Kolandela
Tokoki banso kokoba komipesa kaka na mosala ya bomisionele na kotiaka bondimi na biso ya solo na esika ya bobangi.
Mibu ntuku motoba na minei eleki sanza ya libwa oyo nazongaki ndako kowuta na misio na ngai na mboka Angleterre. Mikolo misato nsima ya bozongi nakendaki na Mokolo ya Ball Dansant na Université ya Utah na moninga na ngai moko. Ayebisaki ngai na ntina ya etudiante kitoko moko ya 2eme babengi Barbara Bowen oyo ye akanisaki nasengelaki kokutana na ye. Amemaki ye epai na ngai mpe akutanisaki biso, mpe tobandaki kobina.
Kasi, oyo ezalaki nini tomesanaki kobenga “mabina ya kobotola,” oyo elingaki koloba ete osengeli bobele kobina na mwana mwasi moko kaka kino moto mosusu abotoli yo ye. Barbara azalaki na bokasi mpe ayebana, yango wana nasengelaki kobina na ye na nse koleka miniti moko liboso elenge mobali mosusu abotolaki ngai ye.
Wana ezalaki mpenza ya kondima te epai na ngai. Koyekolaka ntina ya kolandela na misio, nazwaki nimelo na ye ya telefoni mpe nabengaki ye mokolo kaka elandaki mpo na kosenga ye tobima, kasi, azalaki na mosala mingi na mikumba ya kelasi mpe ya mokili. Matondo mingi misio na ngai eteyaki ngai kotigama ata liboso ya bolembi nzoto, mpe nazalaki na nsuka na makoki ya kobima na ye. Mpe mokolo wana ememaki misusu. Kozangaka koyeba mpo na nini na bobimi wana nazalaki na makoki ya kondimisa ye ete nazalaki misionele azonga moko kaka ya solo mpe ya bomoyi—atako bongo, ntango nionso tokolobela ye. Sikoyo, mibu 64 nsima, ezali na bana nsambo mpe bankoko ebele mpe bankokoloko oyo batelemi lokola litatoli ya bosolo ya ntina oyo atako lolenge nini nsango na yo ezali, okoki te kozwa litomba ya kopesa yango kozangaka bolandeli ya sikisiki, ya kotingama.
Oyo ekoki kozala ntina nayokaki liyoki ya polele mpo na kolandela lelo na ntina ya nsango na ngai mibale ya likita linene ya kala.
Na likita ya sanza ya zomi 2011, napesaki makanisi ete tomikundola maloba ya ntina oyo ya Nkolo: “Mpo na bongo eklezia na ngai ekobengama na mikolo ya nsuka, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka.”1
Na maloba oyo, Nkolo alakisi polele ete oyo ezali bobele nkombo ya mpamba te kasi lisusu nkombo oyo Ekldezia na Ye esengeli kobengama. Mpo na lisakoki na Ye ya polele, tosengeli te kobenga Eklezia na nkombo mosusu kani, ndakisa “Eklezia ya Mormon” to “Eklezia ya Ba BMS.”
Liloba Mormon ekoki kosalema malamu na mwa makambo mpo na kobenga bandimi ya Eklezia, ndakisa bapionie ya Bamormon, to mangomba ndakisa Bayembi ya Tabelenakele ya Bamormon. Bandimi ya Eklezia bayebani na mokili mobimba lokola Bamormon, mpe na masolo elongo na baoyo bazali ya bondimi na biso te, tokoki malamu komibenga lokola Bamormon, soki tobalisi yango na nkombo mobimba ya Eklezia.
Soki bandimi bayekoli kosalela nkombo malamu ya Eklezia na bokangisi na liloba Mormon,ekobeta nsete ete tozali Baklisto, bandimi ya Eklezia ya Mobikisi.
Bandeko mibali mpe basi, tika tolandela mpe tokolisa momesano ya kolakisaka ntango nionso polele ete tozali ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya nsuka.
Nsango ya mibale oyo nazali koyoka nasengeli kolandela na ntina na yango epesamaki kaka na likita linene eleki ntango nalendisaki bandimi basambela mpo na kokambama epai ya ata moto moko epai ya nani bakokaki kosembola libengisi ya koyekola na ntina ya nsango malamu ezongisami liboso ya Noele. Bandimi ya Eklezia mingi bakaboli elongo na ngai ndambu ya makambo ya ndenge lokola mbano ya botuni na bango Nkolo mpo na mabaku ya misionele.
Misionele moko azonga, mpo na ndakisa, mingimingi asambelaki mpo na kokambama epai ya “moko” akokaki kosalisa. Nkombo ya moninga ya kelasi ya kala eyaki na moto na ye. Asololaki na ye na nzela ya Facebook, mpe ayekolaki ete azalaka kosambela mpo na ntina mpe ndimbola na bomoyi na ye. Alandelaki kaka na ntango azalaki koluka bosolo, mpe na sanza ya zomi na mibale abatisamaki.
Mabengisi mingi ya boye elobelamaki epai na ngai, kasi bobele bato moke balandaki lokola esalaki ndeko mobali oyo.
Nazali mondimi monene ya libongisi ya bolandeli. Lokola elobami na buku ya misionele Prêchez Mon Evangile, “kosembolaka libengisi kozangaka kolandela ezali lokola kobandaka mobembo kozangaka kosukisa yango to kosombaka tike ya kokende na miziki kozangaka kokotaka na kati. Kozangaka ekela mobimba, bomipesi mpamba.”2
Prêchez Mon Evangile eteyi moto nionso kaka te lolenge nini kobengisa bobele te kasi lisusu lolenge nini kolandela na ntina ya libiangi na biso. Ntina ya mosala ya misionele elimbolami lokola kobenga “basusu baya epai ya Klisto na kosalisaka bango bayamba nsango malamu ezongisami na nzela ya bondimeli Klisto mpe Bomikabi na Ye, boyamboli, libatisi, kozwaka likabo ya Molimo Mosantu, mpe kotia molende kino na nsuka.”3
Kobengisa ezali solo eteni ya nzela. Kasi tala ete ezali na mingi mpenza epai ya mosala ya misionele mpo na bandimi koleka kopesaka mpamba mabengisi na bato mpo na koyoka bamisionele. Ezali mpe na bolandeli elongo na bamisionele na kolonaka bondimi, botindiki na boyamboli, bolengeli mpo na kosala mayokani mpe kotia molende kino na nsuka.
Libongisi ya bolandeli oyo elakisami na buku ya Misala:
“Mokolo moko Petelo na Yoane bakendaki na tempelo. …
“Bongo bato moko bamemaki moto moko akufa makolo banda abotama. Bazalaki kotia ye mikolo minso na ekuke ya lopango ya tempelo,ekuke oyo babengaka: “Ekuke ya kitoko”, mpo esengaka makabo ya mawa epai ya bato bazalaki kokota.
“Ntango amonaki Petelo na Yoane bazalaki kokota na lopango ya tempelo, asengaki bango likabo ya mawa.
“Petelo na Yoane batalaki ye nie, mpe Petelo alobaki na ye: tala biso!
“Bongo moto oyo akufa makolo atalaki bango malamu mpenza; akanisaki ete akozwa eloko epai na bango.
“Kasi Petelo alobaki na ye: ‘Nazali na palata te to mpe wolo te ya kopesa yo; kasi oyo nazali na yango, napesi yo yango: Na kombo ya Yesu Klisto ya Nazareti, tambola!”
Wana ezali libengisi ya nguya kowuta na mowumbu ya Nkolo, solo te? Kasi Petelo atikaki na libengisi te. Lisolo ya makomi nsima elobeli biso ete “asimbaki ye na loboko ya mobali,mpe atelemisaki ye: mpe mbala moko makola na ye mpe mikuwa ya loketo na ye ezwaki makasi.
“Bongo, apumbwaki, atelemaki, mpe abandaki kotambola. Bongo akotaki na bango na tempelo,azalaki kotambola, kopumbwa, mpe kokumisa Nzambe.”4
Na maloba mosusu, Petelo abondelaki kaka likoki na ye ya bonganganzambe mpe abengisaki moto wana atelema mpe atambola. Alandelaki lisusu na ntina ya libangi na ye na kosalisaka moto wana, kosimbaka ye na loboko ya mobali, kotelemisaka ye, mpe nsima kokotaka elongo na tempelo.
Na molimo ya ndakisa ya Petelo, tika napesa likanisi ete tokoki banso komipesa mingi mpenza na mosala ya misionele na kolongolaka bobangi na biso mpe kotiaka bondimi, kobengisaka moto moko ata mbala moko na sanza misato—to mbala minei mobu nionso—koteyama na bamisionele ya ntango mobimba. Balengelami mpo na koteya na molimo na bofuli ya bosembo mpe ya mozindo uta na Nkolo. Elongo tokoki kolandela mabiangi na biso mpe kosalisa mpe kosimba basusu na liboko, kotelemisaka bango mpe kotambola elongo na bango na mobembo ya molimo oyo ekambaka na tempelo.
Mpo na kosalisa bino na nzela oyo, Nabengisi bandimi nionso, kotala te libiangi na yo ya sika to ndelo ya mosala na Eklezia, bozwa buku moko ya Prêchez Mon Evangile. Ezwami na nzela ya centres de distribution mpe na lisusu ofele na Interneti. Na interneti ekoki kotangama to ko télécharger. Ezali buku mokambi mpo na biso banso. Botanga yango, boyekola yango, mpe nsima bosalela maye boyekoli mpo na kosalisa bino bososola lolenge ya komema milimo epai ya Klisto na nzela ya libengisi mpe bolandeli. Lokola elobi Mokambi Thomas S. Monson, “Sikoyo ezali ntango mpo na bandimi mpe misionele basangana elongo, mpo na kosala elongo, mpo kosala na bilanga ya vinio ya Nkolo mpo na komema milimo epai na Ye.”5
Yesu Klisto ateyaki bayekoli na Ye ete:
“Bambuma ya kobuka ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke!
“Yango wana bosenga nkolo ya elanga atinda basali na elanga na ye.”6
Nkolo ayanoli losambo wana na mikolo na biso na motango monene mpenza ya bamisionele ya ntango mobimba na lisolo ya mokoli. Na mbonge ya sika oyo ya basali ya botongono, Nkolo apesi biso libaku mosusu ya kosunga Ye na elanga monene ya milimo.
Ezali na banzela ya pete mpo na bandimi basalisa mpe basunnga bamisionele na biso ya kafukafu. Mpo na ndakisa, bokoki koyebisa bamisionele ete bozali koyekola Prêchez Mon Evangile mpe bosenga bango balakisa bino maye bozali koyekola na boyekoli na bango. Wana ezali bino kokabolana, bondimi ebuti katikati ya bandimi mpe ya bamisionele ya ntango mobimba ekokola solo, kaka lokola Nkolo atindaki:
“Kasi ete mobali [mpe mwasi] nionso akoki koloba na nkombo ya Nzambe Nkolo, kutu Mobikisi ya mokili.”7
Mpe, “Tala, natindi yo okende kotatola mpe kokebisa bato, mpe ekoma mobali nionso oyo akebisami akebisa mozalani na ye.”8
Bandeko mibali mpe basi, ekoki bino kokanisa mbando soki libota mpe baninga bakotisaki makambo bazali koyekola uta na boyekoli na bango moko uta na Prêchez Mon Evangile na mikanda na bango mpe ba-email epai ya bamisionele ya ntango mobimba? Ekoki bino komona mapamboli oyo ekoyela mabota ntango bayebi mpe basosoli malamu koleka maye bana na bango ya mibali mpe ya basi bakozala koyekola mpe koteya na misio na bango? Ekoki bino kutu kobanda kososola ngolu ya komikaba ya kosopana ya momesano te oyo ekozala ya biso, moto na moto mpe lisanga, engebene na elaka ya Mobikisi epai ya banso oyo batatoli na nzela ya kobengisa milimo koya epai na Ye—mpe nsima kolandelaka na ntina ya mabengisi wana.
“Bozali ya kopambolama,” Nkolo alobaki na nzela ya Profeta Joseph Smith ete, “mpo na litatoli oyo bopesi ekomami na likolo mpo na baanzelu bamona; mpe basepela na bino, mpe masumu na bino malimbisami.”9
“Mpo ete nakolimbisa bino mpo na masumu na bino na motindo oyo—mpo ete botikala ngwi … kopesaka litatoli epai na mokili na ntina ya makambo wana oyo eyebisami na bino.”10
Namoni esengo etonda oyo elandaka libiangi etindikami na litatoli mpe bolandeli katikati ya bandimi ya Eklezia na mokili mobimba. Ntango nazalaki na Argentine kala te, nalendisaki bandimi babengisa moto moko na eklezia liboso ya likita linene oyo. Mwana moko ya mibu mwambe na nkombo ya Joshua ayokaki mpe abengisaki moninga na ye ya malamu mpe libotana ya moninga na ye ya malamu na journée porte ouverte na palwasi na ye na Buenos Aires. Tika natanga uta na mokanda nazwi kala te oyo elimbolaki libengisi mpe Joshua mpe bolandeli na ye ya botongono:
“Miniti nionso [Joshua] akokima libanda epai ya ekuke ya lopango mpo na kotala soki bazalaki koya. Alobaki ete ayebaki bakolinga [koya].
“Ntango elekaki mpe baninga ya Joshua bayaki te, kasi Joshua atikaki te. Azalaki kotala na botongono ekuke ya lobango ya liboso mwa miniti nionso. Ezalaki ngonga ya kolongola biloko ntango Joshua abadaki kopumbwa mpe kokweya koyebisaka,‘Bazali awa! Bazali awa!’ Natombolaki miso mpo na komona libota mobimba kopusanaka na eklezia. Joshua akimaki mpo na kopesa bango mbote mpe ayambaki moninga na ye. Bakotaki banso mpe bamonanaki lokola basepelaki na porte ouverte mingi mpenza. Bazwaki ndambu ya mwa buku mpe balekisaki ntango mingi kosalaka bondeko na ndambu ya mwa baninga. Ezalaki esengo komona bondimi ya mwa mwana mobali mpe koyeba ete bana ya Eteyelo ya Bana bakoki mpe kozala misionele.” 11
Ezali litatoli na ngai ete wana ezali biso kosala mosala elongo, kolukaka moko, kobengisaka, mpe kolandelaka na elikia mpe bondimi. Nkolo akoseka muke likolo na biso mpe bankama ya bankoto ya bana ya Nzambe bakomona mpe ntina mpe kimia na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Tika Nkolo apambola biso banso na bokasi na biso ya kotabwisa mbangu mosala ya lobiko, nasambeli na komikitisa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.