Buku mpe Mbiangi
Misolo mpe Botangi Misolo


“34. Misolo mpe Botangi misolo,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“34. Misolo mpe Botangi misolo,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
mwana asimbi anvelope

34.

Misolo mpe Botangi Misolo

34.0

Boyingisi

Moko na zomi mpe mabonza esalisaka Eklezia ekoba kosala mosala ya Nkolo ya lobiko mpe bonetoli (tala 1.2). Misolo ezali bule. Elakisaka komibonza mpe bondimi ya bandimi ya Eklezia (tala Malako 12:41–44).

34.2

Mokambi ya Mosolo ya Palwasi

34.2.1

Boepisikopo

Episikopo azali na mokumba likolo ya misolo ya palwasi. Akopesa mokumba ya mosala oyo na bapesi toli na ye mpe na bakalaki.

Episikopo:

  • Ateyaka mpe afulaka bandimi bafuta moko na zomi na bango na lolenge ekoka mpe kopesa makabo ya lisungi (tala 34.3).

  • Akosala yeba ete misolo ya palwasi elengelami mpe etangami malamu (tala 34.5).

  • Alandela lolenge basaleli misolo sanza nyonso mpe koyeba ete kpokoso nyonso ebongisami na lombango.

  • Akosala yeba ete bakambi ya mangomba mpe bakalaki bayekola mikumba na bango na ntina ya misolo ya bule ya Eklezia.

  • Alengelaka mpe asalisaka mosolo ya mobu ya palwasi (tala 34.6).

  • Akutanaka na bakambi ya palwasi mobu nyonso mpo na kosolola mpe kozwa esakola ya moko na zomi na bango.

34.2.2

Bakalaki ya Palwasi

Episikopo akopesa mokumba na kalaki ya palwasi to kalaki ya mibale mpo na kosunga na bobombi mikanda ya misolo ya palwasi. Bakalaki bakolandela na bokebi mibeko mpo na kobomba misolo ya Eklezia mpe kosala yeba ete mikanda ya Eklezia ezala ya sika.

Kalaki azali na mikumba oyo elandi:

  • Kokoma mpe kotika misolo nyonso na oyo ezwamaki epai ya moto moko ya boepisikopo.

  • Kolandela mokanda ya mosolo sanza nyonso mpe kosala yeba ete kpokoso nyonso ebongisama na lombango.

  • Sunga boepisikopo kolengela mosolo ya mobu ya palwasi (tala 34.6.1 mpe 34.6.2).

  • Kosala yeba ete bandimi bakoki komona mikanda to mabonza na bango mpe bakoki kozwa lisungi soki esengami.

Bakalaki basengeli kozala Banganganzambe ya Melekisedeki mpe bazala na mokanda ya ndingisa ya boyingeli na tempelo.

34.3

Mabonza

34.3.1

Moko na zomi

Moko na zomi ezali likabo ya eteni moko kati na zomi ya bozwi epesami epai na Eklezia ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 119:3–4; milekeli emonisami kozala bozwi). Bandimi banso oyo bazwaka basengeli kofuta moko na zomi.

34.3.1.2

Esakola ya Moko na zomi

Episikopo akutanaka na mondimi moko na moko na nsuka ya mobu nyonso mpo na kozwa esakola na ye ya moko na zomi.

Bandimi banso babengami kokutana na episikopo mpo na:

  • Kosolola na episikopo na ntina ya koyeba ezalela ya moko na zomi na bango.

  • Koyeba ete mokanda na bango ya makabo ezali semba.

Soki ekoki kosalema, bandimi ya libota, mpe lisusu bana, basengeli kozala elongo.

34.3.2

Mabonza ya Kokila bilei

Bakambi ya Eklezia balendisaka bandimi basalela mobeko ya bokili bilei. Kati na yango ezali na bopesi likabo ya motema ya kokaba malamu (tala 22.2.2).

Malakisi mpo na kosalela makabo ya bokili bilei epesami awa na 22.5.2.

34.3.3

Misolo ya Misio

Mabonza nyonso mipesami na misolo ya misionele esalisaka yambo mpo na mikano ya kobonzela bamisionele ya ntango mobimba uta na palwasi.

Mabonza ya Misolo Minene mpo na Misionele esalisaka Eklezia na kokokisa bokasi ya Eklezia mobimba mpo na mosala ya misionele.

34.3.7

Mabonza Ekoki Kozongisama Te

Ntango moko na zomi mpe makabo mosusu epesami na Eklezia, ekomi ya Nkolo. Ebulisami epai na Ye.

Bakambi ya likonzi mpe baepisikopo bakoyebisa baye bapesaka moko na zomi mpe makabo ete mabonza oyo ekoki kozongisama te.

34.4

Kobatela sekele ya Moko na zomi mpe Mabonza Mosusu

Motango ya moko na zomi mpe makabo mosusu oyo efutami na mopesi ezali likambo ya kobatela sekele. Bobele episikopo mpe baye bapesami ndingisa ya kosala to komona makabo oyo basengeli kozala na makoki ya koyongela na nsango oyo.

34.5

Kosalela Misolo ya Eklezia

Mokambi ya likonzi mpe episikopo basengeli koyeba ete misolo ya Eklezia esalisami malamu. Boepisikopo mpe bakalaki balendisami kotala video oyo “Sacred Funds, Sacred Responsibilities” mbala moko na mobu.

34.5.1

Mibeko ya kozala na moninga

Mobeko ya kozala na moninga esengaka bato mibale—moto moko ya boepisikopo mpe kalaki, to bato mibale ya boepisikopo—bamipesa mobimba na ntango ya botangi, bokomi mpe bobombi misolo ya Eklezia.

Bakambi basengeli kobatela mpe kokabola ata moke te maloba na bango ya nkuku mpo na koyingela na ordinatele (tala 33.9.1.1).

34.5.2

Kozwaka Moko na zomi mpe Mabonza Mosusu

Nkolo apesaki baepisikopo mokumba ya bule ya kozwaka mpe kotangaka moko na zomi mpe makabo mosusu ya Basantu (tala Malongi mpe Mayokani 42:30–33; 119). Bobele episikopo mpe bapesi toli na ye bakoki kozwa moko na zomi mpe makabo mosusu. Basi na bango to bato basusu ya libota na bango, bakalaki, to bandimi basusu ya palwasi basengeli te na ntei ya likambo moko kozwa makabo oyo mpe te.

34.5.3

Kotalela malamu mpe Kokoma Moko na zomi mpe Mabonza Mosusu

Makabo esengeli kotanga yango mpe kokomama na mokolo ya Eyenga se moko wana ntango epesami. Mondimi ya boepisikopo mpe kalaki, to bato mibale ya boepisikopo, bakofungola anvelope moko na moko elongo. Bakotanga malamu ete misolo oyo etiami ezali lolenge moko na motuya oyo ekomami likolo ya mokanda ya Moko na zomi mpe Makabo Mosusu. Bakokoma likabo moko na moko malamu. Soki misolo mpe motango oyo ekomami ekeseni, bakokutana na mopesi na lombango mpo na kosolola na ntina ya likambo wana.

34.5.4

Kokende Kobomba Moko na zomi mpe Makabo Mosusu

Bobombi esengeli kosalama nsima ya kosala yeba ete mitango oyo ekomami ezali ndenge moko na misolo oyo epesamaki.

Esika eye banki esalaka mikolo nyonso mondimi moko ya boepisikopo mpe nganganzambe ya Melekisedeke mosusu bakokende kotika misolo na banki na mokolo se moko wana oyo misolo efungwamaki mpe etangamaki malamu.

Esika wapi banki esalaka mikolo nyonso te mpe banki ezali ya kokangama na mokolo ya Eyenga, episikopo akopona Nganganzambe moko ya Melekisedeke mpo na kokende kotika mosolo na mokolo elandi. Asengeli:

  • Koyeba ete misolo ebombami malamu kino ekotiama na banki.

  • Kozwa mokanda banki epesi ye kolakisaka mokolo mpe motango ya mosolo oyo ebombami.

34.5.5

Bobombi Misolo ya Eklezia

Bandimi oyo bapesami mokumba ya misolo ya Eklezia basengeli te kotika misolo na bandako ya makita na butu to kotika yango na bozangaka bobateli yango, lokola na ntango ya makita to misala mosusu.

34.5.7

Kokamba Bofuti Misolo ya Likonzi mpe Palwasi

Misolo moko te ya likonzi mpe palwasi ekoki kosalelama to kofutama na bozangi ndingisa ya mokambi moyangeli.

Bakambi mibale baye bapesami ndingisa basengeli kondima bofuti. Moko kati na bango asengeli kozala mondimi ya bokambi ya likonzi to ya boepisikopo. Atako bapesi toli bakoki kopesama ndingisa ya kondima babofuti, mokambi ya likonzi to episikopo basengeli kotala malamu mosolo moko moko etonga ezali kofuta. Bakambi basengeli te kondimisa mosolo efutami na ntina ya bango moko.

Mokanda ekomama ya bondimami uta na mokambi ya likonzi esengami yambo episikopo asalela makabo ya bokili bilei to andima bosenga ya episikopo mpo na ye moko to libota na ye. Mokanda ekomama ya kondima uta na moto moko ya Bokambi ya Etuka esengisami yambo episikopo asalela makabo ya bokili bilei to mokanda ya ndingisa ekomama na episikopo mpo na mokambi ya likonzi to libota na ye. Tala 22.5.1.2 mpo na malakisi.

Mondimi oyo asengi bazongisa mosolo asengeli kopesa mokanda nyonso ya lokasa to ya masini ya bilembo asalelki mosolo to fakitire. Ye akopesa lisusu ntina, motango mpe mokolo ya bosombi.

Soki misolo efutamaki, mondimi akopesa mokanda ya bosenga mpo bapesa ye mosolo, kokomaka ntina, motango mpe mokolo. Ntango misolo ya kobimisa efutami, nde nsima mondimi (1) akopesa bilembo ya mosolo ebimaki to bafakitire mpo na misolo miye mifutamaki mpe (2) akozongisa misolo miye mifutamaki te. Misolo miye mizongisami esengeli kozongisama na banki.

34.5.9

Kobomba Mikanda ya Misolo

Likonzi mpe palwasi moko na moko esengeli kobomba mikanda ya misolo elongobani na eleko, mpe ya sembo.

Mpo na kozwa nsango etali kosalela mpe kobomba mikanda mpe balapole, bakalaki basengeli kolanda malakisi ya bilo monene ya Eklezia to ya bilo ya etuka. Mikanda ya misolo esengeli kobotelama mpo na mibu misato kotanga banda mobu moye.

34.6

Mosolo ya Kosalela mpe Mosolo ya Kobimisa

Pologalami ya kopesa mosolo ya kosalel mpe ya kobimisa epesaka misolo minene ya Eklezia mpo na kofuta misala mpe bapologalami ya likonzi mpe bapalwasi.

Misala mingi esengeli kozala ya pete mpe ezala ya kobimisa mosolo moke to mpe te.

34.6.1

Misolo ya Likonzi mpe ya Palwasi

Likonzi mpe palwasi nyonso elengelaka mpe elengelaka mosolo ya kosalela na mobu. Mokambi ya likonzi asalaka na mosolo ya likonzi, mpe episikopo asalaka na mosolo ya palwasi.

Malakisii etiami awa na nse:

  • Kotalela mitango miye mifutamaki na mobu eleki mpo na koyeba ete makambo oyo ebimisaka misolo mingi mitangami sikawa.

  • Kotuna mangoma baloba mosolo na bango ya kosalela bamposa moko moko.

  • Kosangisa mosolo na kosalelaka misala ya misolo endimama.

34.6.2

Kopesa Mosolo ya Kosalela

34.6.2.1

Bofuti Mosolo

Misolo epesamaka nsima ya basanza misato, na kolandaka mitango ya bato bayaka na maye malandi:

  • Likita ya elambo

  • Bilenge mibali

  • Bilenge basi

  • Kelasi ya bana ya mibu 7–10

  • Bilenge banzemba

Ezali likambo ya ntina monene ete lapole ya bayei na mangomba oyo etangama semba mpe na ntango esdngeli (tala 33.5.1.1).

34.6.2.2

Kosalela Malamu Misolo

Bakambi ya likonzi mpe baepisikopo basengeli kosala ete basalela misolo epesami mpo ns kosalels na bwania.

Mosolo ya kosalel na likonzi mpe ya palwasi esengeli kosalisa mpo na kofuta misala to milulu, bapologalami, mikanda mpe bisalelo nyonso.

34.6.2.3

Misolo ya Kosalela Mileki

Basengeli te kosalela milekeli ya misolo mipesami mpo na kosalela. Milekeli ya misolo ya kosalels na palwasi esengeli kozongisama na likonzi.

34.7

Kotanga Misolo

34.7.1

Lisanga ya Batangi Mosolo ya Likonzi

Mokambi ya likonzi akopona lisanga ya batangi mosolo ya likonzi. Lisanga oyo ekoyeba malamu ete misolo ya likonzi mpe ya palwasi esalamaki engebene na mobeko ya Eklezia.

34.7.3

Misala ya Kotanga Mosolo

Batangi misolo ya likonzi bakotala mikanda ya misolo ya makonzi, bapalwasi mpe bandako ya Mambi ya kala ya Libota mbala mibale na mobu.

Mokambi moyangeli ya etonga mpe kalaki oyo bapesamaki mokumba ya misolo basengeli kozala wana mpo ya koyanola mituna na ntango ya botangi mosolo.

34.7.5

Bobungisi, Moyibi, Boyibi to Bomisalela Misolo ya Eklezia

Mokambi ya likonzi to moyangeli ya lisanga ya botangi mosolo ya likonzi asengeli kopesama nsango na lombango soki:

  • Misolo ya Eklezia ebungaki to bayibaki.

  • Mokambi ayibi to amisaleli misolo ya Eklezia.

Bimisa na lokasa