Esengo Ya Makasi
Tika ete biso banso toluka mpe tozwa esengo ya makasi oyo ewutaka na bopesi ya babomoyi na biso epayi ya Tata na Lola mpe Mwana na Ye ya bolingo.
Nazali na lipamboli monene ya kolobaka na likita linene uta mibu ntuku misato sikawa. Na ntango wana, bato ebele na mokili batunaki ngai mituna etali nsango bansango oyo. Mikolo oyo, motuna moko ezali se kozonga. Ekendaka mingi lolenge oyo: “Mpaka Uchtdorf, nayokaki na bokebi nyonso nsango na yo oyo eleki kasi, … nayokaki te eloko moko etali mpepo.”
Malamu, nsima lelo, nakoyoka lisusu motuna oyo te uta mwa ntango.
Na “Esengo ya kokweya ya Mapata oyo ekabolami na Moyi”
Ezali mpasi mpo na kondima ete ezalaki kaka mibu 120 mileki ntango Wilbur mpe Orville Wright mpo na mbala ya liboso bamataki mpe bapumbwaki likolo ya zelo ya Kitty Hawk, Caroline du Nord. Mapumbuki mineyi na mokolo ya Sanza ya zomi na mibale wana ebongolaki mokili mpe efungolaki ekuke na moko ya babokeli monene na lisitwale ya mokili.
Kopumbwa ezalaki na likama na mikolo wana ya ebandeli. Bandeko mibali bayebaki yango. Lokola tata na bango, Milton. Na yango, azalaki na bobangi makasi na likanisi ya kobungisa bana na ye mibale ya mibali na likama ya mpepo oyo balakaki ye ete bakotikala kopumbwa elongo te.
Mpe batikala kosala yango te—na bolongoli moko. Mibu nsambo nsima ya mokolo wana ya lisitwale na Kitty Hawk, Milton Wright na nsuka andimaki mpe atalaki ntango Wilbur mpe Orville bapumbwaki elongo mpo na mbala ya liboso. Nsima ya kokita, Orville andimisaki tata na ye akota na mpepo mbala liboso mpe mpo na komona yemoko soki ekokanaki na nini.
Ntango mpepo elongwaki na mabele, Milton na mibu 82 ayokaki esengo ya mpepo mpe bobangi nyonso esilaki ye. Orville asepelaki ntango tata na ye agangaki na esengo, “Likolo makasi, Orville, likolo makasi!”
Oyo azalaki moto ya motema na ngai!
Ntango mosusu ntina nalobelaka mpepo mbala na mbala ezali ete nayebi eloko moko oyo Wrights ayokaki. Ngai mpe “nakimaki mikangano ya malamu te ya Mabele mpe nabinaki na likolo na mapapu ya langi kitoko mpe ya koseka.”
Bopumbiki ya liboso ya Ndeko mobali Wright, oyo esalamaki na mibu 37 yambo ya mbotama na ngai, efungolaki bikuke ya lisano, bikamwa, mpe bosepeli ya peto na bomoyi na ngai.
Mpe bongo, lokola kitoko ndenge esengo wana ezali, ezali lisusu na esengo moko eleki wana. Lelo, na molimo ya bogangi ya esengo ya Milton Wright, “Likolo makasi, Orville, likolo makasi,” nalingi kolobela esengo oyo ya makasi—esika nini ewutaka , lolenge nini ekotaka na mitema na biso, mpe lolenge nini tokoki koyoka yango na ndelo moko ya makasi.
Ntina mobimba ya Bozali ya Moto
Mbala mingi emonisamaka koloba ete moto nyonso alingaka kozala na esengo. Na yango, elobamaka lisusu ete moto nyonso te azalaka na esengo. Na mbalakaka, emonisamaka ete, mpo na bato ebele, bosepeli ezalaka mpasi mpo na kozwa yango.
Mpo na nini ezalaka bongo? Soki bosepeli ezali eloko moko biso bato tolingaka mingi, mpo na nini tolongaka te mpo na kozwa yango? Mpo na kolimbola loyembo ya ekolo moko, ntango mosusu tozala koluka esengo na bisika nyonso ya mabe.
Esika Nini Tokoki Kozwa Bosepeli?
Yambo tosolola lolenge nini kozwa esengo, bopesa ngai ndingisa ya koyeba ete motungisi mpe makambo misusu ya makanisi mpe mimekano ya nzoto ezali solo, mpe eyano ezali kaka pete te lokola, “Meka kozala na esengo.” Ntina na ngai lelo ezali te ya kokitisa to komona mpamba makambo ya kolongono ya makanisi. Soki bozali na mikakatano ya ndenge wana, nazali kolela na bino, mpe mpe naelemi pembeni na bino. Mpo na bato misusu, bozwi esengo ekoki kozala boluki lisungi uta na minganga oyo balandelaka kolongono ya makanisi mpe oyo bapesaka bomoyi na bango mpo na kosalela mayele na bango ya kobikisa. Esengeli tozala na botondi mpo na lisungi ya ndenge wana.
Bomoyi esuki te na makambo ya mpasi ya nzoto. “Mpo esengeli mpenza ezala, ete ezala bokeseni na makambo manso.” Mpe soki Nzambe Yemoko alelaka, ndenge makomi endimisi ete Asalaka yango, bongo ya solo yo na ngai tokolela mpe lokola. Koyoka mawa ezali elembo te ya kozanga kokoka. Na bomoyi oyo, bongo, esengo mpe mawa ezali baninga oyo bakabwanaka te. Lokola bino banso, nayoka bokaboli ya motema mpasi na ngai, mawa, mpe bwale.
Na yango, nakutanaki ngai moko na nkembo oyo etondisaki molimo na ngai na esengo makasi oyo ekoki kotikala libela. Namonaki ngai moko ete elikya oyo ya kimia eyaka uta na kolandaka Mobikisi mpe kotambolaka na nzela na Ye.
Kimia oyo Ye apaesaka biso ezali te oyo mokili epesaka. Ezali malamu koleka. Ezali likolo makasi mpe esantu. Yesu alobaki, “Ngai nayei mpo ete bameme ezua bomoyi mpe ezwa yango na bofuluki pena.”
Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali solo “nsango malamu ya esengo makasi”! Ezali nsango ya bokokisi elikya! Nsango ya bomemi nkanga mpe botomboli mikumba. Ya bosangisi pole. Ya lisungi ya lola, bososoli ya likolo koleka, mayokani esantu, bobateli ya seko, mpe nkembo ya libela!
Esengo ezali mpenza ntina ya moango ya Nzambe mpo na bana na Ye. Ezali ntina ya bokelami na bino—“ete [bino] bokoka kozala na bosepeli”! Bokelamaki mpo na yango!
Tata na biso ya Lola abombaki te nzela oyo ememaka na bosepeli. Yango ezali sekele te. Yango ezali mpo na banso!
Elakelami na baoyo batambolaka na nzela ya kimoyekoli, kolanda mateya mpe ndakisa ya Mobikisi, kobatela mitindo na Ye, mpe kotosa mayokani basalaki elongo na Nzambe. Boni elaka ya monene boye !
Nzambe Azali na Eloko moko ya Motuya mpo na Kopesa
Biso nyonso toyebi bato oyo balobaka ete bazali na mposa ya Nzambe te mpo bazala na esengo, ete bazali na esengo ya kokoka na bozango eyamba.
Nayebaka mpe natosaka mayoki oyo. Tata na biso ya Lola ya bolingo alingi bana na Ye nyonso bazala na bosepeli ya boye ekoka, bongo Atondisaki mokili oyo na bisengo mpe babolamu ya bonzenga, “nyonso mibale mpo na kosepelisa misu mpe … kosepelisa motema.” Mpo na ngai, kopumbwa ememelaki ngai bosepeli makasi. Basusu bazwaka yango na miziki, ntoki, masano, to mokili.
Na kokabolaka nsango malamu ya Mobikisi ya esengo makasi, tomonaka mpamba te makambo oyo ememaka esengo. Tozali kaka koloba ete Nzambe azali na eloko moko ya motuya ya kopesa biso. Esengo moko ya makasi mpe ya bozindo—esengo eleki makambo mokili oyo epesaka. Ezali esengo oyo elendisaka motema ya kobukana, epesaka esengo na mawa, mpe ekitisa bomiyoki kozala yo moko.
Bosepeli ya mokili, na ntango mosusu, ewumelaka te. Ekoki te. Ezali ndenge ya biloko nyonso ya mokili esengeli konuna, konzuluka, kobeba to kosila ngala. Kasi esengo ya bonzambe ezali seko, mpo ete Nzambe azali seko. Yesu Klisto ayaki kobimisa biso libanda ya bonzoto mpe bolamu ezwa esika ya libebi Bobele Ye nde azali na nguya wana, mpe kaka esengo na Ye ezali ya libela na libela.
Soki bokanisi ekoki kozala na esengo ya lolenge oyo na bomoyi na bino, nabengisi bino bomipesa na mobembo ya kolandaka Yesu Klisto mpe Nzela na Ye. Ezali mobembo ya ntango ya bomoyi—mpe ya likolo. Nasengi, nalobela moke matambe ya ebandeli na mobembo oyo ya bolongobani ya bozwi esengo ya peto.
Boya Pene ya Nzambe
Bozali komikundola mwasi na kati ya Boyokani ya Sika oyo azalaki kotanga makila uta mibu 12? Abebisaki nyonso oyo azalaki na yango epayi ya minganga, kasi maladi ekomaki lisusu makasi koleka. Ayokaki na ntina ya Yesu; nguya na Ye ya kobikisa eyebanaki malamu. Kasi Akokaki kobikisa ye? Mpe lolenge nini akokaki kopusana pene na Ye? Bokono na ye esalaki ye “mbindo” engebene na mobeko ya Mose, mpe bongo asengamaki ete azala mosika ya basusu.
Kopusana pene na Ye na polele mpe kosenga libiki ezalaki nsaka te.
Kino, akanisaki, “Soki nasimbi kaka elamba na ye, nakobika.”
Na nsuka, bondimi na ye elongaki bobangi na ye. Azwaki makasi ya kolonga basusu mpe kokende liboso ya Mobikisi.
Nsukansuka, akutanaki na ye. Atombolaki loboko na ye.
Mpe abikisamaki.
Tozali biso te ntango mosusu lokola mwasi oyo?
Ekoki kozala na bantina ebele esalaka ete totia ntembe ya kopusana pene ya Mobikisi. Tokoki kokutana na botioli to bopesami etumbu uta na basusu. Na lolendo na biso, tokoki kobwakisa libaku ya eloko moko ya moke oyo ezali motuya mingi. Tokoki kokanisa ete lolenge na biso mbala mosusu elongisaka biso te mpo na libiki na Ye—ete mosika eleki mingi to masumu na biso eleki ebele.
Lokola mwasi oyo, nayekolaki ete soki topusani pene ya Nzambe mpe tosimbi Ye, tokoki solo kozwa libiki, kimia mpe esengo.
Boluka yango.
Yesu ateyaki, “Boluka mpe bokozwa.”
Nakanisi liloba oyo ya moke ezali kaka elaka ya molimo te; ezali esakola ya likambo.
Soki toluki bantina ya kozala na nkanda, kotia ntembe, kozala bololo to kozala biso moko, tokozwa yango.
Na yango, soki toluki esengo—soki toluki bantina ya kosepela mpe kolanda na esengo Mobikisi, tokozwa yango.
Tozwaka mingi te eloko oyo tozali koluka te.
Ozali koluka esengo?
Luka, mpe okozwa yango.
Bomema Mikumba ya Moko na moko
Yesu ateyaki, “Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa.”
Yango ekoki kozala ete, na boluki na biso ya esengo, lolenge malamu ya kozwa yango ezali komema esengo epayi ya basusu?
Bandeko mibali mpe basi, boyebi ;pe nayebi ezali solo! Esengo ezali lokola engongolo ya fufu to katini ya mafuta oyo ekosilaka te. Esengo ya solo ebakisamaka ntango ekabolami.
Esenga te eloko moko ya monene to ya mindondo.
Tokoki kosala makambo moko ya pete.
Lokola kosambela mpo na moto na motema na yo mobimba.
Koloba maloba ya bosembo.
Kosalaka ete bato bayoka bayambami malamu, batosami, bapesami lokumu mpe balingami.
Kokabolaka makomi oyo tolingaka mpe maye elimbolaka epayi na biso.
To bobele na koyokaka.
“Ntango bozali na lisalisi ya bazalani na bino bozali kaka lisalisi ya Nzambe na bino,” mpe Nzambe akofuta boboto na bino na motema nyonso. Esengo oyo bopesaka basusu ekozongela bino na “ndenge ya malamu, elengelama, mpe ebongisama elongo mpe etonda.”
Nini Tokoki kosala Nsima?
Na mikolo ekoya liboso, baposo, mpe basanza, nakoki kobengisa bino:
-
Bolekisa ntango na bokasi ya motema mobimba mpo na kopusana pene ya Nzambe.
-
Boluka na etingia mikolo nyonso bantango ya elikia, kimia mpe esengo.
-
Bomemela basusu oyo bazali nzinganzinga na bino esengo.
Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, baninga na ngai, ntango bozali koluka liloba ya Nzambe mpo na bososoli ya mozindo ya moango ya seko ya Nzambe, bondima mabiangi oyo, mpe boluka kotambola na Nzala na Ye, bokoyoka “kimya ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso,” atako na kati ya mawa makasi. Bokoyoka ndelo monene ya bolingo ya Nzambe kopemaka na mitema na bino. Moyi ya mpokwa ya lola ekokota na bililingi ya mikakatano na bino, mpe bokobanda komeka bankembo ezanga bososoli ya bokonzi emonanaka te, ebonga nie mpe ya mokili ya lola. Bokoyoka molimo na bino etombwami likolo uta na bozito ya mokili oyo.
Mpe lokola Milton Wright ya malamu, ntango mosusu bokotombola mingongo na bino na kosepelaka mpe koganga, “Likolo makasi, Tata, likolo makasi!”
Tika ete biso banso toluka mpe tozwa esengo ya makasi oyo ewutaka na bopesi ya babomoyi na biso epayi ya Tata na Lola mpe Mwana na Ye ya bolingo. Oyo ezali losambo na ngai ya sembo mpe ya lipamboli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.