2012
Lendisa Bango Basambela
sánzá ya míbalé 2012


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya Mibale 2012

Lendisa Bango Basambela

Ntango nazalaki mwana moke, baboti ba ngai bateyaki ngai kosambela na kolakisaka ngai ndakisa. Nabandaki kotia na mayele ma ngai elilingi ete Tata na Lola azali mosika. Wana ekolaki ngai, mayele na ngai ya kosambela ebongwanaki. Elilingi ya mayele ma ngai ekomi moko ya Tata na Lola oyo azali penepene, oyo azwami na pole moko ya bongengi, mpe oyo ayebi ngai malamu koleka nyonso.

Mbongwana wana eyaki ntango nazwaki litatoli ete mbando ya makambo maye Joseph Smith amonaka na 1820 na Manchester na New York ezalki solo:

“Namonaki lokoni ya pole sikisiki mpenza likolo ya moto mwa ngai, koleka bongengi bwa cmoi, loye ezalaki se kokoba kokita kino ekweyaki likolo na ngai.

“Emonanaki kala mingi te nde namimonaki ngaimei ya kokangolama uta na monguna oyo akangisaki ngai. Ntango pole yango ezalaki likolo na ngai namonaki Bato mibale, baoyo kani bongengi mpe nkembo ikoki kolimbolama te, kotelemaka likolo na mopepe. Moko na bango alobaki na ngai, kobiangaka ngai na nkombo mpe alobaki, kolakisaka mosapi na mosusu—Oyo azali Mwana wa ngai wa Bolingo. Yokela Ye!” (Joseph Smith—Mambi ma Kala 1:16–17).

Tata na Lola azalaki na mwa zamba yango o mokolo kitoko mona ya eleko ya milona. Abiangaki Joseph na nkombo na ye. Mpe Alakisaki Mobikisi mosekwi ya mokili lokola wa Ye “Mwana wa Bolingo.” Ntango nyonso mpe esika nyonso wapi okosambela, litatoli na yo ya bosolo ya likzambo ya nkembo oyo ekoki kopambola yo.

Tata oyo tosambelaka azali Nzambe ya nkembo oyo asalaki mikili o nzela ya Mwana wa Ye ya Bolingo. Ayokaka nsambo na biso lokola Ayokaki losambo ya Joseph—na lolenge ya polele lokola kaka soki izalaki kopesama na miso ma Ye. Alingi biso mingi mpenza ete Apesaki Mwana wa Ye lokola Mobikisi na biso. Na likabo lina Asalaki ete tokoka kozwa bozangi kufa mpe bomoi ya seko. Mpe Apesaki biso, na nzela ya losambo mpe nankombo ya Mwana na Ye, libaku ya koyokana na Ye na bomoi oyo mbala mingi lokola toponi.

Bamemi ya Bonganganzambe na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazali na mokumba ya bule ya “kokendaka na ndako ya mondimi moko na moko, mpe kolendisa bango kosambela na kobimisaka maloba mpe na nkuku” (D&A 20:47; biso nde tobeti sete).

Ezali na banzela mingi ya kolendisa moto mpo na kosambela. Ndakisa, tokoki kotatola ete Nzambe atindaki biso kosambela ntango nyonso, to tokoki kolimbola bandakisa uta na makomi mpe uta na oyo biso moko tomoni ya mapamboli maye mayaka uta na bozongisi matondi, bobodeli, mpe kosengaka. Ndakisa, nakoki kotatola ete nayebi Tata na Lola ayanolaka nsambo. Nazwaki maloba ma bokambi mpe bolendisi maye mayaki na mayele ma ngai, mpe nayebi na lisalisi ya Molimo ete maloba yango mawutaki na Nzambe.

Profeta Joseph Smith akutanaki na makambo ma lolenge lona, yo mpe lokola okoki. Azwaki eyano oyo na losambo moko uta na motema mwa ye ya solo:

“Mwana wa ngai, kimia ezala na molimo mwa yo; amitungisi mpe mpasi na yo ekozala bobele mpo na ntango moke;

“Mpe nsima, soki otieli yango molende malamu Nzambe akonetola yo na likolo” (D&A 121:7–8).

Eye wana ezalaki bobimisi ut na Tata wa bolingo epai ya mwana ya botongono na ntango ya mawa manene. Mwana nyonso ya Nzambe akoki kosolola na Ye na losambo. Bolendisi moko te etikala kozwa nguya monene likolo na ngai lokola nayokaki bolingo mpe pole oyo eyaka na biyano na nsambo oyo etindami na bomikitisi.

Tozwaka litaoli ya motindo nyonso ya Nzambe na kobatelaka motiondo mona (tala Yoane 7:17). Oyo ezali solo na motindo mopesami ete tosambelaka ntango nyonso na mongongo makasi mpe na nkuku. Lokola moteyi mpe moninga na bino, nalaki ete Nzambe akoyanola nsambo na bino mpe ete na nguya ya Molimo Mosantu, bokoki koyeba mpo na bino moko ete biyano yango ewuti epai na Ye.

Koteya uta na Etinda Eye

  • “Bilili ezali bisalelo ya motuya mpo na kobeta sete na mama ya likambo ya liteya” (Teaching, No Greater Call [1999], 176). Lakisa elilingi eyemama ya Joseph Smith to ya Limoni ya Yambo. Solola likambo oyo Joseph Smith amonaka na losambo. Lolenge nini ekoki nsambo na bino kozala na ntina mingi koleka soki na makanisi ete “Tata na Lola … azali penepene,” lokola esalaka Mokambi Eyring?

  • Lokola Mokambi Eyring apesi likanisi, tala lolenge nini okoki kokabola litatoli na yo na ntina ya losambo, kolimbolaka mapamboli ozwaki mpo na losambo, to kokabolaka makomi na baninga na ntina ya losambo.

Bimisa na lokasa