Makuli mpe Bisakola
Biteni bya Bondimi


Biteniya Bondimi
Bya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

1 Tondimi Nzambe, Tata wa Seko, mpe Mwana wa Ye, mpe Molimo Mosantu.

2 Tondimi ete bato bakozwa etumbu mpo na masumu ma bango moko, kasi mpo na bobuki mobeko bwa Adama te.

3 Tondimi ete o nzela ya Bomikabi bwa Klisto, bato banso bakoki kobikisama, na kotosaka mibeko mpe makuli ma Nsango elamu.

4 Tondimi ete mabongisi mpe makuli ma yambo ma Nsango elamu mazali: ya yambo Bondimi na Nkolo Yesu Klisto; ya mibale, Boyamboli; ya misato, Libatisi na bozindisi na mai mpo na bolimbisi bwa masumu; ya minei, Botii bwa maboko mpo na likabo lya Molimo Mosantu.

5 Tondimi ete moto asengeli kobiangama na Nzambe, na nzela ya lisakoli, mpe ya botii bwa maboko na baoyo wana bazali na likoki, mpo na koteya Nsango elamu mpe kosala makuli ma yango.

6 Tondimi eyangeli se moko oyo ezalaki kati na Eklezia ya Kala, elingi koloba, bapostolo, baprofeta, bakengeli, bateyi, balakisi, mpe bongo na bongo.

7 Tondimi likabo ya koloba minoko, bosakoli, bobimisi, mamoni, kobikisa bakoni, kolimbola minoko, mpe bongo na bongo.

8 Tondimi ete Biblia ezali liloba lya Nzambe soki ebongolami malamu; tondimi lisusu ete Buku ya Mormon ezali liloba lya Nzambe.

9 Tondimi maye manso Nzambe asila kobimisa, manso maye Azali kobimisa sikawa, mpe tondimi ete Akobimisa lisusu makambo manene mpe ma motuya matali Bokonzi bwa Nzambe.

10 Tondimi bosangani mpenza bwa Yisalaele mpe bozongisi bwa Mabota Zomi; ete Siona (Yelusaleme ya Sika) ekotongama na mokili mwa Amerika; ete Klisto yemei akoyangela likolo ya mabele; mpe, ete mabele makozongisama sika mpe makozwa nkembo na yango ya paladiso.

11 Tosengi litomba lya biso ya kokumbamela Nzambe wa Bokasi bonso engebene na masengami ma mayele ma motema mwa biso moko, mpe kopesaka nzela ya litomba se moko lina na bato banso, ete tika bakumbamela na lolenge, na esika, mpe nini bakoki kopona.

12 Tondimi kozala o nse ya bokonzi bwa bakonzi, bakambi, bayangeli, basambisi, na kotosaka, kokumisaka, mpe kosungaka mobeko.

13 Tondimi kozala sembo, solo, peto, boboto, malamu, mpe kosalaka bolamu na bato banso; zambi, tokoki koloba ete tozali kolanda mabondeli ma Paulo—Tondimi makambo manso, tolikyi makambo manso, mpe toyikaki mpiko na makambo nzike, mpe tolikyi ete tozali na makoki ya kotia molende na makambo manso. Soki ezali na eloko ya malamu, to ya kitoko to ya lisolo malamu to ya lokumu, tokoluka biloko biye.

Joseph Smith.

Bimisa na lokasa