Buku mpe Mbiangi
Mikanda ya Bandimi mpe Balapole


“33. Mikanda ya Bandimi mpe Balapole,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“33. Mikanda ya Bandimi mpe Balapole,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
bato bazali kotala odinatele

33.

Mikanda ya Bandimi mpe Balapole

33.0

Boyingisi

Kobomba mikanda ya Bandimi ezalaka ntango nyonso eloko ya ntina monene na kati ya Eklezia ya Nkolo. Ndakisa:

Adama abombaki “buku moko ya bokundoli” (Mose 6:5).

Moroni ateyaki ete bankombo ya baye babatisamaki na kati ya Eklezia ya Klisto ekomamaki mpo ete “bakoka kokundolama mpe koleisama na liloba malamu ya Nzambe” (Moroni 6:4).

Joseph Smith ateyaki ete kalaki asengeli kobiangama na palwasi mpo na “kobomba mikanda ya bosolo liboso ya Nkolo” (Malongi mpe Mayokani 128:2).

33.1

Mobimba ya Mikanda ya Eklezia

Kobatela mikanda ya Eklezia ezali bule. Nsango oyo ezali kati na yango ezali sekele mpe esengeli kobombama na bokengi. Misala ya kobomba mikanda ya Eklezia epesaka bandimi ndingisa ya koyingela na nsango ya bandimi na kolandaka mabiangi.

Mikanda ya bandimi ekoki kosalisa bakambi:

  • Bayeba nani akoki kozala na bosenga songolo.

  • Koyeba makuli nini ya lobiko moto azwaki to akoki kozala na bosenga na yango.

  • Koyeba bisika bandimi bafandi.

Ndenge ya mikanda oyo elandi nde ebatelami na kati ya bitonga ya Eklezia:

  • Lapole ya boyei ya bandimi (tala 33.5)

  • Mikanda ya bandimi (tala 33.6)

  • Mikanda ya Lisitwale (tala 33.7)

  • Mikanda ya botangi mosolo (tala mokapo 34)

33.2

Makebisi Minene etali Bakalaki

Basengeli kozala na mokanda ya ndingisa ya boyingeli na tempelo.

Bakalaki bakolandela na bokebi mibeko mpo na kobomba misolo ya Eklezia mpe koyeba ete makambo bakomi na mikanda ya Eklezia ezali solo. Na lombango bakalaki bakokomela bakambi ya bonganganzambe manso etali makambo malongobani te na mikanda. Soki kpokoso ezali na bosilisi makambo makomami malamu te, bakalaki basengeli kokutana na Bilo ya Mikanda ya Sekele na bilo monene ya Eklezia.

Telefone: 1-801-240-2053 or 1-800-453-3860, poste 2-2053

Kobenga ya ofele (GSD telefone): 855-537-4357

Email: ConfidentialRecords@ChurchofJesusChrist.org

Bowumeli ya mosala ya bakalaki esengeli kozala ya ntango ekoka mpo ete bayekola mokumba na bango malamu mpe babatela bokobi na mosala na bango. Mpo ete bazali bandimi te kati na bokambi ya likonzi to ya boepisikopo, basengeli te kofandisa bango ntango ya kofandisa bakambi ya likonzi to baye ya episikopo ebongisami sika.

33.4

Balapole mpe Mikanda ya Palwasi

33.4.1

Boepisikopo

Episikopo akambaka mosala ya bobateli mikanda ya palwasi.

33.4.2

Kalaki ya Palwasi

Palwasi nyonso esengeli kozala na kalaki oyo ayebi mosala, mpe oyo azali kosala yango. Atindami na episikopo mpe abengami mpe atiami mpembeni na moko ya bakambi ya likonzi to ya lisanga linene oyo atindami. Asengeli kozala Nganganzambe ya Melekisedeki mpe kozala na mokanda ya ndingisa ya boyingeli na tempelo. Azali moko ya lisanga ya palwasi. Ayaka na makita ya palwasi lokola etindami na 29.2.

Kalaki ya palwasi alakisami na bakambi ya episikopo mpe na bakalaki ya likonzi. Bakoki kobenga mpe bakalaki mibale ya palwasi mpo na kosalisa.

33.4.2.1

Mikumba ya Bobateli Mikanda

Kalaki ya palwasi, to kalaki ya mibale oyo aponami, azali na mikumba oyo elandi:

  • Kobatela mikanda ya mikumba mpe bikateli oyo esalamaki na makita ya bakambi ya palwasi.

  • Koyeba ete bansango kati nz mikanda mpe balapole ezali ya solo mpe ya ntango malamu.

Kalaki ya palwasi asengeli komesana na bisalelo ya bobombi mikanda ya Eklezia (tala 33.0). Akosalela bisalelo oyo mpo na kosunga bakambi bayeba:

  • Bosenga ya bandimi mpe mangomba.

  • Mikanda oyo ekoki kozwama, mpe lisusu misolo.

Bakalaki ya Palwasi balendisaka bandimi basala lapole ya mabunga oyo ezali na mikanda na bango ya bandimi.

Mikumba mosusu ya kobomba mikanda ekoki kosenga:

  • Koyeba ete makuli esalamaki malamu mpe ekomamaki na lombango.

  • Kolengela mokanda ya Bosungi Bayangeli mpo na likita ya palwasi.

  • Kokoma nsango mpo na bosambisi kimondimi ya palwasi.

  • Kobomba mikanda ya botangi mosolo (tala 34.2.2).

33.5

Balapole ya Misala ya Mondimi

Balapole ya misala ya mondimi esungaka bakambi bayeba kotala malamu botamboli mpe bamposa ya bandimi.

33.5.1

Ndenge ya Balapole

33.5.1.1

Lapole ya Kozala na Makita

Kozala na makita ya elambo mpe makita ya bonganganzambe mpe makita ya lingomba na eyenga ekomami na masini na kosalelaka LCR to Bisalelo ya Mondimi.

Likita ya elambo. Kozala na kati ya likita ya elambo ekomamaka poso nyonso na kalaki ya palwasi to kalaki ya mibale ya palwasi. Motango bakozwa ezali motuya ya baye bayaki na likita ye moko moto mpenza to kolandaka na nzela ya tekinoloji mpe lisusu bapaya.

Makita ya Lisanga likoki mpe ya Makita ya Lingomba ya Eyenga. Mokanda ya baye bazalaka na makita ekomamaka poso nyonso na basekeletele mpe bapesi toli ya lisanga likoki mpe lingomba. Bakambi ya bilenge bakoki lisusu kozala na ntango ya kokoma nkombo ya banani bazali na likita. Motango bakozwa ezali motuya ya baye bayaki na likita ye moko moto mpenza to kolandaka na nzela ya tekinoloji mpe lisusu bapaya. Bandimi oyo bazali kosalisa na Eteyelo ya bana to bakambi ya bilenge na kati ya palwasi batangami lisusu na kati.

Kalaki ya palwasi akoki kokoma motango ya bato bazali na esika ya lingomba songolo.

33.5.1.2

Balapole ya Masolo elongo na Basungi

Tala 21.3.

33.5.1.3

Lapole ya Basanza misato

Nimelo nyonso na kati ya lapole elimbolaka moto ya sikawa oyo azali na bosenga songolo (tala Elamani 15:13).

Mpe Lapole ya Basanza misato ezali na nsango ya motuya oyo epesaka bakambi babomni ntango bazali koluka bofuli na ntina ya kotuya bokasi na bango na mosalaya kosalisa.

Bakambi ya likonzi mpe ya palwasi bakotanga Lapole ya Basanza misato mbala na mbala mpo na kotalela botamboli ya bato.

Palwasi nyonso bakokisaka mpe batindaka Lapole ya Basanza misato na bilo monene ya Eklezia. Kalaki akotala lapole yango elongo na episikopo mpe bakotinda yango yambo ya mokolo 15 ya sanza kolanda nsuka nyonso ya basanza misato nyonso.

33.5.2

Mikanda ya Nkombo ya Bandimi

Bisalelo ya bobombi makambo ya Eklezia epesaka bakambi ndingisa ya kkoyingela na mikanda ya bankombo ya bandimi. Mikanda oyo ya bankombo ekoki kosunga bakambi bayeba:

  • Bandimi nini naino bazwi makuli te oyo elengelami mpo na bango.

  • Bilenge mibali mpe bilenge basi nini balongobani mpo na kosala misio.

  • Elenge nini azali te na mokanda ya ndingisa ya boyingeli na tempelo.

  • Elenge nini asengeli kolengelama mpo na masolo elongo na moko ya bakambi ya episikopo.

Bakambi ya lisanga likoki mpe lingomba basengeli koyingela na mikanda ya bankombo ya baye bazali na kati ya lisanga likoki to lingomba na bango .

33.6

Mikanda ya Bandimi

Mikanda ya bandimi ezalaka na bankombo ya bandimi, nsango etali adresi mpe nimelo ya kobenga bango, nsango etali bokuli, mpe nsango mosusu ya motuya.

Mikanda ya bandimi esengeli kobatelama na palwasi wapi bandimi bafandi. Makambo ya kolongola, emonanaka mpenza te, esengaka bondimami ya baepisikopo mpe bakambi ya makonzi. Mpo na kosenga balongola likambo, mokambi ya likonzi asalelaka LCR mpo na kotinda bosenga na Bilo ya Bokambi ya Yambo.

Ezali ikambo ya motuya monene etr basala maye malandi na lombango:

  • Kokoma nsango ya bokuli.

  • Kotinda to kolongola mikanda ya bandimi oyo bakei to balongwe na palwasi.

  • Kokela mikanda mpo na bandimi ya sika mpe bana ya sika ya baboti oyo bazali bandimi.

  • Kokoma liwa ya mondimi.

  • Kokoma nsango ya libala mpe ya libota.

Episikopo to mokambi ya likonzi bakotala ete mokanda ya mondimi ezali na kati ya palwasi elongobani yambo ya kosolola na mondimi mpo na kozwa:

  • Libiangi ya Eklezia

  • Mokanda ya ndingisa ya boyingeli na tempelo.

  • Bonganganzambe ya Melekisedeke to kokulisama na mokumba na kati ya bonganganzambe wana.

Akotala lisusu ete mokanda ezala na likambo oyo elandi te:

  • Ekomama mwa makambo likolo na yango

  • Nsango etalibopekisi na bokangisi to na bokuli

  • Kotia Bopekisi ya Polele na Mondimi

Na nse ya mabaku moko te mikanda ya mondimi epesama to elakisama na moto mosusu longola se na episikopo to kalaki.

Bandimi bakoki kotala nsango ya mondimi mpo na bango moko mpe bana mosusu oyo bafandaka na libota na Member Tools app. Bakoki lisusu kosenga mikanda mibisama na lokasa ya Makuli Mobimba ya Bandimi na bango uta na kalaki. Soki mabunga ezali, kalaki akosala ete babongisa mabunga yango na mikanda ya mondimi.

33.6.1

Bankombo Basalelaka na Mikanda Eklezia

Nkombo mobimba ya moto, lokola elimbolami na mobeko ya etuka to ya ekolo, nde basengeli kosalela na mikanda ya mondimi mpe mikanda ya makuli.

33.6.2

Bandimi Bakomisami na Mikanda

Bato oyo balandi bazali bandimi bakomisama nkombo na mikanda mpe basengeli kokomama na kati ya mokanda ya kimondimi:

  • Baye babatisamaki mpe bakotisamaki

  • Baye bazali na nse ya mibu 9 baye bapambolamaki kasi babatisami te.

  • Baye batangami te na ntina ya bozangi makoki ya kotanga, na kozangaka kotala mibu.

  • Bana oyo naino bapambolami te na nse ya mibu 9 ntango makambo mibale oyo emonisami:

    • Bobele moboti to nkoko moko azali mondimi ya Eklezia.

    • Baboti banso mibale bapesaka ndingisa mpo basala mikanda. (Soki bobele moboti moko azali na mokumba ya mwana, ndingisa ya moboti wana ekoki.)

Moto ya mibu 9 to koleka oyo akomami na mikanda kasi naino azwa libatisi te mpe akotisamaki mpe te azali mondimi akomisama te. Nzokande, palwasi wapi oyo moto yango afandi ekobomba mokanda ya mondimi kino moto yango akokokisa mibu 18. Na ntango wana, soki moto aponi kobatisama te, episikopo akolongola mokanda na ye ya mondimi. Ndingisa ya mokambi ya likonzi esengelami.

Mikanda elongolami te mpo na baoyo babatisamaki te mpo ete bazali na makoki ya kotanga te longola se na bosenga ya moto to mobateli ayebani na leta mpe lisusu moboti moko.

33.6.3

Mikanda ya Bandimi ya Sika na Palwasi

Kalaki ya palwasi to kalaki ya mibale akokutana na bandimi ya sika ya palwasi na lombango nsima ya mikanda na bango ya mondimi koya mpo na kotala Mobimba ya Bokuli ya Moto soki ezali malamu.

33.6.6

Mikanda ya Bandimi oyo Basalisaka libanda ya Nzinganzinga ya Palwasi na Bango.

33.6.6.2

Mikanda ya Bamisionele ya Ntango Mobimba

Tala 24.6.2.8.

33.6.13

Mikanda ya Bana ya Baboti Bakabwana

Mikanda nyonso ya bandimi esalelaka nkombo eyebana na leta ya moto, lokola ekomami na mobeko ya etuka to ya ekolo. Yango etali lisusu bana ya baboti oyo bakabwana.

Bana oyo bazali na baboti bakabwana bayaka mbala mingi na makita ya Eklezia na bapalwasi mibale ya baboti. Ntango bobele etonga moko nde ekoki kobomba mpe kokomisa sika mikanda elongobana ya bana, mikanda ya mondimi oyo azali libanda ya etonga ekoki kosalama na palwasi mosusu epai eye ye akendaka. Yango epesaka nzela ete nkombo ya mwana mpe nsango ya batp akobenga ekotisama na mikanda ya palwasi mpe mikumba ya kelasi.

Mwana oyo azali na mokanda ya mondimi libanda ya etonga akoki kozwa libiangi na kati ya etonga wana.

33.6.15

Kolongola Bopekisi naMikanda ya Mondimi

Soki mondimi alongwe na ntango oyo bopekisi ya polele eiami na nkombo na ye mondimi na ye to likambo mosusu ezali naino elongolami te, episikopo to kalaki oyo apesami ndingisa akoki kokoma bopekisi ya bolongwi likolo ya mokanda ya mondimi. Akosalela LCR mpo na kosala yango.

Mokanda ya mondimi oyo etiami bipekisi ekotindama na etonga ya sika te kino mokambi ya bonganganzambe oyo atiaki yango akopesa ndingisa balongola yango.

33.6.16

Mikanda uta na “Mikanda ya Bisika Eyebani Te”

Mondimi mbala mosusu ayebani bisika afandi nsima ya mokanda na ye kotiama na“Mikanda ya bisika biyebani te” na Bilo ya Eklezia. Na likambo ya boye, kalaki ya palwasi akosenga mokanda na kosalelaka LCR.

33.6.17

Kokomaka mpe Kobongisaka Mabungana Bansango ya Makuli

Tala mokapo 18.

33.6.19

Mosala ya Kotalela Mikanda ya Kimondimi

Mobu nyonso kalaki ya likonzi to kalaki ya mibale ya likonzi akoyeba ete mosala ya kotalela mikanda ya bandimii etindami na palwasi moko moko na kosalelaka LCR. Kokamba misala ya kotalela mikanda ya bandimi esengeli kokokisama na mokolo ya 30 sanza ya motoba ya mobu nyonso.

33.7

Mikanda ya Lisitwale

33.7.1

Lisitwale ya Palwasi mpe ya Likonzi

Nkolo atindaki ete “lisitwale ya makambo manso ya manene” etali Eklezia na Ye ekomama mpe ebombama (Malongi mpe Mayokani 69:3; tala lisusu molongo 5; Alma 37:2).

Etonga nyonso na Eklezia esengeli kokoma makambo nyonso ya ntina etali inite.

Kobombaka lisitwale ezali mosala ya molimo oyo ekolendisa bondimi ya baye bazali kokoma mpe kotanga yango.

Bakambi ya bonganganzambe mpe ya mangomba ya likonzi mpe palwasi basalisaka na masolo na kosalelaka esalelo ya Unit History tool na ChurchofJesusChrist.org. Bakalaki ya likonzi mpe palwasi bazali na mokumba ya yambo ya kobongisa mpe kolengela na bokasi oyo. Malakisi ebakisami ezali na kati ya esalelo ya Quick Start Guide.

33.8

Kobatela sekele ya Mikanda

Mikanda ya Eklezia ezali ya sekele, ezala ya kokoma na lokasa to na masini. Yango ezali:

  • Mikanda ya bandimi.

  • Mikanda ya botangi Misolo.

  • Bansango ya makita.

  • Bafisi mpe Mikanda ya bolongobani (mpe lisusu mikanda masanga ya botaleli ezalela ya mondimi).

Bakambi bayeba ete nsango oyo esangisami uta na mondimi ezali:

  • Na ndelo na oyo Eklezia esengi.

  • Esalami bobele mpo na bantina endimami ya Eklezia.

  • Epesami bobele na baoyo bapesami ndingisa ya kosalela yango.

Nsango oyo ebombami na masini esengeli kobatelama na bokengi mpe kobatela yango na lolenge elongobani (tala 33.9.1).

33.9

Bosaleli Mikanda

33.9.1

Bobateli

Mikanda nyonso ya Eklezia, balapole mpe bansango esengeli kobatelama uta na bayingeli bapesami ndingisa te, bobongoli, bobebisi, bopanzi nsango na yango na bazangi ndingisa. Bansango oyo esengeli kobatelama na esika ya bokengi.

Soki bayibi to babungisi bisalelo ya bobateli bansango oyo ezali biloko ya bobombi ya Eklezia esengeli kopesama lapole na lombango na incidents.ChurchofJesusChrist.org. Bosaleli mabe to malamu te ya nsango ya Eklezia esengeli kopesama lapole.

33.9.1.1

Bankombo ya basaleli mpe Maloba ya sekele ya boyingeli

Bakambi ya likonzi, baepisikopo, mpe bakambi mosusu basengeli te kokabola bankombo na bango ya bosaleli mpe maloba ya sekele ya boyingeli na bapesi toli, bakalaki, basekeletele, to bato mosusu.

33.9.1.3

Sekele ya Nsango

Bikolo mingi esila kobimisa mibeko ya bobateli bansango oyo ekambaka mosala ya kotalela bansango ya moto yemei. Yango ezali na nsango ya mikanda ya mondimi mpe mikanda mosusu ya Eklezia eye etalisi bato. Bakambi oyo bazali na mituna mpo na ntina ya bosaleli ya mibeko ya kobatela makambo na etuka ya mikanda ya Eklezia bakoki kokutana na bilo ya bobateli mikanda ya sekele ya Eklezia na DataPrivacyOfficer@ChurchofJesusChrist.org.

Bimisa na lokasa