Buku mpe Mbiangi
Makonzi, Bapalwasi, mpe Baetape ya Yango Moko


“37. Makonzi, Bapalwasi, mpe Baetape oyo Elengelami,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“37. Makonzi, Bapalwasi, mpe Baetape oyo Elengelami,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
bato bazali kolia libanda

37.

Makonzi, Bapalwasi, mpe Baetape ya Yango Moko

37.0

Boyingisi

Mokambi ya likonzi akoki kopona kokela makonzi, bapalwasi mpe baetape ya lolenge na yango moko mpo na kosalisa bandimi, lokola elimbolami na mokapo oyo.

37.1

Bapalwasi mpe Baetape ya Lokota

Mokambi ya likonzi akoki kopona kopona lokota ya palwasi to etape mpo na bandimi ya likonzi (1) oyo balobaka te lokota ya esika bafandi to (2) baye basalelaka lokota ya bilembo.

37.7

Mangomba na Makonzi, Bamisio mpe Bituka

Mangomba etindami kosangana na bandimi moke engebene na limoni ya episikopo, mokambi ya etape, to mokambi ya misio. Mokambi ya likonzi to ya misio bakoki kotinda bokelami ya lingomba engebene na mabaku oyo elandi:

  • Mosika mpo na koya na palwasi to etape epai wapi bandimi bafandi.

  • Motango moke ya bandimi oyo balobaka lokota ya kokesena na oyo elobami na palwasi to etape.

  • Bandimi ya mampinga basungami makasi soki bazali na ya bango lingomba.

Lingomba esengeli kozala na moke bato mibale. Moko asengeli kozala nganganzambe alongobana na Bonganganzambe ya Alona to Nganganzambe alongobana ya Melekisedeke.

Kati na makonzi, mokambi ya likonzi akotinda episikopo to mokambi ya etape asala mpe akamba lingomba. Na bamisio, mokambi ya misio akotinda mokambi ya etape abongisa mpe akamba yango.

Mokambi ya likonzi, mokambi ya misio, episkopo to mokambi ya etape akobenga mokambi ya lingomba mpe akotia ye mpembeni. Mokambi ya lingomba akosala mpe kokamba mayangani ya lingomba, oyo ezali na mosala ya elambo.

Mokambi ya lingomba asimbi bafungola ya bonganganzambe te, mpe atindami te:

  • Kozwa moko na zomi mpe makabo.

  • Kobenga lisanga mpo na kotalela ezalela ya bandimi na ntina ya lisumu monene.

  • Pesa bopekisi ya polele to oyo eyebani na banso te na mondimi.

  • Kosala mikumba mosusu oyo esengaka kosalela bafungola ya bonganganzambe.

Mingi mingi, mangomba basalelaka Pologalami ya Etonga ya Ebandeli.

Mikamda ya bandimi ya lingomba ya bandimi ebombami na palwasi to etape oyo ekambaka lingomba yango.

Bilo ya Yambo ya Eklezia epesaka te nimelo ya etonga na mangomba.

Bimisa na lokasa