Mabiangi Ya Misio
Etinda ya Bokambi ya Yambo


“Etinda ya Bokambi ya Yambo,” Teya Nsango Malamu ya Ngai: Mokambi na Kokabola Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023)

“Etinda ya Bokambi ya Yambo,” Teya Nsango Malamu ya Ngai

Nsango ya Etinda ya Bokambi ya Yambo

Ndeko Molingami Misionele:

Tokumisi yo na libaku monene oyo ozali na yango ya kozala misionele mpo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka. Ezali na mosala moko te ya ntina mpe motuya koleka bosangisi ya Yisalaele.

Teya Nsango ya Ngai epesami mpo na kosunga yo omilengele malamu, mpo na kozala misionele akola na molimo. Epesami lisusu mpo na kosunga yo ozala motei ya nguya. Tolendisi yo osalela yango mikolo nyonso ya boyekoli na yo moko mpe na baninga. Tolendisi yo lisusu osalela yango na mayangani na bino ya disitiliki mpe makita ya zone. Yekola makomi oyo ebetami nsete mpe yekola malongi mpe mabongisi.

Tobengisi yo otelema na lolenge ya sika ya komipesa mpo na kosalisa Tata na biso ya Lola na mosala na Ye ya nkembo. Misionele nyonso azali na mokumba ya ntina ya kosalisa Nkolo na mosala na Ye ya “kokokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Mose 1:39).

Nkolo akopambola yo ntango omibulisi na komikitisa mpo na kosalela Ye. Tika ete ozwa esengo makasi mpe bosepeli ntango ozali kosala kati ya bana ya Tata na Lola.

Bokambi ya Yambo

Bimisa na lokasa