Buku mpe Mbiangi
29. Makita kati na Eklezia


“29. Makita kati na Eklezia,” Maponi uta na Buku ya Monene (2023).

“29. Makita kati na Eklezia,” Maponi uta na Buku ya Monene

Elilingi
mama mpe mwana mwasi na likita ya elambo

29.

Makita kati na Eklezia

29.0

Boyingisi

Basantu ba Mikolo mya Nsuka basanganaka elongo mpo na kokumbamela, kolendisa moko na mosusu, mpe koteya mpe koyekola nsango malamu (tala Alma 6:6; Moroni 6:5–6). Mobikisi alakaki, “Esika mibale to misato basangani elongo na nkombo na ngai, kuna nazali kati na bango” (Matai 18:20). Kosangana elongo ezali moko nzela oyo mitema na biso ekoki “kolingama elongo kati na bomoko mpe na bolingo bamoko na basusu” (Mosiya 18:21).

Nzokande, kosangana na likita esengeli ata moke te kozwa esika ya kosalela mpe ya kosalisa lokola esalaki Yesu Klisto.

29.1

Kobongisa mpe Kotambwisa makita

Bakambi babongisaka mpe batambwisaka makita “lokola bakambami na Molimo Mosantu, engebene na mitindo mpe bimoniseli ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 20:45; tala lisusu Moroni 6:9; Malongi mpe Mayokani 46:2). Balukaka banzela ya kobengisa nguya ya Molimo na makita na bango.

Bakambi basalaka ete motango mpe bolai ya makita ezala te mikumba mpo na bandimi to mabota na bango.

29.2

Makita ya Palwasi

29.2.1

Likita ya Elambo

29.2.1.1

Kobongisa mwango ya Likita ya Elambo

Episikopo na basungi na ye babongisaka mpe batambwisaka likita ya elambo. Bazali kosala ete mama ya likambo ya likita banso batieli makanisi ezali elambo mpe kotonga bondimi na Yesu Klisto.

Likita ya elambo ewumelaka ngonga moko. Ekoki kosangisa makambo oyo elandi:

  1. Miziki ya kolengela likita (tala 19.3.2 mpo na mlakisi).

  2. Losako mpe boyei malamu.

  3. Kopesa lokumu na bakonzi to bakambi basusu oyo bayei kotala biso.

  4. Mayebisi. Esengeli kosala ete makambo yango ezala mingi te.

  5. Loyembo mpe losambo ya bofungoli. Tala 19.3.2 mpe 29.6.

  6. Misala ya palwasi mpe ya likonzi, lokola oyo elandi:

    • Kosunga mpe kolongola basali mpe bateyi (tala 30.3 mpe 30.6).

    • Pesa bankombo ya bandeko mibali basengeli kokulisama na mosala ya bonganganzambe ya Alona (tala 18,10.3).

    • Koyeba bandimi ya sika ya palwasi, mpe babongwani ya sika.

  7. Kopesa nkombo mpe Kopambola Bana (tala 18.16). Yango esalemaka mingi mingi na likita ya kokila bilei mpe ya litatoli (tala 29.2.2).

  8. Nkotisa ya babongwani ya sika (tala 18.8).

  9. Loyembo ya elambo mpe kosala elambo. Elambo ezali mama ya likambo ya likita. Bokuli oyo ezali libaku mpo na bandimi kofandisa makanisi na bango epai ya Mobikisi mpe mbeka na Ye mpo na bango.

    Mpo na kozwa bansango mingi koleka na ntina ya kobongisa, kopambola, mpe kokabola elambo, tala 18.9.

  10. Nsango ya nsango malamu mpe koyemba ya lingomba mobimba to miziki mosusu.

  11. Loyembo ya bosukisi mpe losambo.

  12. Miziki ya nsima.

29.2.1.4

Kopona Balobi

Episikopo na balandi na ye baponaka balobi mpo na likita ya elambo. Mbala mingi babengisaka bandimi ya palwasi, mpe bilenge.

Balobi bapesaka litatoli ya Yesu Klisto mpe bateyaka nsango malamu na Ye na kosalelaka makomi (tala Malongi mpe Mayokani 42:12; 52:–9).

29.2.2

Likita ya Bokili mpe ya Litatoli

Na likita ya bokili bilei mpe ya kopesa matatoli, ezali na balobi oyo bapesameli mosala te to baponami mpo ya miziki ya malonga te. Na esika na yango, moto oyo azali kotambwisa apesaka litatoli ya mokuse. Na nsima, abengisi bandeko ya lisanga bapesa matatoli na bango. Kopesa litatoli elakisi kosakola bosolo ya nsango malamu lokola moto yango afulami na Molimo Mosantu.

29.2.3

Likita linene ya palwasi

29.2.4

Likita ya Episikopo na basungi na ye

Makambo oyo esengeli kotalela ekoki kozala:

  • Kobongisa mosala ya libiki mpe ya bonetoli na palwasi.

  • Kolendisa bato moko moko mpe mabota na palwasi—mingi mingi bilenge mpe bana.

  • Koyeba bandimi oyo bakokaki komilengela mpo na kozwa makuli, mpe bato basengeli kokula na bonganganzambe.

  • Koyeba bandimi ya kobianga na misala ya palwasi.

29.2.5

Likita ya Lisanga ya Palwasi

Episikopo abongisaka, akambaka, mpe atambwisaka makita ya lisanga ya palwasi. Likita ya lisanga ezwaka mikano minene te soki episikopo azali te.

Bakambi ya mabongisi ya palwasi bakendaka na makita ya lisanga ya palwasi na makoki mibale:

  1. Lokola bandimi ya lisanga ya palwasi oyo basungaka kopambola bandimi nyonso ya palwasi.

  2. Lokola bamonisi ya mabongisi na bango.

Ntango basanganaka elongo, bandimi ya lisanga ya palwasi balobelaka makambo oyo ekozwa litomba na milende ya bomoko ya lisanga mobimba. Mondimi moko na moko ya lisanga alendisami kokabola makanisi mpe bofuli na ye na makambo maye.

Mbala mingi makita ya lisanga ya palwasi eumelaka koleka ngonga moko te. Ebandaka na losambo mpe na balapolo ya mokuse oyo etali mikumba oyo bapesaki na makita ya kala. Episikopo apesaka esika ya yambo na makambo maye masengeli mingi mpo na kopambola bato mpe mabota.

  • Kobika nsango malamu ya Yesu Klisto. Kosunga bandimi nyonso kotonga bondimi, kozwa makuli ya kobikisa, mpe kobatela mayokani na bango.

  • Kosunga baoyo bazali na bosenga. Kokabola biloko mpe mayele mpo na kopambola bato, mabota, mpe lisanga. Kosunga bandimi ya palwasi bamikoka. (Tala mokapo 22.)

  • Kobengisa bato nyonso mpo na kozwa nsango malamu. Kozongela bokoli ya baye bazali koyekola na ntina ya nsango malamu, lokola mpe bandimi ya sika mpe bazongi. Kolobela banzela bandimi bakoki kokabola nsango malamu elongo na basusu. (Tala mokapo 23.)

  • Kosangisa mabota mpo na boseko. Kotala bokoli ya bandimi oyo bazali komilengela mpo na kozwa makuli ya tempelo. Kobongisa banzela ya kosunga bandimi mingi balongobana mpo na mokanda ya tempelo. Kolobela banzela bandimi bakoki kosangana na mosala ya mambi ya tempelo mpe ya libota. (Tala mokapo 25.)

Bandimi ya lisanga basengeli kobomba sekele bansango nyonso ya nkuku to ya ntina (tala 4.4.6).

29.2.6

LIkita ya Lisanga ya Bilenge ya Palwasi

Yambo ya likita moko na moko, episikopo mpe moto oyo azali kotambwisa batalelaka makambo oyo esengeli kolobelama.

  • Mosala ya libiki mpe bonetoli.

  • Bamposa ya bilenge na palwasi mpe banzela ya kokisa yango.

  • Milende mpo na kokutana na bilenge oyo bakoma na bolembu to bandimi ya sika.

  • Misala, sangisa mpe mabaku ya kosalela baoyo bazali na bosenga. Mingi ya mwango esalemaka na makita ya bokambi ya lisanga likoki to ya kelasi (tala mokapo 20).

  • Kosala mosala (tala mokano 21).

  • Koteya babokambi ya masanga mpe ya kelasi oyo ebengami sika.

29.2.8

Manaka ya Makita ya mokolo ya Eyenga

Bapalwasi basalelaka moko ya manaka ya ngonga mibale oyo elandi mpo na makita ya mokolo ya eyenga.

Mwango 1

60 miniti

Likita ya elambo

10 miniti

Bobongwani na bakelasi mpe makita

50 miniti

Mikolo ya Eyenga nyonso: Eteyelo ya Bana, sangisa mpe eteyelo ya bana mike

Mokolo ya eyenga ya yambo mpe ya misato ya sanza: Eteyelo ya Mokolo ya Eyenga

Eyenga ya mibale mpe ya minei: makita ya lisanga likoki ya bonganganzambe, makita ya Lingomba ya Bamama Basungi, mpe makita ya Bilenge Basi

Mikolo ya Eyenga ya mitano : makita mpo na bilenge mpe mikolo. Episikopo na basungi na ye baponaka moto ya likambo mpe baponaka bateyi

Mwango 2

50 miniti

Mikolo ya Eyenga nyonso: Eteyelo ya Bana, sangisa mpe eteyelo ya bana mike

Mokolo ya eyenga ya yambo mpe ya misato ya sanza: Eteyelo ya Mokolo ya Eyenga

Eyenga ya mibale mpe ya minei: makita ya lisanga likoki ya bonganganzambe, makita ya Lingomba ya Bamama Basungi, mpe makita ya Bilenge Basi

Mikolo ya Eyenga ya mitano : makita mpo na bilenge mpe mikolo. Episikopo na basungi na ye baponaka moto ya likambo mpe baponaka bateyi

10 miniti

Bobongwani na likita ya elambo

60 miniti

Likita ya elambo

29.3

Makita ya Etuka

29.3.1

Likita Linene ya Etuka

29.3.2

Likita LInene ya Bonganganzambe ya Etuka

29.3.3

Likita ya Bakambi ya Bonganganzambe ye Etuka

29.3.4

Makita ya Bakambi ya Etuka

29.3.5

Likita ya Lisanga Likoki ya Banganganzambe minene ya Etuka

29.3.6

Likita ya Bokambi ya Etuka

29.3.7

Likita ya Lisanga Monene

29.3.8

Likita ya Lisanga ya Etuka

29.3.9

Likita ya Komite ya Bokambi ya Mikolo ya Etuka

29.3.10

Likita ya Komite ya Bokambi ya Bilenge ya Etuka

29.3.11

Likita ya Lisanga ya Baepisikopo ya likonzi

29.5

Matanga mpe Misala Misusu mpo na Bakufi

29.5.1

Mabongisi Manene

Ntina moko ya monene ya misala ya Eklezia mpo na bakufi ezali kotatola na ntina ya mwango ya libiki, mingi mingi Bomikabi mpe Lisekwa ya Mobikisi. Misala yango esengeli kozala misala ya lokumu, ya kozwa mayele na molimo.

Bakambi ya Eklezia basengeli te kokotisa milulu ya biyamba to mangomba mosusu na milulu ya Eklezia mpo na bakufi.

29.5.2

Kopesa Lisungi na Libota

Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, bakambi mpe bandimi ya Eklezia “bazali kolela elongo na baye bazali kolela … mpe kobondisa baye batelemi na mposa ya libondisi” (Mosiya 18:9). Ntango mondimi moko akufi, episikopo akendaka kotala libota mpo na kopesa libondisi.

Episikopo apesaka lisungi uta na bandimi ya palwasi, mpe lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi.

29.5.4

Misala ya Matanga (Esika ya Momesano)

Matanga oyo etambwisami na episikopo, ezala na ndako ya Eklezia to esika mosusu, ezali likita ya Eklezia mpe molulu ya losambo. Esengeli kozala libaku ya kosala makambo ya molimo.

Matanga esengeli kobanda na ngonga malamu. Mingi mingi, esengeli te kowumela ngonga koleka moko na ndambo to1,5, lokola bonkonde mpo na baoyo bayangani.

Milulu ya bokundi esalemaka mpenza te na mokolo ya Eyenga.

29.6

Nsambo na Makita ya Eklezia

Mabondeli na makita ya Eklezia esengeli kozala mokuse, pete, mpe kokambama na Molimo. Mondimi nyonso ya Eklezia oyo abatisama akoki kosala losambo ya bofungoli to ya bosukisi. Bana oyo bazwi libatisi te bakoki kosambela na Eteyelo ya Bana.

29.7

Kopanza Nsango ya Makita mpe Kosala Makita na Nzela ya Interneti

Episikopo akoki, lokola bolongoli, kopesa ndingisa ya bopanzi nsango ya makita ya elambo mpe ya matanga mpe mabala oyo esalemi na ndako ya mayangani.

Bopanzi nsango ya likita ya elambo esengeli te batia eteni ya elambo.

Mpo na makita mosusu, episikopo to mokambi ya likonzi akoki kopesa ndingisa na bandimi oyo bakoki te kozala bango moko mpo na kolanda makita na nzela ya interneti. Makita yango ekoki kozala:

  • Makita ya bakambi, lokola makita ya bayangeli to ya makita lisanga ya bakambi.

  • Makita ya Lisanga likoki, ya Lingomba ya Bamama Basungi, mpe ya Bilenge Basi.

  • Bakelasi ya Eteyelo ya Eyenga.

  • Bakelasi ya Bana mpe ntango ya koyemba.

29.8

Bafoto mpe Kozwa Video na ntango ya Makita

Mpo na kobatela bosantu ya makita ya Eklezia, moto moko te asengeli kokanga bafoto to kozwa video ya makita ya elambo to ya makita ya likonzi.

Mpo na nsango etali bopanzi nsango ya likita, tala 29,7.

Bimisa na lokasa