Buku mpe Mbiangi
32. Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Mondimi ya Eklezia


“32. Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Mondimi ya Eklezia,” Maponi uta na Buku ya Monene (2023).

“32. Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Mondimi ya Eklezia,” Maponi uta na Buku ya Monene

Elilingi
mibali bazali kosolola

32.

Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Mondimi ya Eklezia

32.0

Boyingisi

Mbala mingi, boyamboli esalamaka kati ya moto, Nzambe, mpe bato oyo batungisami na masumu ya moto moko. Nzokande, ntango mosusu, episikopo to mokambi ya likonzi asengeli kosalisa bandimi ya Eklezia na makasi basalaka mpo ya koyambola.

Ntango bazali kosalisa bandimi bayambola, baepisiko mpe bakambi ya makonzi basengeli kolakisa bango bolingo mpe boboto. Balandaka ndakisa ya Mobikisi oyo alendisaki bato mpe asungaki bango batika masumu mpo babaluka epai ya Nzambe (tala Matai 9:10–13; Yoane 8:3–11).

32.1

Boyamboli mpe Bolimbisi

Mpo na kokokisa mwango na Ye ya mawa, Tata na biso na Lola atindaki Mwana na Ye se moko, Yesu Klisto, amikaba mpo na masumu na biso (tala Alma 42:15). Yesu anyokwamaki na etumbu wana oyo mobeko ya boyengebene esengi mpo na masumu na biso (tala Malongi mpe Mayokani 19:15–19; tala lisusu Alma 42:24–25). Na nzela ya libonza oyo, banso mibale Tata mpe Mwana balakisaki bolingo na bango ezanga nsuka mpo na biso (tala Yoane 3:16).

Soki tosaleli “bondimi oyo epusaka na boyamboli,” Tata na Lola alimbisaka biso, ayokelaka biso motema mawa na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto (Alma 34:15; tala lisusu Alma 42:13). Soki topetolami mpe tolimbisami, tokoki na nsuka kokota na bokonzi ya Nzambe (tala Yisaya 1:18; Malongi mpe Mayokani 58:42).

Boyamboli eleki mingi koleka kobongola ezaleli. Ezali koboya lisumu mpe kolanda Tata mpe Yesu Klisto. Ememaka moto na mbongwana ya motema mpe ya molimo (tala Mosiya 5:2; Alma 5:12–14; Elamani 15:7). Na nzela ya boyamboli, tokomaka bato ya sika, bato oyo bayokani na Nzambe (tala 2 Bakolinti 5:17–18; Mosiya 27:25–26).

Libaku ya koyambola ezali moko ya mapamboli manene mpenza Tata na Lola apesi biso na nzela ya likabo ya Mwana na Ye.

32.2

Bantina ya Kotia Bopekisi to ya Bolongoli Ezalela ya Mondimi na Eklezia

Soki mondimi asali lisumu monene, episikopo to mokambi ya likonzi akosalisa ye ayambola. Lokola eteni ya mosala oyo, ye akoki kotia bopekisi na matomba mpe mikumba ya moto oyo azali mondimi mpo na ntango moko. Ntango mosusu, akoki kolongola ezalela ya mondimi mpo na ntango.

Kopekisa to kolongola ezalela ya mondimi songolo esengeli kozala etumbu te. Mingi, misala oyo ezali ntango mosusu ntina mpo na kosalisa moto ayambola mpe asalela mbongwana ya motema. Epesaka lisusu moto ntango ya komilengela na molimo mpo na kokomisa moto ya sika mpe kobatela lisusu mayokani na ye.

Bantina misato ya bopekisi to bolongoli ezalela ya mondimi ezali oyo elandi.

32.2.1

Kobatela Basusu

Ntina ya yambo ezali ya kobatela basusu. Ntango mosusu moto akoki kozala moluki bitumba na nzoto to na molimo. Bizaleli ya kosala mabe, ya kozokisa na nzoto, ya monyokoli na kosangisaka nzoto, ya kokangama na bimeli mabe, moyibi mpe bopengwi ezali mwa banzela moke likambo oyo ekoki kosalema. Na bofuli episikopo to mokambi ya likonzi asalaka mpo na kobatela basusu ntango moto moko azali likama monene ya kobundisa na banzela oyo to banzela mosusu ya minene (tala Alma 5:59–60).

32.2.2

Kosalisa Moto Azwa Nguya ya Bosikoli ya Yesu Klisto na Nzela ya Boyamboli

Ntina ya mibale ezali ya kosalisa moto azwa nguya ya bosikoli ya Yesu Klisto na nzela ya boyamboli. Na nzela ya mosala oyoya boyamboli, akokoma lisusu peto mpe ya kolongobana mpo na kozwa mapamboli nyonso ya Nzambe.

32.2.3

Kobatela Bosembo ya Eklezia

Ntina ya misato ezali kobatela bosembo ya Eklezia. Kotia bopekisi to kolongola mokumma naezalela ya mondimi ya Eklezia ezali ntina soki ezaleli na ye ezali kobebisa lokumu ya Eklezia makasi (tala Alma 39:11). Bosembo ya Eklezia ebatelami te na kobombaka to komonaka masumu ya minene mpamba—kasi na kosembolaka yango.

32.3

Mokumba ya Basambisi na Yisalaele

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi babiangemi mpe batiami mpembeni mpo na kozala basambisi na Yisalaele (tala Malongi mpe Mayokani 107:72–74). Bazali na bafungola ya bonganganzambe mpo na kozwa esika ya Nkolo na kosalisaka bandimi ya Eklezia bayambola (tala Malongi mpe Mayokani 13:1; 107:16–18).

Mbala mingi baepisikopo mpe bakambi ya makonzi basungaka bato koyambola na nzela ya toli bango na moto ye moko. Lisungi oyo ekoki kozala kopekisa na ndenge ya momesano mabaku mosusu ya ezalela mondimi ya Eklezia mpo na mwa ntango.

Mpo na masumu minene misusu, bakambi basungaka bandimi bayambola na kosalaka lisanga ya botali ezalela ya mondimi (tala 32.6). Lisungi oyo ekoki kozala kopekisa na ndenge ya mibeko mabaku mosusu ya ezalela mondimi ya Eklezia to kolongola ezalela mondimi ya moto mpo na mwa ntango.

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi bakozala na bolingo mpe bokebi ntango bazali kosalisa bandimi bayambola. Lolenge ya kosala ya Mobikisi na mwasi oyo azwami na ekobo ezali ndakisa (tala Yoane 8:3–11). Atako Alobaki te ete masumu na ye malimbisami, Akweyisaki ye te. Na esika ya kosala bongo, Ayebisaki ye ete “asumuka lisusu te”—elingi koloba ayambola mpe abongola bomoi na ye.

Bakambi oyo bateyaka ete “esengo ezali na … lola mpo na mosumuki moko oyo ayamboli” (Luka 15:7). Bazalaka na bompikiliki, boboto mpo na kosunga, mpe bato na bondimi. Bafulaka elikya. Bateyaka mpe batatolaka ete mpo na libonza ya bomikabi ya Mobikisi, moto nyonso akoki koyambola mpe kokoma peto.

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi balukaka bofuli ya Molimo mpo na koyeba lolenge nini ya kosalisa moto nyonso ayambola. Bobele mpo ya masumu minene nde Eklezia ezali na mabongisi elengelami oyo bakambi basengeli kozwa mikano (tala 32.6). Makambo mibale te makokana. Toli oyo bakambi bapesaka mpe nzela ya boyamboli oyo balakisaka kolanda na pete esengeli kofulama mpe ekoki kokesena mpo na moto moko na moko

32.4

Ntubela, Sekele, mpe Kopesa lapole na Bakonzi ya Leta.

32.4.1

Ntubela

Boyamboli esengaka ete masumu etubelama epai ya Tata na biso ya Lola. Yesu Klisto alobaki, “Na oyo bokoki koyeba soki moto ayamboli masumu na ye—tala, akotubela yango mpe akotika yango libela” (Malongi mpe Mayokani 58:43; tala lisusu Mosiya 26:29).

Ntango bandimi ya Eklezia basali masumu ya minene, boyamboli na bango esangisi mpe ntubela na episikopo to mokambi ya likonzi na bango. Azali bongo na makoki ya kosalela bafungola ya Nsango malamu ya boyamboli na ntina na bango (tala Malongi mpe Mayokani 13:1; 84:26–27; 107:18, 20). Yango epesaka bango ndingisa ya kobikisama mpe kozonga na nzela ya Nsango malamu na nguya ya Bomikabi ya Mobikisi.

Ntina ya ntubela ezali ya kolendisa bandimi bamilongola mikumba na ntina ete bazwa bofuluki ya lisungi ya Nkolo mpo ete babongwana mpe babikisama. Kokolisa “motema ebukana mpe molimo ya mawa” esungamaka na ntubela (2 Nefi 2:7). Ntubela ya moto ye moko elakisi ete moto azali na mposa ya koyambola.

Ntango mondimi atubeli, episikopo to mokambi ya likonzi azali kolanda bokambi oyo etalisami kati ya 32.8. Na molimo ya losambo akoluka bofuli mpo na koyeba mwango nini elengelami mpo na kosalisa mondimi ayambola. Akomituna soki lisanga ya botali ezalela ya mondimi ekozala ntina. Soki mibeko ya Eklezia esengi lisanga ya botali ezalela ya mondimi, akolimbola mpo na nini (tala 32.6).

Ntango mosusu mondimi asalaki molongani na ye to mokolo mosusu mabe. Lokola eteni ya boyamboli, mbala mingi asengeli kotubela na moto yango mpe koluka bolimbisi. Mbala mingi, elenge oyo asali lisumu monene, alendisamaka kozwana na toli elongo na baboti na ye.

32.4.4

Sekele

Baepisikopo, bakambi ya makonzi, mpe bapesi toli na bango bazali na mokumba ya bule ya kobatela bansango nyonso ya sekele oyo bakaboli na bango. Nsango oyo ekoki kouta na masolo, na toli, mpe na bantubela. Mokumba moko oyo ya bobateli sekele esalelami na moto nyonso oyo akozala na kati ya lisanga ya bosambisi mokumba ya mondimi. Sekele ezali na ntina mpo ete bandimi bakoki te kotubela masumu to koluka bokambi soki oyo bakabolaka ekobombama sekele te. Kobuka elikya moko ezali koteka elikya ya bandimi mpe esalaka ete babungisa elikya epai ya bakambi na bango.

Engebene na mokumba na bango ya bobombi sekele, episikopo, mokambi ya likonzi, to bapesi toli na bango bakoki kokabola bansango oyo, bobele na makambo oyo elandi:

  • Basengeli kosolola na mokambi ya likonzi ya mondimi, mokambi ya misio, to episikopo na ntina ya kosala lisanga ya bosambisi mokumba ya mondimi to makambo etali yango.

  • Moto yango akei na palwasi ya sika (to mokambi ya bonganganzambe alongwa) ntango mosala ya bondimi to mitungisi mosusu ya makasi ezali kozela.

  • Episikopo to mokambi ya likonzi ayebi ete mondimi ya Eklezia oyo afandi libanda ya palwasi to likonzi akoki kozala kati na lisumu ya monene.

  • Ezali ntina bansango elobama na ntango ya lisanga ya bosambisi mokumba ya mondimi.

  • Mondimi akopesa ndingisa na mokambi aloba bansango epai ya bato oyo basengeli.

  • Ekoki kozala ntina na kokabola bansango moke etali ekateli ya lisanga ya bosambisi mokumba ya mondimi

Mpo na kosalisa bakambi babatela basusu mpe batosa mobeko, Eklezia epesi lisungi ya basali balongobani. Mpo na kozwa bokambi oyo, bakambi bakosenga na lombango lisungi na telefone na oyo etali misala, esika yango ezwami (tala 38.6.2.1). Esika oyo ezwami te, mokambi ya etuka enene akokutana na bakambi ya bazuzi ya bilo ya etuka enene.

Na likambo bobele se oyo epesi episikopo to mokambo ya likonzi ndingisa apanza bansango ya sekele na bozangi koluka yambo bokambi ya boye. Wana ezali ntango bopanzi bansango ezali ntina mpo na kokima ete bomoi ya moto ezala na likama to mbeba monene mpe ntango ezali te ya koluka bokambi. Na likambo ya lolenge wana, mokumba ya kobatela basusu ezali ntina koleka mokumba ya kobatela sekele. Bakambi basengeli na lombango kokutana na bakonzi ya leta.

32.6

Bonene ya Lisumu mpe Mobeko ya Eklezia

Bonene ya lisumu ezali likambo monene ya kotala na ekenge mpo na kozwa mokano etali lolenge ya (1) kobatela basusu mpe (2) kosalisa moto ayambola. Nkolo alobaki ete akoki te “kozwa lisumu lokola eloko ya liseki” (Malongi mpe Mayokani 1:31; tala lisusu Mosiya 26:29). Bakambi na Ye basengeli te kotika likambo ya lisumu monene eleka kaka boye.

Masumu minene ezali mbeba monene mpe masalemi na nko na mibeko ya Nzambe. Biteni ya masumu minene ezali oyo elandi.

  • Misala ya kosala na makasi mpe konyokola

  • Mposa ya makambo ma nsoni

  • Misala ya lokuta mpe moyibi

  • Kobebisa motema bato bazangisi elikya

  • Misala mosusu

Soki Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami to Ekoki Kozala na Ntina

Lolenge ya Lisumu

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Ekoki Kozala na Ntina

Lolenge ya Lisumu

Misala ya Bosaleli Makasi mpe Minyoko

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami

  • Koboma

  • Kozwa Mobali to Mwasi na Makasi

  • Etumbu ya mposa ya bosangisi nzoto

  • Misala ya botungisi mwana to elenge

  • Ezaleli ya moto mabe

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Ekoki Kozala na Ntina

  • Bomeki koboma

  • Misala ya bosangisi nzoto kati na monyoko, lokola kotungisa to kobundisa mwasi to mobali mpo na kosangisa nzoto (tala 38.6.18 ntango lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengami)

  • Konyokola molongani to mokolo mosusu (tala 38.6.2.4 ntango lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengami)

Lolenge ya Lisumu

Mposa ya Bosangisi Nzoto

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami

  • Bosangisi nzoto na ndeko ya libota

  • Kotal bilili ya bana mutakala

  • Kobala basi to mibali ebele

  • Ezaleli ya bosangisi nzoto na makasi

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Ekoki Kozala na Ntina

  • Ekobo, bondumba, bosangani nzoto mobali na mobali to mwasi na mwasi, mpe mikangano mosusu ya lolenge mabe, libala ya bato ya lolenge moko, mpe mikangano nyonso oyo esalemaka libanda ya libala oyo elongobani ya mobali mpe mwasi, mpe lisusu bosaleli bosangisi nzoto na entereneti mpe na telefone.

  • Kimakangu, bosangani, mpe kimoninga ya lolenge mabe, libala ya bato ya lolenge moko

  • Bosaleli makasi ya bilili ya mabe oyo ekoki kobebisa libala makasi to libota ya mondimi

Lolenge ya Lisumu

Misala ya lokuta mpe moyibi

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami

  • Ezaleli ya boyibi mosolo, lokola moyibi mpe lokuta mpe bizaleli oyo ekokani na oyo (tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki kati ya boyibi misolo to biloko ya Eklezia)

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Ekoki Kozala na Ntina

  • Moyibi, kobuka ndako, kosalela misolo ya yo te, to lokuta (tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki na kati ya boyibi misolo to biloko ya Eklezia)

  • Bowangani

Lolenge ya Lisumu

Kobebisai Motema Btielaka Moto

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami

  • Lisumu monene ntango moto azali na ebonga monene na kati ya Eklezia

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Ekoki Kozala na Ntina

  • Lisumu monene ya moto oyo azali na ebonga ya bokambi to ebonga oyo bato batielaka motema kati ya Eklezia to kati ya lingomba ya bato (tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki na kati ya koyiba misolo to biloko ya Eklezia)

  • Lisumu monene oyo eyebani na bato

Lolenge ya Lisumu

Mwa Makambo Mosusu

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Esengami

  • Kokweyisama mingi na makambo mazangi bosembo

Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi Ekoki Kozala na Ntina

  • Bolongoli zemi (longola se oyo etangami te na 38.6.1 esalelami)

  • Ndakisa ya masumu minene

  • Bosundoli na nko mikumba ya libota, lokola koboya kofuta mbongo ya bilei ya bana

  • Koteka bangi

  • Misala misusu ya mabe manene

32,6.3

Ntango Mokambi ye Etuka Akutani na Bokambi ya Etuka Enene etali Soki Lisanga ya Botaleli Ezaleli ya Mondimi to Mosala Mosusu Ezali na Ntina

Makambo mosusu esengaka kozala na bososoli mpe bokambi mosusu. Mpo koyeba lolenge nini kosalisa, mokambi ya likonzi asengeli kokutana na Bakambi ya Etuka Enene mpo na ntina ya makambo na eteni oyo.

32.6.3.2

Bopengwi

Makambo ya bopengwi mbala mingi ezalaka na nguya koleka bandelo ya palwasi to ya likonzi. Esengeli kotalela likambo ya bopengwinokinoki mpo na kobatela basusu.

Episikopo akokutana elongo na mokambi ya likonzi soki amoni ete misala ya mondimi ekoki kozala bopengwi.

Lokola esalelami awa, bopengwi elingi kolobela bomipesi ya mondimi na moko ya makambo oyo elandi:

  • Mbala na mbala kosalaka na kotelemelaka eklezia, mateya na yango, politiki na yango, to bakambi na yango polele mpe na nko na miso ya bato nyonso.,

  • Kotingama na koteyaka lokola malongi ya Eklezia oyo ezali mateya ya Eklezia te nsima ya kosembolama na episikopo to mokambi ya likonzi

  • Kolakisa motindo moko ya kosala na nko mpo na kolembisa bondimi mpe mosala ya bandimi ya Eklezia

  • Kokoba kolandaka mateya ya mangomba ya bapengwi nsima ya kosembolama na episikopo to mokambi ya likonzi

  • Kosangana na ndenge ya mibeko na lingomba mosusu mpe kotombolaka mateya na yango

32.6.3.3

Kosalela Misolo ya Eklezia

Soki mondimi moko asaleli misolo ya Eklezia to ayibi biloko ya motuya ya Eklezia, mokambi ya likonzi akokutani elongo na Bakambi ya Etuka Enene mpo na kotala soki lisanga ya bataleli ezalela ya mondimi esengeli kosangana to mosala mosusu esengisami kosalema.

Bimisa na lokasa