“38. Mibeko mpe Malakisi ya Eklezia,” Maponi uta na Buku Monene (2023).
“38. Mibeko mpe Bokambi ya Eklezia,” Maponi uta na Buku Monene
38.
Mibeko mpe Malakisi ya Eklezia
38.1
Kozala kati na Eklezia
Tata na biso na Lola alingaka bana na Ye. “Banso bazli lolenge moko kaka epai ya Nzambe,” mpe Abengisaka banso “baya epai na ye mpe bazwa bolamu na ye” (2 Nefi 26:33).
38.1.1
Kozwama na kati ya Makita ya Eklezia
Banso bayambami mpo na kozala na kati ya likita ya elambo, makita mosusu ya eyenga, mpe milulu ya bato ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka. Mokambi moyangeli azali na mokumba ya koyeba ete baye banso bayei bazali na limemia na esika mpe makambo maye ya bule.
Baoyo bayei basengeli koboya mobulu to kobungisa makanisi oyo elongobani te na bokumbameli to bantina mosusu ya likita. Basengeli kotosa mibu mpe masengami mpo na kozwana na makita mpe milulu mikeseni mpe kolakisa limemia. Yango esengi koboya ezaleli oyo moto azali kobenda bokebi na bolingo ya nzoto mpe ya kolata to ya kotia monzele na lolenge ya kobungisa makanisi ya bato. Yango epekisi lisusu kobeta masolo ya politiki to kolobela masolo ya lolenge moto alingaka bosangisi nzoto to ezalela ya moto oyo ekobungisa makanisi ya bato uta na kofandisaka maknisi na makita etali Mobikisi.
Soki ezali na ezaleli ya malamu te, episikopo to mokambi ya likonzi akopesa toli elongobana na molimo ya bolingo. Akolendisa baye bazali na ezaleli ya malamu te mpo ete bafandisa makanisi na kobatela limemia ya bule mpo na bato banso na kobetaka nsete na kokumbelaka Tata na Lola mpe Mobikisii.
Bandako ya makita ya Eklezia ezali bisika ya eklezia mpo na kosalela mibeko ya Eklezia. Moto oyo azali na bolingi ya kolanda malakisi oyo te akosengama na lolenge ya botosi bonso ete ayaka te na milulu mpe makita ya Eklezia.
38.2
Mibeko mpo na Makuli mpe Mapamboli
Bansango ya bokuse mpo na ntina makuli mpe mapamboli epesami na mokapo 18. Nsango etali makuli ya tempelo epesami na mikapo 27 mpe 28. Baepisikopo bakoki kobenga mokambi ya likonzi soki bazali na mituna. Bakambi ya likonzi bakoki kobenga Bokambi ya Etuka enene soki bazali na mituna.
38.3
Libala ya Leta
Bakambi ya Eklezia balendisaka bandimi balongisama mpo na libala ya tempelo mpe babalana mpe bakangisama na tempelo. Soki yango epesami ndingias na mibeko ya etuka, bakambi ya Eklezia bakoki, bongo, kosalisa mabala ya leta.
Mabala ya leta esengeli kosalama engebene na mibeko ya esika wapi libala esalami.
38.3.1
Nani Akoki Kosalisa Libala ya Leta
Soki yango epesami ndingisa na mobeko ya etuka, bayangeli oyo balandi ya Eklezia bakoki kosala na libiangi na bango mpo na kosalisa molulu ya libala ya leta:
-
Mokambi ya Misio
-
Mokambi ya Likonzi
-
Mokambi ya Disitiliki
-
Episikopo
-
Mokambi ya Etape
Bayangeli oyo bakoki kosalisa libala ya leta ya mobali mpe mwasi. Makambo manso maye malandi masengeli kotosama:
-
Mobali na libala to molongani azala mondimi ya Eklezia to azala na mokolo ya libatisi na ye.
-
Soki nimelo ya mondimi ya mobali na libala to molongani ezali to ekopesama nsima ya libatisi, na etonga ya Eklezia esika wapi moyangeli azali kokamba libala.
-
Moyangeli ya Eklezia azala alongobana na leta to moyangeli atindami mpo na libala ya leta epai wapi libala ekosalama.
38.3.4
Libala ya Leta eye Esalami na Ndako ya Eklezia
Molulu ya libala ekoki kosalama na ndako ya Eklezia soki ekobebisa manaka ya misala ya momesano ya Eklezia te. Libala esengeli kosalama te na mokoko ya Eyenga to na mpokwa ya Mokolo ya yambo. Libala liye esalami na ndako ya Eklezia esengeli kozala sembo mpe elongobana. Miziki esengeli kozala ya bule, ya limemia mpe ya esengo.
Mabala ekoki kosalama na ndako ya Nzambe, na ndako ya milulu, to ndako mosusu ya malamu. Mabala esengeli kolanda bokambi elongobana mpo na ndako ya makita.
38.3.6
Milulu ya Libala ya Leta
Mpo na kosala libala ya leta, moyangeli ya Eklezia akoyebisa balongani mpe akoloba, “Nasengi osimba molongani na yo na loboko ya mobali.” Nsima akotanga, “[nkombo mobimba ya Mobali] mpe [nkombo mobimba ya mwasi], bosimbani na loboko ya mobali na elembo ya ndayi ete bokokota sikawa liboso ya Nzambe mpe ya banzeneneke oyo.” (Balongani bakoki kopona to kotanga bankombo ya banzeneneke na bango yambo ete libala esalama.)
Nsima moyangeli akoloba na mobali na libala mpe akosenga, “[Nkombo mobimba ya mobali], ozali kozwa nkombo mobimba ya mwasi] lokola mwasi na yo molongani alongobana, mpe na bolingi ya bonsomi na yo okolaka ye na bosembo ete akozala moninga mpe okozala mobali na ye alongobana ete okokangama na ye mpe mosusu te; ete okotosa mibeko nyonso, mikumba nyonso, mpe etinda nyonso etali lolenge nyonso ya libala; mpe ete okolinga, mpe kolengela ye ntango bokozala na bomoi ntango nyonso elongo?”
Mobali akoyanola, “Iyo” to “Nandimi.”
Mpe nsima moyangeli akoloba na mwasi mpe akotuna “[Nkombo mobimba ya mwasi], ozali kozwa [nkombo mobimba ya mobali] lokola mobali na yo alongobani, mpe na bolingi na yo nyonso okopona mpe okolaka ete akozala moninga na ye mpe mwasi na ye alongobana ete okokangama na ye mpe mosusu te; ete okotosa mibeko nyonso, mikumba nyonso, etinda nyonso etali lolenge nyonso ya libala; mpe ete okolinga, mpe kolengela ye ntango bokozala na bomoi ntango nyonso elongo?”
Mwasi akoyanola, “Iyo” to “Nandimi.”
Nsima moyangeli ya Eklezia akolobela balongani mpe akoloba, “Engebene na mobeko epesameli ngai lokola mpaka ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu Bamikolo mya Nsuka, nasakoli bino, nkombo mobimba ya mobali] mpe [nkombo mobimba ya mwasi], mobali mpe mwasi, balongani mpe babalani balongobani mpo na ntango ya bomoi na bino ya kufa.”
(Na maloba mosusu moyangeli oyo azali kosalisa na bokambi ya Eklezia te: “Na boyengebene ya boyengebene ya mobeko epesameli ngai lokola moyengeli na [etape ya lingomba ya mampinga to ya mampinga te nasakoli bino, lokola [nkombo ya mobali] mpe [nkombo ya mwasi], mobali mpe mwasi, balongani mpe babalani engebene na mobeko mpe bolongobani mpo na ntango ya bomoi na bino ya kufa.”)
“Tika ete Nzambe apambola mokangano na bino na bosepeli kati na bakitani na bino mpe bomoi mobimba ya esengo elongo, mpe tika ete Apambola bino bobatela ndayi eye ya bule bosali awa. Mapamboli oyo nasengi likolo na bino na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, amene.”
Libiangi ya koyambana mpe kopesana bipwepwe ya mobali mpe mwasi etali bango moko, na kolandaka mibeko ya bonkoko na bango.
38.4
Mibeko ya Kokangisama
Makuli ya bokangisi ya tempelo ekangisaka mabota mpo na seko lokola bandimi bazali koluka kotosa mayokani basalaki ntango bazwi bokuli. Makuli ya bokangisi esengaka:
-
Bokangisi ya mobali mpe mwasi.
-
Bokangisi ya bana na baboti.
Baoyo babatelaka mayokani na bango bakobomba mapamboli na bango na nzela ya bokangisi. Yango ezali solo atako molongani songolo abukaki mayokani to akabwani na libala.
Bana ya boyengebene baye bakangisami na baboti na bango to babotani kati na liyokani bakobomba lipamboli ya libota ya seko. Yango ezali solo atako baboti balongoli bokangisi na bango ya libala, balongoli ezalela na bango yamondimi ya bana na bango na Eklezia, to bamilongoli lokola bandimi.
Bandimi basengeli kosolola na episikopo soki bazali na mituna etali mibeko ya bokangisi. Episikopo akokutana na mokambi ya likonzi soki azali na mituna. Bakambi ya likonzi bakoki kobenga mokambi ya tempelo kati na disitiliki ya tempelo na bango, Mokambi ya Etuka enene, to Moyangeli ya Bokambi ya Yambo soki bazali na mituna.
38.5
Bilamba mpe Bagarma ya Tempelo
38.5.1
Bilamba ya Tempelo
Na ntango ya makuli ya dotasio mpe ya bokangisi kati ya tempelo, bandimi ya Eklezia balataka bilamba ya mpembe. Basi balataka bilamba ya mpembe oyo elandi: nzambala ya maboko molai, to nzambala ya maboko mikuse (to jipe na simizi ya maboko milai to ya maboko mikuse), basoseti to bakola mpe basapatu to bandwekele.
Mibali balataka bilamba oyo elandi: simizi ya maboko milai, ne to kalavati, patalo, soseti, mpe basapatu to bandwekele.
Na ntango ya makuli ya dotasio mpe bokangisi, bandimi balataka bilamba mosusu ya molulu likolo ya bilamba ya na bango ya mpembe.
38.5.2
Kozwa Bilamba mpe Bagarma ya Tempelo
Bakambi ya palwasi mpe ya likonzi balendisaka bandimi ya dotasio bazwa bilamba na bango moko ya tempelo. Bilamba mpe bagarma ya tempelo ekoki kosombama na ebombelo ya Wenze ya Eklezia to na store.ChurchofJesusChrist.org. Bakalaki ya likonzi to ya palwasi bakoki kosunga bandimi basomba bilamba.
38.5.5
Kolata mpe Kobatela Garma
Bandimi oyo bazwaka dotasio basalaka liyokani ya kolata elamba ya tempelo ntango ya bomoi na bango mobimba.
Ezali litoma ya bule ya kolata garma ya tempelo. Kosalaka bongo ezali ndakisa uta na libanda ya kolakisasaka bomipesi na biso ya kati ya kolanda Mobikisi Yesu Klisto.
Garma ezali likundoli ya mayokani maye esalami kati ya tempelo. Ntango yango elatami na botosi bomoi mobimba, ekozala lokola bobateli.
Garma esengeli kolatama na kati ya bilamba ya libanda. Ezali likambo etali moto ye moko soki bilamba mosusu ya kati elatami likolo to na nse ya bilamba ya tempelo.
Garma esengeli te kolongolama mpo na misala miye ekoki kosalama na ntango garma elatami. Esengeli te kobongisama mpo na kosepelisa ndenge ekeseni ya molato.
Garma ezali bule mpe esengeli basalela yango na limemia. Bandimi oyo basila kozwa dotasio basengeli koluka bokambi ya Molimo Mosantu mpo na koyanola mituna na bango mitali kolata garma.
38.5.7
Kotika Garma mpe Bilamba ya Milulu ya Tempelo
Mpo na kotika bagarma bisila kobeba ya tempelo, bandimi basengeli kokata mpe kobebisa bilembo. Nde bandimi bakokata elamba etikaliya bilembo wana mpo ete ekoka te koyebana lokola garma. Nsima elamba oyo etikali ekoki kobwakama.
Bandimi bakoki kopesa bagarma mpe bilamba ya tempelo oyo ezali malamu na bandimi mosusu oyo basila kozwa dotasio.
38.5.8
Kokundama na Bilamba ya Tempelo
Soki esengami, bandimi bakufa baye basila kozwa dotasio basengeli kokundama to kozikisama na mputulu elongo na bilamba na bango ya tempelo. Soki mimeseno ya bonkoko to ya bokundeli esali ete yango ezali mpasi to malamu te, bilamba ekoki kolingama mpe kotiama mpembeni ya nzoto.
Nzoto ya mondimi elatisami na bilamba ya tempelo mpe bilamba ya mpembe oyo elandi: simizi ya maboko milai, Kalavati ya lizita to kalavati ya molai, patalo, basoseti, mpe bandwekele. Nzoto ya mwasi ekolatisama na bagarma ya tempelo mpe ekolandisama na bilamba ya mpembe oyo elandi: nzambala ya mpembe ya maboko milai to ya maboko mikuse (to jipe mpe elamba ya maboko milai to ya maboko mikuse), basoseti ya mokuse to ya molai, mpe basapatu to bandwekele.
Bilamba ya milulu ya tempelo ekotiama likolo ya nzoto ya mowei lokola elobelamaki na dotasio. Nzambala ekotiama na lipeka ya mobali mpe elingami na nsinga na loketo na loboko ya mwasi. Litambala ekokangisama na loketo. Mokaba ekotiama na loketo elingama na loboko ya mwasi. Ekoti ya mobali ekotiamaka mbala mingi na ngambo ya nzoto na ye kino ntango ekokoka bakanga sanduku to etieli nzoto. Nsima ekoti etiami na ngambo ya litoi ya mwasi. Elamba ya kozipa elongi ya mwasi ekoki kolingama na litoi nsima ya moto na ye. Elamba ya elongi ya mwasi yambo ya bokundi to ya molulu etali te, yango ekolanda lolenge libota elingi.
38.6
Mibeko etali Mikakatano ya Bomoto
38.6.1
Bolonzoli zemi
Nkolo atindaki, “Yo okoboma te … , to kosala oyo ekokani na yango” (Malongi mpe Mayokani 59:6). Eklezia epekisi bolongoli zemi ya moto to ya lingomba ya bato. Bandimi basengeli te komipesa na, kosala, kolengela, bofuti mosolo, kondima, to kolinga bolongoli zemi. Bobele maye malandi nde ekoki kondimama soki:
-
Zemi ezalaki ya motomboki moto mabe to ya bosangisi nzoto na ndeko ya libota.
-
Monganga alongobana amoni ete bomoi ya mama ezali na likama mpenza.
-
Monganga alongobana amoni ete mwana na libumu azali malamu te ete akobika te nsima ya mbotama na ye.
Atako makambo maye matangami awa mazali ntina te ete bolongoli zemi ezala ntina. Bolongoli zemi ezali likambo ya likama koleka. Ekosalama bobele soki moto azwi bondimami na nzela ya losambo. Bandimi bakoki kosolola elongo na baepisikopo na bango lokola eteni ya likambo oyo.
38.6.2
Minyoko
Minyoko ezali bonyokoli to bomoni mpamba ya basusu na lolenge eye epesaka mpasi na nzoto, na bosangisi nzoto, na makanisi to na mosolo. Esika ya Eklezia na likambo eye ezali ete bobebisi ekoki te kosalama na lolenge nyonso. Baye batungisaka basi na bango, bana na bango, bandeko mosusu ya libota, to moto mosusu to kobuka mibeko ya Nzambe mpe ya moto.
Bandimi nyonso, mingi mingi baboti mpe bakambi, balendisami kobeta mbela mpe kokeba mpe kosala manso maye bakoki mpo na kobatela basusu na bobebisi. Soki bandimi bakebisami na bandakisa ya bobebisi, baloba yango na bakambi ya leta mpe koloba yango na episikopo. Bakambi ya Eklezia basengeli koloba mambi ya bobebisi monene mpe bamona yango mpamba te.
Bakolo banso oyo basalaka na bana to bilenge basengeli kolanda liteya ya kobatela bana mpe bilenge na sanza moko nsima ya bosungami (tala ProtectingChildren.ChurchofJesusChrist.org). Basengeli kobandela liteya wana mibu misato nyonso.
Ntango bobebisi esalami, mokumba ya yambo mpe ya lombango ya bakambi ya Eklezia ezali ya kosunga baye babebisamaki mpe kobatela bato na makama uta na bobebisi ekoya lobi. Bakambi basengeli te kolendisa bato batikala na ndako to na esika wapi ezali kobebisa to ezanga bobateli.
38.6.2.1
Kozwa Lisalisi na Nzela ya Telefone Soki Minyoko
Na bikolo mosusu, Eklezia etiaki nimelo ya sekele mpo na kozwa lisalisi na nzela ya telefone mpo na kosunga bakambi ya likonzi mpe baepisikopo. Bakambi oyo basengeli na lombango kobenga lisungi na nzela ya nsinga wana ntango nyonso oyo moto atungisami—to azali na likama ya konyokwama. Basengeli lisusu kobenga nimelo yango soki bayebisi bango ete mondimi azali kotala, kosomba, kokabola bilili ya mutala ya bana.
Na bikolo biye nimelo wana ya kobenga mpo na kozwa lisungi ezali te, episikopo oyo ayeki makambo ya minyoko asengeli kokutana na mokambi ya likonzi na ye. Mokambi ya likonzi asengeli koluka bokambi uta na bazuzi bapesi tolina mambi ya bosambisi ya bilo ya etuka enene.
38.6.2.2
Kopesana Toli mpe Bolandeli na Makambo ya Minyoko
Bato na makama ya bonyokwami mbala na mbala batikalaka na mpasi ntango molai na makanisi. Bakambi ya likonzi mpe baepisikopo basengeli kopesa lisalisi ya bokaboli mawa mpe mpasi wana. Bakopesa toli na nzela ya molimo mpe lisungi mpo na kosalis bato na makama balonga mpasi etikali na makanisi ya minyoko yngo.
Mbala mosusu bato na makama bayokaka nsoni to elindo. Bato na makama ya minyoko bazali na elindo ya lisumu te. Bakambi basengeli kosunga bango mpe mabota na bango kososola bolingo ya Nzambe mpe libiki eye eyaka na nzela ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye (tala Alma 15:8; 3 Nefi 17:9).
Bakambi ya likonzi mpe baepisikopo basengeli kosunga baye basalaki minyokoli bayambola mpe batika misala na bango ya mabe. Soki mokolo asalaki lisumu ya bosangisi nzoto na mwana moke, ezaleli ekoki kozala mpasi mpo na kobongola. Mosala ya boyamboli ekoki kozala ya ntango molai. Tala 38.6.2.3.
Likolo ya kozwa klisalisi efulami uta na bakambi ya Eklezia, bato na likama, basali makama, mpe mabota na bango bakoki kozala na mposa ya toli uta na bnganga mayele. Mpo na kozwa nsango tala 31.3.6.
38.6.2.3
Konyokola Bana to Bilenge
Konyokola mwana to elenge ezali lisumu monene koleka (tala Luka 17:2). Lokola esalameli awa kati na, konyokola mwana to elenge ezali maye malandi:
-
Monyokoli na nzoto: Kotika bilembo minene ya bobetami na nzoto. Bilembo mosusu ya mpasi emonanaka te.
-
Minyokoto kosalela bowumbu ya bosangisi nzoto: Kosala mosala nyonso ya bosangisi nzoto na mwana moke to elenge to kozala na likanisi ya kopesa ndingisa to kosunga basusu basala mosala wana. Lokola esalameli awa, minyoko ya bosangisi nzoto etali te bosangisi nzoto endimami kati na bango ya bana mike mibale oyo bazali na mibu lolenge moko.
-
Minyoko ya makanisi: Ezali kosala misala mpe kosalela maloba na lolenge ya kobebisa makasi limemia mpe bomoto ya mwana to ya elenge. Yango esalemi na bofingi ntango nyonso mpe ya mbala na mbala, bowumbu mpe botioli eye epesaka nsoni mpe ekitisaka bomoto. Ekoki kozala lisusu na lolenge ya komona moto mpamba mpenza.
-
Bilili ya motakkala ya bana: Tala 38.6.6.
Soki mokambi ya likonzi to episikopo bayebi to bazali na mayoki ya solo ete mwana to elenge moko azali konyokwama, na lombango akolanda malakisi kati ya 38.6.2.1. Akosala manso akoki mpo na kobatela ete minyoko wana esalema lisusu te.
Lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi ya Eklezia mpe kotia nkoma likolo ya mokanda ya mondimi esengeli kosalama soki mondimi ya mokolo anyokoli mwana to elenge lokola elimbolami na eteni oyo. Tala lisusu 38.6.2.5.
Soki mwana oyo akokisi mibu ya boyanoli te anyokoli mwana moke, mokambi ya likonzi akokutana na Bilo ya Bokambi ya Yambo mpo na kosenga bakamba ye.
38.6.2.4
Konyokola Molongani to Mokolo Mosusu
Mbala mingi ezalaka na ndimbola moko te ya monyokolii oyo ekoki kosalama na makambo nyonso. Na esika na yango, ezali na limoni monene kati ya ezaleli ya bobebisi. Monene ya likambo oyo elongwe uta mbala na mbala uta na maloba mabe kino na kozokisa.
Soko episikopo to mokambi ya likonzi ayebi ete mobali azali konyokola mwasi to mokolo mosusu, na lombango basengeli kolanda malakisi kati ya 38.6.2.1. Akosala manso akoki mpo na kobatela ete minyoko wana esalema lisusu te.
Bakambi bakoluka bokambi ya Molimo mpo na koyeba soki kati na kosalela bolandeli toli na moto yango ye moko to kobenga lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi nini ezali nzela ebongi malamu koleka mpo na kobongisa monyoko yango. Bakoki lisusu kozwana na toli elongo na bakambi na bango ya bonganganzambe ya semba na ntina ya likambo wana. Nzokande, monyoka nyonso ya molongani to ya mokolo oyo esalami na bandelo eye elimbolami awa esengeli kosangana mpo na kotalea ezalela ya mondimi.
-
Monyokoli na nzoto: Kotika bilembo minene ya bobetami na nzoto. Kozokisama mosusu ekoki komonana te.
-
Minyoko ya bosangisi nzoto: Tala makambo oyo elimbolami kati ya 38.6.18.3.
-
Minyoko ya makanisi: Ezali kosala misala mpe kosalela maloba na lolenge ya kobebisa makasi limemia mpe bomoto ya mwana to ya elenge. Yango esalemi na bofingi ntango nyonso mpe ya mbala na mbala, bowumbu mpe botioli eye epesaka nsoni mpe ekitisaka bomoto.
-
Minyoko na mosolo Kozwaka litomba ya mosolo na nzela ya moto. Kati na oyo ekoki kozala na kozwa ndako, misolo to biloko nyonso mosusu ya motuya na kozangaka kotosa mibeko to ndingisa. Ekoki kozala lisusu na kozwaka nguya ya kozwamisolo na nzela ya kimoyibi likolo ya moto mosusu. Ekoki kozala bosaleli nguya ya mosolo mpo na ezaleli ya kokonza basusu na makasi.
38.6.2.5
Mabiangi ya Eklezia, Mikanda ya Ndingisa ya Tempelo, mpe Nkoma likolo ya Mokanda ya Mondimi
Bandimi oyo banyokola basusu basengeli te kopesama mabiangi ya Eklezia mpe bakoki te kopesama mokanda ya ndingisa ya tempelo kino bakoyambola mpe bakolongola bopekisi na mokumba na bango.
Soki moto anyokoli mwana to elenge na bosangisi nzoto to na minyoko ya nzoto to na makanisi, mokanda na ye ya mondimi esengeli kotiama nkoma likolo na yango. Basengeli te kopesa ye libiangi to mokumba songolo eoyo esengeli kotalela bana to bilenge. Kati na oyo batangi kopesa ye te mosala ya kotala libota eye ezali na bilenge to bana kati ya libota na bango. Ezali lisusu kopekisa mpeapesama moninga ya elenge mpo na mosala ya kotalaka basusu. Bopekisi oyo esengeli kozala wana ntango nyonso longola se soki Bakambi ya Yambo bapesi ndingisa ya kolongola yango.
38.6.2.6
Masanga ya Likonzi mpe ya Palwasi
Na makita ya bosangani ya likonzi mpe ya palwasi, mokambi ya likonzi mpe episikopo bakotalela mibeko mpe malakisi ya Eklezia na kopekisaka mpe koyanolaka na minyoko. Bakambi ya lisanga wana basengeli koluka bokambi ya Molimo ntango bazali koteya mpe kosolola likambo oyo ya motuya.
Bandimi ya lisanga wana basengeli lisusu kokokisa mosala ya koteya bobateli bana mpe bilenge (tala 38.6.2).
38.6.2.7
Makambo ya Bolongobani etali Minyoko
Soki misala ya minyoko ya mondimi ebukaki mobeko oyo etiami, episikopo to mokambi ya likonzi asengeli koyebisa mondimi koyebisa likambo liye na bapolisi to na bakambi mosusu ya leta baye balongobani.
bakambi ya Eklezia mpe bandimi basengeli kokokisa masengami nyonso malongobani ya kofunda minyoko mina nyonso ya mabe na bakambi ya leta.
38.6.4
Bolandeli Mbotama
Ezali libaku malamu mpo na balongani oyo babalani baye bazali na makoki ya kobota bana mpo na kopesa banzoto ya kufa mpo na bana ya molimo ya Nzambe, oyo nsima bakozala na mokumba ya koleisa mpe kobokola (tala 2.1.3). Mokano na ntina ya motango nini ya bana basengeli kobotama mpe ntango nini kobota bango etali moto to bato bango moko. Mokano wana esengeli batikela yango balongani mpe Nkolo.
38.6.5
Bopeto ya nzoto mpe Bosembo
Mobeko ya Nkolo ya bopeto ya nzoto ezali:
-
Koboya bosangisi nzoto libanda ya libala epai na bakonzi ya leta katikati ya mobali mpe mwasi.
-
Bosembo na kati ya libala.
Bosembo ya mobali mpe mwasi esengeli kozala na bonzenga mpe bule. Ebulisami na Nzambe mpo na bokeli ya bana mpe mpo na kolakisa bolingo na mwasi mpe mobali.
38.6.6
Bilili ya Mutakala ya mwana
Eklezia epekisi bilili bosangisi nzoto to mutakala ya mwana na lolenge nyonso. Soki episikopo to mokambi ya likonzi ayebi ete mondimi atangami na bilili ya mwana mutakala to bosangisi nzoto na mwana, na lombango akolanda malakisi maye malandi na 38.6.2.1.
38.6.8
Bokatami Nzoto ya Kibomwasi
Eklezia epekisi kokata nzoto ya kibomwasi.
38.6.10
Bosangisi nzoto na ndeko ya libota
Eklezia epekisi bosangisi nzoto nyonso na ndeko ya libota. Lokola elobameli awa, bosangisi nzoto na ndeko ya libota ezali kosangisa nzoto ya:
-
Moboti mpe mwana.
-
Nkoko mobange mpe nkokolo na ye.
-
Bandeko ya libota.
-
Noko to tata mwasi mpe mwana ya ndeko na ndeko.
Lokola esalameli awa, mwana, nkokolo, bandeko, mwana ya ndeko, mpe mwana ya ndeko mosusu mpe lisusu bokilo na ndeko ya baboti moko, ndeko oyo bozali kobokola, ndeko mwana ya ndeko ya tata to mama, to mokangano ya ndeko oyo bozali kobokola.
Ntango mwana moke azwi likama ya bosangisi nzoto na nseko ya libota, episikopo to mokambi ya likonzi akoluka lisalisi ya Eklezia na kobengaka na nzela nsinga to telefone na bikolo wapi yango ekoki kozwama (tala 38.6.2.1). Na bikolo mosusu, mokambi ya likonzi asengeli koluka bokambi uta na ntoma molobeli alongobana ya Eklezia na bilo ya etuka enene. Alendisami lisusu kosolola na bato ya Misala ya Libota to mokambi ya bolandeli bolamu ya bato ya etuka enene.
Lisanga ya bato ya kotalela ezalela ya ya mondimi ya Eklezia mpe nkoma likolo ya mokanda esengeli kosalama soki mondimi asalaki bosangisi nzoto na ndeko ya libota. Mbala mingi soki moto asali bosangisi nzoto na ndeko ya libota, Eklezia esengeli kolongola ezalela ya mondimi ya moto wana na Eklezia.
Soki mwana moke asali bosangisi nzoto na ndeko ya libota, mokambi ya likonzi akokutana an Bilo ya Bokambi ya Yambo mpo na bokambi.
Bato na makama ya bosangisi nzoto na ndeko ya libota mbala mingi banyokwamaka na makanisi. Bakambi bayanolaka na motema ya bokaboli mawa mawa mpe mpasi. Bapesaka lisungi ya molimo mpe bapesaka toli mpo na kosalisa bango balonga mpasi wana ya bosangisi nzoto.
Mbala mosusu bato na makama bayokaka nsoni to elindo. Bato na makama ya minyoko bazali na elindo ya lisumu te. Bakambi basengeli kosunga bango mpe mabota na bango kososola bolingo ya Nzambe mpe libiki eye eyaka na nzela ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye (tala Alma 15:8; 3 Nefi 17:9).
Likolo ya kozwa lisungi efulama ya bakambi ya Eklezia, bato na makama mpe mabota na bango bakoki kosenga lisungi ya banganga mayele. Mpo na kozwa nsango, tala 38.6.18.2.
38.6.12
Misala ya Bonkuku
Misala ya bonkuku ezali misala ya molili mpe ememaka na kokosama. Ebebisaka bondimi na Klisto.
Kati na isala ya bonkuku ezali bokumbameli ya Satana. Esalisaka mpe lisusu misala ya soloka oyo ezali malamu te na nsango malamu ya Yesu Klisto. Kati na misala ya lolenge oyo ezali na (kasi ezalaka na ndelo te) kobikula, bilekeli mabe, mpe misala ya bokangoli miye elandaka ndakisa ya nguya ya bonngangazambe ya Nzambe (tala Moroni 7:11–17).
Bandimi ya Eklezia basengeli te komipesa na misala ya lolenge nyonso ya bokumbameli Satana to kokota kati nzela ya misala ya bonkuku. Basengeli te komipesa na molili wana na masolo to na makita ya Eklezia.
38.6.13
Bilili ya mutakala
Eklezia epekisaka bilili ya bato mutala na lolenge na yango nyonso. Kosalela bilili ya bato mutala ya ndenge nyonso ebebisaka bomoi ya bato, mabota mpe mangomba ya bato. Ebenganaka lisusu Molimo ya Nkolo. Bandimi ya Eklezia basengeli koboya ndenge nyonso ya bisalelo ya bilili ya bato mutakala mpe kotelemela kobimisa, kopanza, mpe kosalela yango.
Bolandeli ya bato na toli mpe kotiaka bopekisi na mikumba y mondimi ya moto mbala mingi esalamaka mpo na kosunga moto oyo ayambola uta na kosalelaka bilili ya bato mutakala. Masanga ya botaleli ezalela ya sambisi mbala mingi esalamaka te. Nzokande, lisanga ya kotalela ezalela esengeli kosangana mpo mondimiasaleli makasi mpe ya mbala na mbala ya kosalela bilili ya bosoto eye epesaki likama monene na moto ya libota to ya libala (tala 38.6.5). Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengisami soki mondimi asali, akaboli, azali na, to atalaka mbala na mbala bilili ya bato to bana mutakala (tala 38.6.6).
38.6.14
Makanisi mabe
Bato banso bazali bana ya Nzambe. Banso bazali bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali eteni ya libota na Ye ya bonzambe (tala “The Family: A Proclamation to the World”). Nzambe “asalaki uta na makila moko na bikolo nyonso” (Misala 17:26). “Banso bazali lolenge moko” epai na Ye (2 Nefi 26:33). Moto moko na moko azali “motuya na miso na ye lokola mosusu” (Yakobo 2:21).
Makanisi mabe ebongi nate na liloba ya Nzambe. Ngolu to ngolu te ya Nzambe etalaka lolenge omipesaka epai na Ye mpe na mitindo na Ye, etalaka langi ya loposo ya moto te to makoki ya mosusu mpe te.
Eklezia esengaka na bato banso batika bizaleli mpe misala ya kokaniselalingomba ya bato to moto moko mabe . Bakambi ya Eklezia basengeli komikamba na lolenge ya kotombola limemia mpo na bana nyonso ya Nzambe. Bandimi balandaka mitindo ya Mobikisi ya kolinga basusu (tala Matai 22:35–39). Basalaka makasi mpo na kozala boboto mpe malamu epai ya bato banso, kotikaka makanisi mabe ya lolenge nyonso. Kati na makanisi mabe yango ezali na makanisi mabe langi ya loposo, kabila to bonkoko, ekolo, mboka, kibomwasi to kimobali, mibu, bozwi na nkita to bozangi nkita nkita, bobola to bozwi, bondimi ya eyamba to mozangi eyamba to bondimi, mpe libongi etali mposa ya bosangisi nzoto.
38.6.15
Mposa ya Bosangisi Nzoto Mwasi na Mwasi to Mobali na Mobali mpe Bizaleli ya Nzoto ya Bato ya Lolenge moko
Eklezia elendisaka mabota mpe bandimi basalisa na boboto, bolingo mpe blimemia nyonso bato oyo bazali lolenge moko kasi bayokisamaka bamposa ya kosangisa nzoto. Eklezia etombolaka lisusu bososoli na lingomba ya bato na bonene oyo elakisaka mateya na yango na ntina ya boboto, bozwani na banso, bolingo mpo na basusu, mpe limemia mpo na bato nyonso. Eklezia ezwaka mokano te na makambo matali ntina ya bato bayokaka komibendana na moto ya lolenge moko mpo na bosangani mobali na mobali to mwasi na mwasi.
Mitindo ya Nzambe epekisi bizaleli nyonso ya ezanga bopeto, ezala bosangisi nzoto na balongani mingi mpe baye ya lolenge moko. Bakambi ya Eklezia bateyaka bandimi oyo babukaka mobeko ya bopeto. Bakambi basungaka bango bazala na bosololi malamu ya bondimi na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, mosala ya boyamboli, mpe ntina ya bomoi awa na nse.
Soki bandimi ya lolenge moko bazali koyoka mposa ya kosangisa nzoto mobali na mobali to mwasi na mwasi mpe bazali koluka kotosa mobeko ya bopeto, lisungi ya bakambi mpe kolendisa bango na kobongisa yango. Bandimi oyo bakoki kozwa mabiangi ya Eklezia, kozwa mokanda ya ndingisa ya boyingeli na tempelo, mpe kozwa makuli ya tempelo soki balongobani. Bandimi ya mibali ya Eklezia bakoki kozwa mpe kosalela bonganganzambe.
Bandimi banso oyo babatelaka mayokani na bango bakozwa mapamboli nyonso elakama na boseko atako to te mabaku na bango epesi bango ndingisa bazwa mapamboli ya libala ya seko mpe kozala moboti na bomoi oyo (tala Mosiya 2:41).
38.6.16
Libala ya Mibali na mibali mpe Basi na basi
Lokola mobeko ya malongi, engebene na makomi, Eklezia endimi ete libala ya mobali mpe mwasi ezali na ntina na moango ya Mokeli mpo na molongo ya seko ya bana na Ye. Eklezia endimaka lisusu ete mobeko ya Nzambe elimbola libala lokola mokangano ya boyengebene mpe bosembo ya mobali mpe mwasi.
38.6.17
Boyekoli ya Kozala Mobali to Mwasi
Baboti bazali na mokumba monene mpo na oyo etali koteya bana kozala mwasi to mobali na kotalaka bosangisi nzoto. Baboti basengeli kozala na masolo ya sembo, ya polele polele mpe ya ntango nyonso na bana na bango mpo na oyo etali bosangisi nzoto ya kolongonu mpe elongobana.
38.6.18
Minyoko ya Bosangisi nzoto, Viole mpe Ndenge Mosusu ya Makambo etali Bosangisi nzoto.
Eklezia epekisi minyoko na bosangisi nzoto. Lokola esalameli awa, minyoko na bosangisi nzoto elimbolami lokola kondimisa moto na mposa ya bosangisi nzoto na makasi na bozangi bolingi na ye. Mosala ya bosangisi nzoto na moto oyo azali te to akoki kopesa bondimisi elongobana ezali lokola monyokoli ya bosangisi nzoto. Minyoko ya bosangisi nzoto ekoki kosalama lisusu na molongani to mokangano ya kimakangu. Mpo na kozwa nsango etali minyoko ya bosangisi ya mwana to elenge, tala 38.6.2.3.
Minyoko ya bosangisi nzoto etali makambo mpe misala ya ndenge na ndenge, uta na motungisi to kozwa moto na makasi mpe ndenge mosusu ya kobundisa moto mpo na ntina ya bamposa ya bosangisi nzoto. Ekoki kosalama na nzoto, na maloba, mpe na banzela mosusu. Mpo na bokambi etali koteyaka bandimi oyo bakutanaki na bobebisi ya bosangisi nzoto, motungisi na makasi, to ndenge mosusu ya bosangisi nzoto, tala 38.6.18.2.
Soki bandimi batimbeli to bakebisami na ntina ya bobebisi ya bosangisi nzoto, basengeli kozwa mokumba ya kobatela bato na makama mpe basusu soki yango esengelami. Yango ezali kolobela yango na bakambi ya leta mpe koloba yango epsisikopo to mokambi ya likonzi. Soki mwana abebisamaki, bandimi basengeli kolanda makebisi oyo kati ya 38.6.2.
38.6.18.2
Koteyaka Bato na Makama ya Minyoko ya Bosangisi Nzoto, Motungisi mpe Ndenge Mosusu ya Minyoko ya Bosangisi Nzoto.
BAto na makama ya bobebisi ya bosangisi nzoto, motungisi mpe ndenge mosusu ya bobebisi ya bosangisi nzoto mbala mingi banyokwamaka na makanisi. Ntango balobeli yango epai ya episikopo to mokambi ya likonzi, asengeli koyanola na motema ya mawa mpe sembo. Akopesa toli ya molimo mpe lisungi mpo na kosunga bato na makama balonga bilembo ya misala ya bobebisi wana. Akobenga lisusu lisungi ya bobebisi ya Eklezia mpo na bokambi esika wapi yango ezalaka.
Mbala mosusu bato na makama bayokaka nsoni to botioli. Bato na makama bapesami etumbu ya lisumu te. Bakambi basengeli te kogangela moto na likama. Basungaka bato na makama mpe mabotana na bango basosola bolingo ya Nzambe mpe libiki eye eyaka na nzela ya Yesu Klisto mpe Bosikoli na Ye (tala Alma 15:8; 3 Nefi 17:9).
Ntango bandimi baponi kokabola nsango etali bobebisi to motungisi, bakambi basengeli te kotelema bobele na mambi manso malekaki. Yango ekoki kozala mpasi na bato ya makama.
Na bobakisi mpo na kozwa lisungi ya bofuli ya bakambi ya Eklezia, bato na makama mpe mabota na bango bakoki kosenga lisungi ya basali. Mpo na nsango tala 31.3.6.
38.6.18.3
Lisanga ya Bosambisi Kimondimi
Lisanga ya bosambisi kimondi ekoki kozala ntina mpo na moto oyo abebisi na bosangisi nzoto to atungisi moto songolo. Lisanga ya bosambisi kimondimi esengelami soki mondimi asalaki motungisi to abebisaki lolenge mosusu ya bobebisi ya bosangisi nzoto.
38.6.20
Bomibomi
Bomoi ya nkufa ezali likabo ya motuya uta na Nzambe—likabo eye esengeli kopesama ntina koleka mpe kobatelama. Eklezia esungaka makasi bobateli ya bobomi.
Bato ebele oyo bakanisaki na ntina ya bobomi balingaka kozwa lisungi ya mpasi na bango ya nzoto, moto, makanisi, mpe ya molimo. Bato ya lolenge oyo basengeli na bolingo, lisungi, mpe lisalisi uta na libota, bakambi ya Eklezia mpe basali balongobana.
Episikopo akopesa lisungi ya eklezia soki mondimi alingi to alingaki komiboma. Ye lisusu na lombango akosunga mondimi azwa lisungi ya bsali.
Atako makoki nyonso ya bandeko balingami ya motuya, bakambi mpe basali, bomibomi emibatelaka te. Etikaka mpasi makasi na motema, mobulu ngano na makanisi, mpe mituna ezanga biyano mpo na bandeko ya bolingo mpe basusu. Bakambi mpe bandeko ya libota basengeli kopesa toli mpe kobondisa libota. Bakopesa bilei mpe lisungi.
Ezali malamu te ete moto alongola bomoi na ye moko. Nzokande, bobele Nzambe azali na makoki ya kosambisa makanisi ya moto, misala mpe ndelo ya mikumba na ye (tala 1 Samuele 16:7; Malongi mpe Mayokani 137:9).
Baoyo babungisa bandeko balingami na bango na nzela ya bomibomi bakoki kozwa elikya mpe libiki kati ya Yesu Klisto mpe Bosikoli na Ye.
38.6.23
Bato Bazali Basi Mibali to Mibali Basi
Bato bazali basi mibali to mibali basi bakutana na mimekano kilikili. Bandimi ya eklezia mpe bandeko bazali bandimi te oyo bamikitolaka kozala bbasi mibali to mibali basi—mpe mabota mpe baninga na bango—basengeli kozwa bango lokola bato nyonso, na boboto, mawa mpe bolingo mingi ya Klisto. Banso bayambami mpo na kozala na kati ya likita ya elambo, makita mosusu ya Eyenga, mpe milulu ya bato na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka (tala 38.1.1).
Kozala lolenge ya mwasi to mobali ezali ezalela ya ya ntina monene kati na moango ya esengo ya Tata na Lola. Ndimbola eye elimbolami ya kozala mobali to mwasi kati ya esakola ya libota ezali nzoto ya kibomwasi to kimobali na ntango ya mbotama. Bato mosusu bayokaka lokola mobulungano katikati na lolenge na bango ya bomwasi to kimobali na mbotama mpe lolenge na bango ya bomwasi mpe kimobali na nzoto. Lokola mbano, bakoki kokitolama lokola mwssi-mobali to mobali-mwasi. Eklezia ekotaka likambo oyo te mpo na oyo etali bato oyo bamikitolaka lokola mobali-mwasi to mwasi-mobali.
Kozwama na misala mingi koleka ya Eklezia mpe makuli ya bonganganzambe ezalaka likambo ya mwasi to mobali te. Bato bazlaka mwasi lokola mobali to mobali lokola mwasi bakoki kobatisama mpe kokotisama lokola elimbolami na 38.2.8.10. Bakoki mpe lisusu kolia elambo mpe kozwa mapamboli ya bonganganzambe. Nzokande, bokuli ya bonganganzambe mpe makuli ya tempelo ezwamaka engebene na lolenge ya kozala mwasi to mobali uta na mbotama.
Bakambi ya Eklezia batelemelaka bobongoli nzoto to lipaso nyonso ya minganga na ntina ya komeka komibongola na bomwasi to kimobali ya mbotama ya moto (“Kobongola bomwasi to kimobali”). Bakambi bateyaka ete kosalaka misala oyo ekosuka na liyangana ya kotalela ezalela mpe kotia bopekisi ya mondimi na Eklezia.
Bakambi bapekisaka lisusu bobongoli kibomoto. Bobongoli kibomoto ezali kobongola oyo elateli to ezaleli, to kobongola nkombo to bankombo ya ebandli, kozwa kibomoto mosusu koleka oyo ya mbotama. Bakambi batei ete baoyo babongolaka kibomwasi to kimobali na bango bakopekisama kokimondimi na bango na Eklezia mpo na ntango ya bobongoli oyo.
Kati na kotia Bopekisi ezali na eteni ya kozwa to kosalela bonganganzambe, kozwaka to kosalelaka mokanda ya boyingeli na tempelo, mpe kozwaka mabiangi ya Eklezia. Atako matomamosusu ya kozala mondimi ya Eklezia ekopekisama, bakosepela koyamba ye na misala mosusu ya Eklezia.
Soki mondimi akani kobongola nkombo na ye to nkombo na ye ya ebandeli, nkombo oyo ekoki kokotisama na esika ya mikanda ya mondimi. Moto oyo akoki kotalisa nkombo na ye na palwasi.
Mabaku ekeseni na bitonga mpe bitonga mopsusu mpe moto mpe moto mosusu. Bandimi mpe bakambi bateyaka elongo mpe na Nkolo. Byangeli ya etuka enene bakosunga bakambi ya etuka balobela likambo eye ya bato na bokebi ebele. Baepisikopo bakosolola na mokambi ya likonzi. Bakambi ya likonzi mpe bakambi ya misio basengeli koluka toli uta na Bokambi ya Etuka (tala 32.6.3).
38.7
Mibeko ya Minganga mpe Bokolongonu bwa nzoto
38.7.2
Bokundi mpe Bozikisi na mputulu
Libota ya mowei bakozwa ekateli soki nzoto ya mowei esengeli kokundama to kozikisama. Bakotosa bamposa ya moto.
Na bikolo mosusu, mobeko esengaka bazikisa nzoto ya mowei. Na mabaku mosusu, bokundi esalamaka te to ekoki kofutama te mpo na libota kozangaka makoki. Na mabaku misusu, nzoto esengeli kozwana na botosi mpe limemia. Bandimi basengeli kondimisama ete nguya ya Bosekwi ezali ntango nyonso (tala Alma 11:42–45).
Esika wapi maye ekoki kosalema, nzoto ya mowei oyo asila kozwa dotasio esengeli kolatisama na bilamba ya molulu ya tempelo ntango akundami to azikisami na mputulu (tala 38.5.8).
38.7.3
Bana oyo Bakufaka Yambo ya Mbotama na bango (Bana oyo babotami bakufa mpe Bolongoli zemi)
Baboti bakoki kozwa mokano soki basengeli kosala matanga to komema na lilita.
Makuli ya tempelo esengeli te to esalami te mpo na bana oyo bakufaka yambo ya mbotama na bango. Yango epekisi te ete bana oyo bakoki kozala moko ya eteni ya libota na boseko. Baboti balendisami mpo na kotalela Nkolo mpe koluka libondi na Ye.
38.7.4
Kosenga liwa
Bomoi ya moto ezali likabo ya motuya uta na Nzambe. Kosenga liwa ezali kosukisa bomoi ya moto oyo anyokwami na bokono ezanga libiki to lolenge mosusu. Moto oyo atangami kati na bosengi liwa, mpe lisusu kosunga moto akufa na bomibomi, abuki mitindo ya Nzambe mpe akoki kobuka mibeko ya etuka.
Kotika to koboya mibeko ya makasi ya kosunga bomoi ya moto ya nsuka ya bomoi emonisami kozala kosenga liwa te (tala 38.7.11).
38.7.5
Kozala na Bokono ya VIH mpe SIDA
Bandimi oyo bazwi bokono ya VIH (mokolobo moye mosilisaka nguya ya nzoto kotelemela monguna) to baye bazali na SIDA (bokono oyo esilisaka bokasi ya kobatela nzoto) basengeli koyambama malamu na makita mpe misala ya Eklezia. Boyei na bango ezali likama ya mpasi te mpo na basusu.
38.7.8
Nkisi mpe Bokolongonu ya nzoto
Kolukaka lisungi ya monganga oyo ayebi mosala malamu, kosalela bondimi mpe kozwaka mapamboli ya bonganganzambe esalaka elongo mpo na libiki, engebene na bolingi ya Nkolo.
Bandimi basengeli te kosalela to kotombola misala ya monganga to ya bokolongunu bya nzoto miye ezali ya bomoto, molimo, to miye bato bazali kotiela ntembe. Baye bazali na makambo etali bokolongonu bwa nzoto basengeli kokutana na minganga oyo bayebi mosala malamu na bisika eye basalaka.
38.7.9
Nkisi ya Diamba
Eklezia etelemelaka koosalela diamba mpo na bantina ya etinda ya monganga te. Tala 38.7.14.
38.7.11
Kobakisa Mikolo na Bomoi mpe (Kosalela Bisalelo ya Kotikala na Bomoi)
Bandimi basengeli te komiyoka ete batindami na makasi mpo na kobakisa mikolo na bomoi na kosalelaka boyebi koleka makoki na bango. Mikano oyo ezwamaka malamu na moto, soki ekoki kosalema, to na bandeko ya libota. Basengeli koluka toli ya minganga oyo bayebi mosala malamu mpe bokambi ya bonzambe na nzela ya losambo.
38.7.13
Mangwele
Mangwele maye epesami na monganga oyo ayebi mosala na ye malamu ebatelaka bokolongonu mpe ebombaka bomoi. Bandimi ya Eklezia balendisami komibatela bango moko, bana na bango, mpe mangomba na bango na nzela ya mangwele.
Na nsuka, bato bazali na mokumba ya kozwa mikano na bango moko na ntina ya mangwele. Soki bandimi bazali na mituna, basengeli kosolola na minganga oyo bayebi mosala malamu mpe lisusu koluka bokambi ya Molimo Mosantu.
38.7.14
Liloba ya Bwanya mpe Misala ya Bokolongonu bwa Nzoto
Liloba ya Bwanya ezali motindo ya Nzambe. Baprofeta balimbolaki na polele ete mateya kati ya Malongi mpe Mayokani 89 ezali na mobeko ya komibatela na likaya, masanga ya makasi (alekole), mpe bimeli ya moto (ti mpe kafe).
Ezali na biloko mpe misala mosusu ya mabe miye milobelami te kati ya Liloba ya Bwanya to na bakambi ya Eklezia. Bandimi basengeli kosalela bwanya mpe bososoli kati na losambo na kosalaka maponi ya kotombola bomoto, molimo mpe bokolongonu ya makanisi na bango.
38.8
Mibeko ya Kokamba
38.8.1
Kozwa Bana ya Kobokola mpe Libota eye Eyambi
Kozwa bana mpo na kobokola bana mpe koyamba bango kati ya libota ekoki kopambola bana mpe mabota. Kolingaka, mabota ya seko ekoki kokelama kati ya bobokoli. Atako bana bayei na libota na nzela ya bobokoli to ya mbotama, bazali na ndelo moko ya lipamboli ya motuya.
Bandimi oyo balukaka kobokola to koyamba bana kati na libota, basengeli kotosa mibeko nyonso miye etiami ya bikolo mpe lisusu ya bakambi ya leta.
38.8.4
Mikoloto mpe Bafoto ya Bakambi Minene, Bayangeli Minene, mpe Bantuku Nsambo ya Etuka
Bandimi ya Eklezia basengeli te kosenga mikoloto ya Bakambi Minene, Bayangeli Minene, to Bantuku Nsambo ya Etuka. Kosala bongo etukaka mabiangi na bango ya bule mpe molimo ya makita. Yango ekoki lisusu kopekisaka bango bapesa bandimi mosusu mbote.
Bandimi basengeli te kozwa bafoto na Bakambi Minene, Bayangeli Minene to Bantuku Nsambo kati ya bandakonzambe.
38.8.7
Bamagazini ya Eklezia
Bamagazini ya Eklezia ezali:
-
Lokola Friend mpo na bana.
-
Mpo na Bokasi ya Bilenge mpo na bilenge.
-
Lokola Liahona mpo na mikolo.
Bakambi ya Yambo balendisaka bandimi nyonso batanga bamagazini ya Eklezia. Bamagazini ekoki kosunga bandimi bayekola nsango malamu ya Yesu Klisto, bayekola mateya ya baprofeta na bomoi, bayoka ete azali na mokangano na libota ya mokili mobimba ya Eklezia, balonga mimekano na bondimi, mpe bapusana pene ya Nzambe.
38.8.8
Nkombo, Elembo mpe Elilingi ya Eklezia
Nkombo ya Eklezia, elembo mpe elilingi ya Eklezia ezali fungola mpo na kokitola Eklezia.
Elembo mpe Elilingi Elembo mpe elilingi ya Eklezia (tala ndakisa eye elandi na nse) esengeli kosalisama bobele ntango endimami na Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na mibale. Esengeli te kosalela yango lokola biloko ya bonzenga to ya koyemela mpe te. To lisusu kosalela yango mpo na litomba ya moto moko, mosolo to botombwami ya bango moko te.
38.8.10
Odinatele
Baodinatele mpe bisalelo oyo esalisaka kati ya bandako ya makita ya Eklezia epesamaka mpe esalisamaka na bilo monene ya Eklezia to na bilo ya etuka. Bakambi mpe bandimi basalelaka bisalelo biye mpo na kosunga bantina ya Eklezia, mpe lisusu mosala ya mambi ma kala ya libota.
Bisalelo nyonso biye kati ya odinatele esengeli kozala bobele ya Eklezia.
38.8.12
Bisalelo ya Boyekoli
Eklezia epesaka bisalelo mpo na kosalisa bandimi bayekola mpe basalela nsango malamu ya Yesu Klisto. Kati na yango ezali na makomi, bansango ya likita linene, bamagazini, mikanda, babuku, mpe mikanda misusu. Bakambi balendisaka bandimi basalela makomi mpe mikanda misusu lokola esengeli mpo na koyekola nsango malamu na libota.
38.8.14
Kolata mpe Komonana na misu ya Batu
Bandeko ya Eklezia balendisami kolakisa limemia mpo na nzoto ntango baponaka molata malamu mpe komonana na miso ya bato. Oyo elongobani etalaka bonkoko mpe mabaku ekeseni.
38.8.16
Mokolo ya Kokila Bilei
Bandeko bakoki kokila ntango nyonso. Kasi, basalelaka mbala mingi mokolo ya Saba ya yambo na sanza lokola mokolo ya kokila bilei.
Moloko ya kokila bilei esengaka mingi mingi losambo, kokende na kozangaka kolia mpe komelampo na bangonga 24 (soki ozali na makoki na nzoto), mpe kopesa libonza ya bokili bilei. Libonza ya bokili bilei ezali likabo mpo na kosunga baye bazali na bosenga (tala 22.2.2).
Mbala mosusu makita ya Eklezia mobimba to ya etuka esalamaka na mokolo ya Saba ya yambo na sanza. Ntango yango esalami, bakambi ya likonzi bakotia mokolo mosusu ya Saba mpo na kokila bilei.
38.8.17
Masano ya Mbongo mpe Loteri
Eklezia epekisaka mpe eteyaka bandimi babeta masano ya kozwa mosolo ya lolenge nyonso. Kati na masno maye ezali masano ya kobeta ndanga to masusu ya loteri malengelami na mbula-matari.
38.8.19
Kokima na Mboka Mopaya
Bandimi oyo batikalaka kati na bikolo na bango ya mbotama bazalaka na mabaku ya kotonga mpe kolendisa Eklezia kuna. Nzokande, kokima mpo na kokende na mboka ya bapaya ezali boponi ya moto ye moko.
Bandimi oyo bakendaka na mboka mosusu basengeli kotosa mibeko nyonso oyo etiami (tala Malongi mpe Malongi 58:21).
Bamisionele basengeli te kosalisa bato mosusu baya na mboka mopaya.
38.8.22
Mibeko ya Mboka
Bandimi basengeli kotosa, kokumisa mpe kosunga mibeko ya mboka nyonso epai wapi bafandi to kosala mobembo (tala Malongi mpe Mayokani 58:21–22; Biteni ya Bondimi 1:12). Kati na miye ezali mibeko oyo epekisaka kosakola nsango malamu.
38.8.25
Bosololi ya Bandimi elongo na Bilo Monene ya Eklezia
Epekisami na bandimi ya Eklezia babenga, bakomela to batinda nsango na mokanda na Bakambi Banene na ntina ya mituna etali malongi, mimekano ya bango moko, to bosenga songolo. bandimi balendisami basunga bakambi na bango ya etuka, mpe lisusu bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi to ya bampaka ya lisanga likoki, soki bokambi ya molimo esengelami (tala 31.3).
38.8.27
Bandimi oyo Bazali Balemeni
Bakambi mpe bandimi balendisami mpo kopesa biyano na bosenga nyonso ya bato oyo bafandi na etonga na bango. Bandimi oyo bazali balemeni bazali na motuya mpe bakoki kosalisa na banzela mingi ya ntina. Bozangi makoki ekoki kozala ya mayele, bomoto, makanisi, to ya nzoto.
38.8.29
Biyamba Mosusu
Mingi oyo efulami, ya lokumu mpe elongobana na lilmemia ya likolo ezwami kati ya mangomba mingi mosusu ya biyamba. Bamisionele mpe bandimi mosusu basengeli bazengeli kozala na bokebi mpe botosi na bondimi mpe babonkoko ya basusu.
38.8.30
Mosala ya Politiki mpe ya Bana Mboka
Bandimi ya Eklezia balendisami kosala kati ya makambo ya politiki mpe ya mbula-matari. Na bikolo ebele, ezali lokola:
-
Kosala maponami.
-
Kozala to kosunga kati ya mangomba ya politiki.
-
Kopesa lisungi ya mosolo.
-
Kosolola na bakambi ya mangomba o baye bazwami na maponami ya politiki.
-
Kosala kati ya babilo eponami to eye etiami na mbula matari ya etuka to ya mboka.
Bandimi balendisami lisusu kosala kati ya bantina elongobana mpo na kosala ete mangomba na bango ezala bisika malamu ya kofanda mpe ya kobokola mabota.
Bakambi ya etuka ya Eklezia basengeli te kosangisa bandimi bakota na makambo ya politiki. Bakambi ya Eklezia basengeli te komeka kotinda bandimi na lolenge nini basengeli kozwama na makambo ya politiki.
Bakambi mpe Bandimi basengeli lisusu koboya masakoli to bizaleli oyo ekoki kolimbolama lokola ete Eklezia ezali kondima lingomba ya politiki, to lisanga ya mangomba songolo, mibeko na bango ya kokamba, to moponami songolo.
38.8.31
Kobatela Sekele ya Bandimi
Bakambi ya Eklezia basengami kobatela sekele ya bandimi. Mikanda ya Eklezia, bibombelo, mpe bisalelo mosusu ekoki te kosalama mpo na bantina ya moto, mombongo, to politiki.
38.8.35
Bakimi bituma
Lokola eteni ya mokumba na bango ya kolengela baye bazali na bosenga (tala Mosiya 4:26), bandimi ya Eklezia bapesaka ntango, batalanta mpe makoki ya kozala moninga na bango mpo na koyamba bato bakima bitumba lokola bandimi ya mangomba na bango.
38.8.36
Bosenga ya Mosolo ya Eklezia mpo ya Kosalisa
Bandimi oyo bazali na bosenga balendisami koloba epai ya episikopo na bango na esika ya kobengaka bilo monene ya Eklezia to kosenga mosolo na bakambi mosusu ya Eklezia to bandimi.