Moninga
Mayokani mpe Mikumba
Sanza ya Mitano 2024


Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya Mitano 2024

Mayokani mpe Mikumba

Biteni

Elilingi
maloba mosusu

Philippines

Boyokani ezali bomipesi mpo na kokokisa mikumba songolo. Bomipesi ya moto ye moko ezali ntina na bolandeli ya bomoi na biso mokomoko mpe na botamboli ya lingomba ya bato. …

Ntango ngonga ekokaki mpo na Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, Nzambe abengaki profeta, Joseph Smith. … [Buku ya Mormon] ezali ebandeli monene ya Bozongisi ya litondi ya nsango malamu, kobakisa mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye, mpe Buku ya Mormon etondisami na maloba etali mayokani. …

Mayokani ezalaki motuya na Bozongisi ya nsango malamu. Yango ezali solo na ebandeli ete Nkolo akambaki Profeta azwa mpo na kobongisa Eklezia na Ye. …

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali kotonga batempelo na mokili mobimba. Ntina yango ezali mpo na kopambola bana ya boyokani ya Nzambe na bokumbameli ya tempelo mpe na mikumba ya bule mpe banguya mpe mapamboli oyo ekokani na mosusu te ya kokangama na Klisto bazwaka na boyokani.

Eklezia ya Yesu Klisto eyebani lokola eklezia oyo ebetaka nsete na kosalaka mayokani na Nzambe. Mayokani mazali na kati ya moko na moko ya makuli ya lobiko mpe botomboli oyo Eklesia oyo ezongisami etambwisaka. Bokuli ya libatisi mpe mayokani na yango mazali mokumba ya ntina mpo na kokota kati na bokonzi ya selesitiale. Makuli mpe mayokani ekangana ya tempelo mazali mikumba ya ntina mpo na bonetoli kati na bokonzi ya selesitiale, oyo ezali bomoyi ya seko, “likabo monene ya makabo nyonso ya Nzambe” [Malongi mpe Mayokani 14:7]. Oyo ezali ntina ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Bimisa na lokasa