Maloba Ezali na Ntina
Maloba nde elobaka likambo. Ebimisaka makanisi, mayoki, mpe boyebi na biso, mpo na malamu to mabe.
Bandeko mibali, basi, mpe baninga na mokili mobimba, napesami lokumu ya kolobela bino na bosangani monene oyo, ebele ya baye bazali bandimi ya Eklezia mpe ebele ya baye bazali baninga mpe bayoki ya sika ya bopanzi nsango ya likita oyo. Boyei malamu!
Bansango oyo ekabolami uta na elobelo oyo elobami na maloba. Epesami na Angele mpe ebongolami na minoko ekeseni pene na 100. Moboko ezali ndenge moko ntango nyonso. Maloba. Mpe maloba ezali na ntina mingi. Tika ete naloba yango lisusu. Maloba ezali na ntina!
Ezali moboko ya lolenge nini tosanganaka; emonisaka boyambi, bizaleli malamu, mpe bomoni na biso. Ntango mosusu tolobaka maloba; ntango mosusu toyokaka. Maloba nde elobaka likambo. Ebimisaka makanisi, mayoki, mpe boyebi na biso, mpo na malamu to mabe.
Kasi, maloba ekoki kozala ezanga makanisi, ya mbangumbangu, mpe ya kozokisa. Ntango elobami, tokoki kozongisa yango lisusu te. Ekoki kozokisa, kopesa etumbu, kokitisa, mpe komema kutu na misala ya bobebisi. Ekoki kozala kilo likolo na biso.
Na ngambo mosusu, maloba ekoki kokumisa elonga, ekoki kozala ya elkya mpe ya kolendisa. Ekoki kotinda biso tokanisa lisusu, tobandela, mpe tozongisa nzela na biso. Maloba ekoki kofungola milimo na biso na bosolo.
Yango wana, ya yambo mpe motuya mingi, maloba ya Nkolo ezali na ntina.
Na Buku ya Mormon, profeta Alma mpe bato na ye na Amerika ya kala bakutanaki na bitumba ezanga nsuka na baoyo batyolaki maloba ya Nzambe, bayeisaki mitema na bango, mpe babebisaki bonkoko na bango. Bandimi bakokaki kobunda, kasi Alma apesaki toli: “Mpe sikawa, lokola liteya ya lilobaezalaka na bokasi monene ya kokambabato na kosala eye eyengebeni—iyo, ezalaki na mbano ya nguya mingi likolo ya mayele ya bato mingi koleka mopanga, to eloko mosusu, oyo ekomaki epayi na bango—yango wana Alma akanisaki elongobanaki ete bameka bokasi ya liloba ya Nzambe.”
“Liloba ya Nzambe” eleki maloba mosusu. Ezalaki banda Bokeli ya mabele ntango Nkolo alobaki: “Tika ete pole ezala: mpe pole ezalaki.”
Bilaka oyo ewutaki na Mobikisi na Kondimana na Sika: “Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na ngai ekoleka te.”
Mpe oyo: “Soki moto alingi ngai, akobatela maloba na ngai: mpe Tata na ngai akolinga ye, bongo tokoya epayi na ye, mpe tokovanda elongo na ye.”
Mpe uta na Malia, mama ya Yesu, eyaki litatoli oyo ya komikitisa: “Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo; tika ete maloba na yo ekokisamela ngai.”
Kondimaka mpe kotosaka liloba ya Nzambe ekobenda biso penepene na Ye. Mokambi Russell M. Nelson alaki, “Soki bokotanga maloba na Ye, makoki na bino ya kozala mingi lokola Ye ekokola.”
Elingi biso nyonso te kozala, lokola loyembo elobi, “ya kopambolama mingi mpe ya bule—koleka, Mobikisi, lokola yo”?
Namonaka elenge Joseph Smith afukami koyokaka maloba ya Tata na ye na Lola: “[Joseph,] Oyo Azali Mwana na Ngai ya Bolingo. Yokela Ye!”
Biso “toyokelaka Ye” na maloba ya makomi, kasi totikaka yango kaka efanda mpamba, to toyebaka ete Ye alobaka na biso? Tobongwanaka?
Biso “toyokelaka Ye” na emoniseli ya moto ye moko mpe botindiki uta na Molimo Mosantu, na biyano na libondeli, mpe na bantango oyo kaka Yesu Klisto, na nzela ya nguya ya Bomikabi na Ye, akoki kotombola mikumba na biso, kopesa biso bolimbisi mpe kimya, mpe koyamba biso “na maboko ya bolingo na ye.”
Ya mibale, maloba ya baprofeta ezali na ntina.
Baprofeta batatolaka na ntina ya bonzambe ya Yesu Klisto. Bateyaka nsango malamu na Ye mpe balakisaka bolingo na Ye mpo na banso. Napesi litatoli na ngai ete profeta na biso ya bomoi, Mokambi Russell M. Nelson, ayokelaka mpe alobelaka liloba ya Nkolo.
Mokambi Nelson ayebi kosalela maloba. Alobi, “Tikala na nzela ya boyokani,” “Sangisa Yisalaele,” “Tika Ete Nzambe Alonga,” “Tonga boyokani ya bososoli,” “Pesa matondi,” “Kolisa bondimi na yo kati na Yesu Klisto,” “Zwa mokumba ya kobatela litatoli na yo,” mpe “Koma mopesi kimya.”
Mikolo eleki asengi biso “tokanisa lola.” “Ntango okutani na mikakatano,” alobi, “kanisa lola! Ntango omekami na lisenginya, kanisa lola! Ntango bomoi to balingami bayokisi yo mpasi, kanisa lola! Ntango moto songolo akufi na bolenge, kanisa lola. …Ntango mbonge ya bomoi eyei likolo na yo, kanisa lola! Ntango ozali kokanisa lola, motema na yo ekobongwana mokemoke, … okomona mikakatano mpe bonguna na pole ya sika, … [mpe] bondimi na yo ekokola.”
Ntango tozali kokanisa lola, tokomona “makambo lolenge ezali mpenza, mpe … lolenge ekozala mpenza.” Kati na mokili oyo etondi na mobulungano mpe boswani, biso nyonso tozali na mposa ya bomoni wana.
Mpaka George Albert Smith, kala yambo akoma Mokambi ya Eklezia, alobelaki etali kosungaka profeta mpe kotosaka maloba na ye. Alobaki: “Mokano oyo tosalaka ntango totomboli maboko na biso … ezali mokano moko ya bule koleka. … Elimboli … ete tokotelema nsima na ye; tokosambela mpo na ye; … mpe tokosala makasi na biso mpo na kokokisa malako na ye lokola Nkolo akokamba.” Na maloba mosusu, tokosalela na molende nyonso maloba ya profeta na biso.
Lokola moko ya baprofeta 15, bamoni, mpe babimisi basungami lobi na Eklezia ya mokili mobimba, nasengeli kokabola elongo na bino moko ya boyebi na ngai ya kosungaka profeta mpe koyambaka maloba na ye. Ezalaki mingi mpenza mpo na ngai lokola profeta Yakobo, oyo alobaki, “Nayokaki mongongo ya Nkolo kolobaka epayi na ngai na liloba mpenza.”
Sanza ya Zomi eleki mwasi na ngai, Melanie, mpe ngai tozalaki na Bangkok, Thailand, ntango nazalaki komilengela mpo na kobulisa oyo esengelaki kozala tempelo ya 185 ya Eklezia. Mpo na ngai, mosala ezalaki ya solo te mpe ya komikitisa. Oyo ezalaki tempelo ya liboso na esanga ya Sudi-Esti ya Azia. Ebongisamaki na mayele mpenza—etazi motoba, etongami na nsinga libwa, “ekangami esika moko” mpo ezala ndako ya Nkolo. Mpo na bansanza natalaki bobulisi. Oyo eyaki na molimo mpe makanisi na ngai ezalaki ete mboka mpe tempelo etyamaki na maboko ya baprofeta mpe bapostolo. Mokambi Thomas S. Monson asakolaki tempelo mpe Mokambi Nelson asakolaki bobulisi.
Nabongisaki losambo ya bobulisi basanza mingi liboso. Maloba oyo ya bule ebongolamaki na minoko 12. Tomilengelaki To nakanisaki bongo.
Butu moko liboso ya bobulisi, nalamukaki na pongi na ngai na liyoki moko ya motungisi mpe ya lombangu etali losambo ya bobulisi. Namekaki kotya mpembeni botindi oyo, kokanisaka ete losambo ebongisamaki. Kasi Molimo esengelaki kotika ngai moko. Nayokaki ete maloba mosusu ezalaki kozanga, mpe na likanisi ya bonzambe eyelaki ngai na emoniseli, mpe nakotisaki maloba wana na losambo pene na nsuka: “Ekoki biso kokanisa lola, kotikaka Molimo na Yo alonga na bomoi na biso, mpe tosala makasi ya kozala bapesi kimya ntango nyonso.” Nkolo azalaki kokundolisa ngai natosa maloba ya profeta na biso ya bomoi: “Kanisa lola,” “tika Molimo alonga,” “sala makasi ya kozala mopesi kimya.” Maloba ya profeta ezali na ntina epayi ya Nkolo mpe epayi na biso.
Ya misato, mpe ya motuya mingi, ezali maloba na biso moko. Bondimela ngai, kati na mokili na biso etondi na makambo , maloba ezali na ntina.
Maloba na biso ekoki kosunga to kopesa kanda, ya esengo to ya mabe, ya motema mawa to ya kobwaka pembeni. Na molunge ya ntango wana, maloba ekoki koswa mpe kozokisa molimo na bozindo—mpe kotikala kuna. Maloba na biso na interneti, botindi mesaje, rezo sosio, to tweeets ezwamaka na lolenge tokanisaka te. Na yango bozala na bokebi na nini bolobaka mpe lolenge nini bolobaka yango. Na mabota na biso, mingimingi na mibali, basi, mpe bana, maloba na biso ekoki kosangisa biso to kokabola biso.
Tika napesa maloba misato oyo tokoki kosalela mpo na kolongola nsomo na bampasi mpe bokeseni, kotombola, mpe kondimisama moko na mosusu:
“Matondi.”
“Nazali na mawa.”
Mpe “Nalingi yo.”
Kobomba maloba oyo ya bopolo te mpo na likambo moko ya ntina to likama. Salela yango mingimingi mpe na bosembo, mpo ezali kolakisa limemya mpo na basusu. Maloba ezali kokoma na ntalo moke; bolanda lolenge wana te.
Tokoki koloba “matondi” na ebutelo, na parking, na wenze, na bilo, na molongo, to na bazalani to baninga na biso. Tokoki koloba “Nazali na mawa” ntango tosali mbeba, tozangi liyangani, tobosani mokolo ya mbotama, to tomoni moto moko na mpasi. Tokoki koloba “Nalingi yo,” mpe maloba yango ememaka nsango ya “Nakanisaka yo,” “Namitungisaka mpo na yo,” “Nazali awa mpo na yo,” to “Ozali nyonso mpo na ngai.”
Tika nakabola ndakisa na ngai moko. Mibali, bokeba. Bandeko basi, oyo ekosalisa bino mpe. Liboso ya mosala na ngai ya misionele ya ntango mobimba na Eklezia, natambolaki mingi mpo na kompani na ngai. Nazalaki kokende ntango molai na mikili ya mosika mpenza. Na nsuka ya mokolo na ngai, ata soki nazalaki wapi, nazalaki ntango nyonso kobenga ndako. Ntango mwasi na ngai, Melanie, ayambaki na telefone mpe nalobelaki, ntango nyonso lisolo na biso ememaka biso na kolobaka “Nalingaka yo.” Mokolo nyonso, maloba oyo esalisaki lokola longo na bomoi na ngai mpe etamboli na ngai; ezalaki libateli mpo na ngai uta na miango ya mabe. “Melanie, nalingi yo” elobelaki elikya ya motuya kati na biso.
Mokambi Thomas S. Monson azalaki koloba, “Ezali na makolo ya kosunga, maboko ya kosimba, mayele ya kolendisa, mitema ya kofula, milimo ya kobikisa.” Kolobaka “matondi,” “nazali na mawa,” “nalingaka yo” ekosala kaka yango.
Bandeko mibali mpe basi, maloba ezali na ntina.
Nalaki ete soki “tosali limpati likolo ya liloba ya Klisto” oyo ememaka na lobiko, maloba ya profeta na biso oyo ekambaka mpe elendisaka biso, mpe maloba na biso moko oyo elobaka na ntina ya oyo biso tozali mpe nini ya motuya tozali na yango, nguya ya lola ekosopana likolo na biso. “Maloba ya Klisto ekoyebisa bino makambo nyonso bosengeli kosala.” Tozali bana ya Tana na Lola mpe Azali Nzambe na biso, mpe Azelaka biso toloba na “monoko ya banzelu” na nguya ya Molimo Mosantu.
Nalingi Nkolo Yesu Klisto. Azali, na maloba ya Yisaya na Kondimana na Kala, “Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya Kimya.” Mpe lokola Ntoma Yoane alobaki polele ete, Yesu Klisto Ye moko azali “Liloba.”
Na yango natatoli lokola Apostolo abengami na mosala ya bonzambe ya Nkolo—mpo na kosakola liloba na Ye—mpe abengami mpo na kotelema lokola nzeneneke na Ye ya kafukafu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.