangi songolo na Eklezia (tala Malako 10:42–45; Malongi mpe Mayokani 121:34–37). Mpe lisusu ete, bandimi ya Eklezia “bakendeke liboso” uta na libiangi moko kino na mosusu. Kosalela na bosembo nyonso na libiangi ezali na ntina mingi koleka oyo libiangi ezali. Nkolo akumisaka komipesa ya bato nyonso oyo bazali kosalela na Eklezia na Ye.

30.1

Koyeba Nani Kobianga

30.1.1

Malakisi Manene

Baoyo basalelaka na Eklezia babiangemi na Nzambe (tala Bayuda 5:4; Maponi ya Bondimi 1:5). Bakambi balukaka bokambi ya Molimo mpo na koyeba nani basengeli kobianga (tala lisusu 4.2.6). Batalaka mpe:

  • Bolongobani ya mondimi (lokola ezwami na ntango ya lisolo elongo na moto yango).

  • Makabo mpe makoki maye mondimi azali na yango, to maye akoki kokolisa, mpo na kopambola basusu.

  • Makambo ya moto ye moko ya mondimi, sangisa mpe bokolongono ya nzoto mpe mosala na ye.

  • Nguya oyo libiangi ekoki kozala na yango na libala mpe libota ya mondimi.

Bandimi bapambolami mpo na lolenge bamibonzaka mpo na kosalela kati na Eklezia. Nzokande, libiangi esengeli te kotia mokumba oyo ebongi te likolo ya moto mpe mabota. Mabiangi mpe esengeli te kosala ete mikumba ya mosala ya bandimi ekoma mpasi mpo na kokokisa.

Mingimingi, mondimi moko na moko abiangemi mpo na kosalela bobele na libiangi moko na mbala moko, likolo ya kozala ndeko mobali to ndeko mwasi ya mosala.

Ntango bazali kopesa libiangi na mondimi oyo abala, bakambi basalaka ete molongani ayeba mpe asunga libiangi yango. Yambo ya kopesa libiangi na elenge mobali to elenge mwasi, bakambi bazwaka ndingisa uta na baboti to babateli na ye.

Yambo ya kopesa libiangi, episikopo atalaka na bokebi mokanda ya ezalela ya moto yango lokola mondimi mpo na kotala malamu ete etiama nkoma te to bopekisi ya polele na ezalela na ye lokola mondimi.

30.1.2

Mabiangi mpo na Bandimi ya Sika

Mabaku ya kosalela esungaka bandimi bakola na molimo.

Bakambi ya palwasi bapesaka bandimi ya sika mabaku ya kosalela nokinoki nsima ya kobatisama mpe ya nkotisa

30.1.3

Mabiangi mpo na Baoyo Bazali Bandimi Te

Bato oyo bazali bandimi ya Eklezia te bakoki kobiangema na bibonga mosusu, lokola mobeti piano, mokambi ya miziki, to libiangi mpo na kosunga kobongisa milulu. Nzokande, basengeli te kobiangema lokola bateyi, lokola bandimi ya lisanga likoki to ya bakambi ya mangomba, to lokola bakambi ya miziki ya Eteyelo ya Bana.

30.1.4

Kobatela Sekele

Mabiangi mpe bopemisi ezali bule. Na ntina na yango, bakambi babatelaka sekele ya bansango etali mabiangi mpe bopemisi lokola sekele.

30.1.5

Bitinda mpe Bondimisi mpo na Mabiangi

Etando ya mabiangi elakisi nani akoki kopesa makanisi mpo na libiangi moko moko mpe nani akopesa bondimi na makanisi yango (tala 30.8).

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi batalaka na bokebi bosenga to likanisi moko na moko, koyebaka ete esalemaki na losambo nyonso. Episikopo na basungi na ye to bakambi ya likonzi bazali na mokumba ya nsuka mpo na kozwa bofuli na ntina ya nani basengeli kobianga.

30.2

Kopesa Libiangi

Kozwa libiangi ya kosalela esengeli kozala likambo ya molimo ya ntina monene mpo na mondimi.

Ntango mokambi apesi libiangi, alimboli ete libiangi yango ewuti epai ya Nkolo.

Mokambi akoki mpe:

  • Kolimbola ntina, bonene, mpe mikumba ya libiangi.

  • Kolendisa mondimi mpo na koluka Molimo ya Nkolo na kokokisaka libiangi yango.

  • Kotatola ete Nkolo akosunga mondimi mpe akopambola ye mpo na kosalelaka na bosembo nyonso.

  • Koyebisa mondimi oyo nini akopesa ye mateya mpe lisungi mpo na libiangi.

  • Koyebisa mondimi makita nyonso oyo asengeli kokende mpe mikanda nyonso ya boyekoli oyo ekoki komonana.

30.3

Kosunga Bandimi na Mabiangi

Baoyo babiangemi na mabonga mingi koleka ya Eklezia basengeli kolakisama mpo na kosungama yambo ya kobanda kosalela (tala Malongi mpe Mayokani 28:13; 42:11).

Moto oyo azali kotambwisa likita wapi bakosunga akoyebisa yambo nani bapemisi na esika wana (soki esengeli). Abengisi bandimi kolakisa matondi mpo na mosala ya moto yango (tala 30.6).

Ntango azali kolakisa moto mpo na kosungama, mokambi ya bonganganzambe oyo apesameli ndingisa akobengisa ye atelema. Mokambi akoki kosalela maloba lokola oyo elandi:

“[Nkombo] abiangemi lokola [ebonga]. Baoyo bazali na ngambo ya kosunga [ye] bakoki komonisa yango na kotombolaka loboko. [Apemi mwa moke.] Baye baboyi, soki bazali, bakoki mpe kolakisa yango. [ApemI mwa moke.]”

Soki mondimi moko na ebonga ya likolo atelemeli libiangi yango, mokambi oyo azali kokamba to mokambi mosusu ya bonganganzambe oyo apesameli mokumba akosangana na ye na nkuku nsima ya likita.

30.4

Kotia Bandimi na Mosala mpo na kosalela na Mabiangi

Mpo na koyeba makambo mosusu, tala 18.11.

30.6

Kopemisa Bandimi na Mabiangi

Ntango mokambi to episikopo apemisami, bapesi toli na ye mpe bamipesami mbala moko.

Kopesa bopemi ezali libaku ya ntina mpo na mokambi mpo na kolakisa botondi mpe kondima loboko ya Nzambe na mosala ya mondimi. Mokambi asanganaka na mondimi ye moko mpo na koyebisa ye na ntina ya bopemi na ye yambo ete esakolama na miso ya bato banso. Bobele baye basengeli koyeba nde bapesami nsngo ya bopemisi yambo esakolama.

Mokambi ya bonganganzambe oyo apesameli ndingisa ya kosakola bopemisi na esika moko epai wapi moto yango asungama. Mokambi akoki kosalela maloba lokola oyo elandi:

“[Nkombo] apemisami lokola [ebonga]. Baoyo bakolinga kopesa matondi mpo na mosala [na ye] bakoki komonisa yango na kotombolaka loboko.”

Mokambi atunaka te soki moto azali kotelemela.

30.8

Etando ya Mabiangi

30.8.1

Mabiangi ya Palwasi

Libiangi

Etindami na

Endimami na

Esungami na

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Libiangi

Episikopo

Etindami na

Bokambi ya likonzi, na kosalelaka LCR

Endimami na

Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Zomi na Mibale

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi nsima ya kozwa bondimami uta na Bokambi ya Yambo

Libiangi

Bapesi toli na episkopo

Etindami na

Episikopo

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Kalaka ya palwasi

Etindami na

Episikopo na basungi na ye

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to mopesi toli apesameli mokumba to mopesi toli monene

Libiangi

Mokomeli mokambi ya palwasi

Etindami na

Episikopo na basungi na ye

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to mopesi toli apesameli mokumba to mopesi toli monene

Libiangi

mokambi ya lisanga likoki ya bampaka

Etindami na

Bokambi ya likonzi (na boyokani na episikopo)

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi

Libiangi

Bapesi toli na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka

Etindami na

Mokambi ya lisanga likoki (na boyokani na episikopo)

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to mopesi toli apesameli mokumba to mopesi toli monene

Libiangi

Mabiangi mosusu ya lisanga likoki ya bampaka

Etindami na

Bokambi ya lisanga likoki

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya lisanga likoki

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya lisanga likoki to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Bakambi ya mangomba ya palwasi

Etindami na

Boepisikopo

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo

Libiangi

Bapesi toli na bokambi ya mabongisi ya palwasi

Etindami na

Mokambi ya lingomba

Endimami na

Episikopo na basungi na ye

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Mabiangi mosusu ya Bamama Basungi, Bilenge Basi, Eteyelo ya Bana, mpe Kelasi ya Eyenga ya palwasi

Etindami na

Bokambi ya lingomba

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Mokambi ya misio ya palwasi (mondimi moko ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka akoki kosala mosala oyo; soki ezali bongo, asengeli te kobiangema, kosungama, to kotiama na mosala na bokeseni nyonso)

Etindami na

Episikopo (na kosololaka nabakambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basalisi)

Endimami na

Episikopo na basungi na ye

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Bamisionele ya palwasi

Etindami na

Episikopo na basungi na ye to bakambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basalisi

Endimami na

Episikopo na basungi na ye

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Mokambi ya tempelo mpe ya mambi ya libota ya palwasi (mondimi moko ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka akoki kosala mosala oyo; soki ezali bongo, asengeli te kobiangema, kosungama, to kotiama na mosala na bokeseni nyonso)

Etindami na

Episikopo (na kosololaka nabakambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basalisi)

Endimami na

Episikopo na basungi na ye

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Basungi ya mokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe

Etindami na

Episikopo (lokola mokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe)

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya lisanga likoki

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo

Libiangi

Bakambi ya lisanga likoki ya bateyi mpe badiakona

Etindami na

Boepisikopo

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya lisanga likoki

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Abiangemi na episikopo to mopesi toli oyo apesameli mokumba; atyamaki na mosala na episikopo

Libiangi

Bapesi toli na babokambi ya masanga makoki ya bateyi mpe badiakona mpe masanga makoki ya basekeletele

Etindami na

Mokambi ya lisanga likoki

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya lisanga likoki

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Bakambi ya kelasi ya Bilenge Basi

Etindami na

Boepisikopo (na boyokani na bakambi ya Bilenge Basi)

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya kelasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Bapesi toli na bakambi ya kelasi ya Bilenge Basi mpe basekeletele ya kelasi

Etindami na

Mokambi ya kelasi

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya kelasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Mabiangi mosusu ya palwasi

Etindami na

Boepisikopo

Endimami na

Boepisikopo

Esungami na

Bandimi ya palwasi

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Episikopo to mopesi toli apesameli mokumba

  1. Bakangi ya mosala na tempelo basengeli te kobiangema mpo na kosalela na baepisikopo na basungi na ye Bakangi babiangemi engebene na botambwisi ya bokambi ya Mokambi ya Eklezia.

30.8.2

Mabiangi ya Etape

Libiangi

Etindami na

Endimami na

Esungami na

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Libiangi

Mokambi ya etape

Etindami na

Bokambi ya likonzi, misio, to disitiliki

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene to bokambi ya misio

Esungami na

Bandimi ya etape

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to misio (to mokambi ya disitiliki soki apesameli mokumba)

Libiangi

Bapesi toli na bokambi ya etape

Etindami na

Mokambi ya etape

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene to bokambi ya misio (to, soki epesami ndingisa na mokambi ya misio, bokambi ya disitiliki)

Esungami na

Bandimi ya etape

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi, misio, to disitiliki to mopesi toli apesameli mokumba

Libiangi

Kalaki ya etape, bakalaki basungi mpe mokomeli

Etindami na

Bokambi ya etape

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene to bokambi ya misio (to, soki epesami ndingisa na mokambi ya misio, bokambi ya disitiliki)

Esungami na

Bandimi ya etape

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to mopesi toli apesameli mokumba to mopesi toli monene (mpo na bitape kati na makonzi); mokambi ya disitiliki to mokambi ya bonganganzambe apesi mokumba (mpo na bitape kati na bamisio)

Libiangi

Mokambi ya lisanga likoki ya bampaka

Etindami na

Bokambi ya likonzi, disitiliki, to bokambi ya misio (na boyokani na mokambi ya etape)

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene to bokambi ya misio (to, soki epesami ndingisa na mokambi ya misio, bokambi ya disitiliki)

Esungami na

Bandimi ya etape

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to misio (to mokambi ya disitiliki soki apesameli mokumba)

Libiangi

Bapesi toli na bokambi ya lisanga likoki ya bampaka

Etindami na

Mokambi ya lisanga likoki (na boyokani na mokambi ya etape)

Endimami na

Bokambi ya likonzi mpe lisanga ya bapesi toli minene to bokambi ya misio (to, soki epesami ndingisa na mokambi ya misio, bokambi ya disitiliki)

Esungami na

Bandimi ya etape

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Mokambi ya likonzi to misio to mopesi toli apesameli mokumba to mopesi toli monene (to mokambi ya disitiliki to mokambi mosusu ya bonganganzambe soki apesameli mokumba)

Libiangi

Mabiangi mosusu ya etape

Etindami na

Tala 30.8.1, kozwa esika ya mokambi ya etape mpo na episikopo mpe etape mpo na palwasi.

Endimami na

Tala 30.8.1, kozwa esika ya mokambi ya etape mpo na episikopo mpe etape mpo na palwasi.

Esungami na

Tala 30.8.1, kozwa esika ya mokambi ya etape mpo na episikopo mpe etape mpo na palwasi.

Abiangemi mpe atiami na mosala na

Tala 30.8.1, kozwa esika ya mokambi ya etape mpo na episikopo mpe etape mpo na palwasi.

  1. Bakangi na mosala kati na tempelo basengeli te kobiangema mpo na kosalela na babokambi ya etape. Bakangi babiangemi engebene na botambwisi ya Mokambi ya Eklezia.

Bimisa na lokasa