Makuli mpe Bisakola
Esakola ya Bozongisi


Bozongisi ya Litondi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto

Esakola ya Mibu Nkama Mibale na Mokili

Esakola oyo etangamaki na Mokambi Russell M. Nelson lokola eteni ya etinda na ye na Likita Monene ya Mobu ya Mbala ya 190 na mokolo ya 5 sanza ya minei, 2020, na Salt Lake City, Utah.

Tosakoli na lokumu ete Nzambe alingaka bana na Ye na bikolo nyonso ya mokili. Nzambe Tata apesi biso mbotama ya bonzambe, bomoi ezanga bokokani, mpe mbeka ya bomikabi ezanga nsuka ya Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto. Na nguya ya Tata, Yesu asekwaki mpe azwaki elonga likolo ya liwa. Ye azali Mobikisi na biso, Ndakisa na biso, mpe Mosikoli na biso.

Mibu nkama mibale eleki; na ntongo moko kitoko na eleko ya milona na 1820, elenge Joseph Smith, kolukaka koyeba na eklezia nini asengelaki kosangana, akendaki na zamba penepene ya ndako na bango kosambela na etuka ya New York, USA. Azalaki na mituna na ntina ya lobiko ya molimo na ye mpe atiaki elikya ete Nzambe akolakisa ye.

Na bomikitisi nyonso, tosakoli ete lokola eyano na losambo na ye, Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bamonanaki epai ya Joseph mpe babandaki “bozongisi ya makambo nyonso” (Misala 3:21) lokola elobamaki na Biblia. Na limoni oyo, ye ayekolaki ete nsima ya liwa ya Bapostolo ya ebandeli, Eklezia ya Boyokani ya Sika ya Klisto ebungaki na mabele. Joseph asengelaki kozala esalelo mpo na bozongi na yango.

Tondimi ete na nse ya bokambi ya Tata mpe ya Mwana, bantoma uta na lola bayaki kolakisa Joseph mpe kozongisa lisusu Eklezia ya Yesu Klisto. Yoane Mobatisi mosekwi azongisaki likoki ya kobatisa na nzela ya bozindisi na mai mpo na bolimbisi ya masumu. Misato ya Bapostolo zomi na babale—Petelo, Yakobo, mpe Yoane—bazongisaki mosala ya bapostolo mpe bafungola ya likoki ya bonganganzambe. Basusu mpe bayaki, kotangaka Eliya, oyo azongisaki likoki ya kosangisa mabota esika moko mpo na libela na mokangano ya seko mosika koleka ntango ya liwa.

Totatoli lisusu ete Joseph Smith apesamaki likabo mpe nguya ya Nzambe mpo na kobongola nkoma ya makomi ya kala: Buku ya Mormon—Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto. Na kati ya nkasa ya makomi ya bule oyo tozali na lisolo ya mosala ya Yesu Klisto ye moko na kati ya bato ya Ndelo ya Westi ya mokili kala mingi te nsima ya Bosekwi na Ye. Lisolo oyo ezali koteya ntina ya bomoi mpe kolimbola malongi ya Klisto, maye mazali na kati-kati ya ntina wana. Lokola moninga na makomi ya Biblia, Buku ya Mormon etatoli ete bato nyonso bazali bana mibali mpe bana basi ya Tata ya bolingo na Lola, ete azali na moango ya bonzambe mpo na bomoi na biso, mpe ete Mwana na Ye, Yesu Klisto, azali koloba lelo lokola na mikolo ya kala.

Tosakoli ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, oyo ebongisamaki na mokolo ya 6, sanza ya minei, 1830, ezali Eklezia ezongisami ya Boyokani ya Sika ya Klisto. Eklezia oyo ekangami makasi kati na bomoi ebonga nie ya libanga ya nsuka mokonzi na yango, Yesu Klisto, mpe kati na Bomikabi na Ye ezanga nsuka mpe Bosekwi na Ye na nzoto. Yesu abiangi mbala moko lisusu Bapostolo mpe apesi bango likoki ya bonganganzambe. Ye abengisi banso kati na biso toya epai na Ye mpe na Eklezia na Ye, tozwa Molimo Mosantu, makuli ya lobiko, mpe tozwa esengo oyo ewumelaka.

Mibu nkama mibale esili koleka uta Bozongisi ebandisamaki na Nzambe Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto. Bato mingi bayambi boyebi ya makambo maye masakolamaki na mokili mobimba.

Tosakoli na esengo nyonso ete Bozongisi oyo elakelamaki ezali kokende liboso na nzela ya emoniseli ya ntango nyonso. Mabele ekozala soki moke te ndenge moko lisusu, mpo Nzambe “akosangisa biloko nyonso esika moko na Klisto” (Baefese 1:10).

Na limemia mpe botondi, biso lokola Bapostolo na Ye tobengisi banso bayeba—lokola toyebi—ete lola ezali ya kofungwama. Tondimi ete Nzambe azali koyebisa bolingi na Ye mpo na bana mibali mpe bana basi na Ye ya bolingo. Totatoli ete baoyo bakoyekola na nzela ya losambo nsango ya Bozongisi mpe bakosala na bondimi bakopambolama mpo na kozwa litatoli ya bango moko ya bonzambe mpe ya ntina na yango mpo na kolengela mokili na ntina ya Boyei ya Mibale elakama ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Bimisa na lokasa