Moninga
Nyonso Ekozala Malamu Mpo na Mayokani ya Tempelo
Sanza ya Mitano 2024


Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya Mitano 2024

Nyonso Ekozala Malamu Mpo na Mayokani ya Tempelo

Biteni

Elilingi
maloba mosusu

USA

Bandeko, natatoli na komikitisa ete ntango tokendaka na tempelo, tokoki kokundolisama lolenge ya boseko ya milimo na biso, bondeko na biso na Tata mpe Mwana na Ye ya bonzambe, mpe mposa na biso ya nsuka ya kozonga na ndako na biso ya lola. …

Na nse ya bokambi efulama ya Mokambi na biso Nelson, Nkolo atindikaki, mpe akokoba kotindika, kotonga batempelo na mokili mobimba. Yango ekopesa bana nyonso ya Nzambe libaku ya kozwa makuli ya lobiko mpe bonetoli mpe kosala mpe kobatela mayokani ya bule. …

Kosalaka ntango nyonso makuli ya tempelo ekoki kokela ndakisa ya bomipesi epai ya Nkolo. … Ntango ozali kobatela mayokani na yo ya tempelo mpe omikundoli yango, ozali kobengisa kimoninga ya Molimo Mosantu na nyonso mibale kolendisa mpe kopetola yo. …

Ezali kati na mayokani ya bokangisi ya tempelo nde tokoki kozwa bondimi ya mikangano ya libota ya bolingo oyo ekokoba nsima ya liwa mpe ekowumela mpo na seko. Kotosa mayokani ya libala mpe ya libota esalami na batempelo ya Nzambe ekopesa bobateli uta na mabe ya kimoimi mpe ya lolendo. …

Mimekano, mikakatano, mpe boyoki motema mpasi ekokomela moto nyonso. Moko te kati na biso abatelami na “mabe ya nzoto” [tala 2 Bakolinti 12:7–10]. Na yango, ntango tokendaka tempelo mpe tomikundolisaka mayokani na biso, tokoki komilengela mpo na kozwa bokambi na biso moko uta na Nkolo. …

Bandeko na ngai, natatoli ete ezali na eloko moko te eleki motuya lokola kotosa mayokani bosalaki to bokoki kosala kati na tempelo.

Bimisa na lokasa