2012
Losambo na Ngai ya Bondimi
sánzá ya míbalé 2012


Bolenge

Losambo na Ngai ya Bondimi

Ntango nazalaki na mibu 18, nazalaki kosala lokola moteki na magazini ya bakiti. Manaka ma mosala mwa ngai ezalaki mpasi. Nazalaki kosala uta ngonga ya 8:00 na ntongo kino 10:00 na mpokwa, uta mokolo mwa Yambo kino mokolo ya Mposo. Nazalaki na mawa mpo nakokaki te kozala na milulu ya Eteyelo ya malongi mpe ya Eklezia.

Nabandaki kosambela Tata na Lola na bondimi mingi kosengaka Ye kosalisa ngai ete nazwa mosala wapi nakosala na mikolo ya Mposo te boye ete nakoka kokende na Eteyelo ya malongi mpe milulu mosusu.

Mokolo moko na mosala nazalaki kosalisa moto moko. Tobandaki kosolola, mpe alobaki ete asalaka na banki moko ya monene. Natunaki lolenge kani nakokaki kokota na momekano ya kozwa mosala na kompani oyo. Apesaki ngai nkombo na ye mpe nimelo na ye ya telefone mpe ayebisaki ngai ete nakokaki kobenga oyo azwaka bato na mosala mpe koyebisa ye ete nayebi ye. Nakendaki na banki mpe nakotaki na mimekano minso. Nalongaki mpe nabandaki kosala ngonga motoba na mokolo moko uta mokolo ya Yambo kino mokolo ya Mitano, kozwaka mbala misato mingi koleka nini nazalaki kofutama liboso.

Nayebi Nkolo akambaka biso ntango tolingi kotia Ye na esika ya liboso. Azali kokamba ngai lelo kaka. Nayebi ete mobeko ya losambo ezali solo.

Bimisa na lokasa