Etinda ya Bamama Bateyi Batali, sanza ya Mibale 2012
Babateli ya Mabele
Yekola liteya liye, mpe na lolenge esengeli, solola na ntina na yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba lya Bamama Basungi likoma eteni yoko ya mosala na bomoi bwa yo.
“Bozali Babateli ya Mabele,” elobaki Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) ntango azalaki kolakisa “The Family: A Proclamation to the World” na likita ya Lingomba ya Bamama Batali mpe Bateyi ya mobu 1995. “Bozali bamemi bana. Bozali bango oyo bamelisaka bango mpe baye batiaka kati na bango bizaleli ya bomoi na bango. Ezali na mosala mosusu te oyo ezali mosika te na bonzambe lokola mosala ya komelisa bana mibali mpe bana basi ba Nzambe.”1
Mibu 17 sikawa esakoli oyo elendisaki biso ete na kati kati ya mikumba na biso ya minene koleka ezali kolendisa mabota mpe bandako—likambo na biso ezala ata nini. Barbara Thompson, oyo azali sikawa Mosungi ya mibale na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama basungi, azalaki na Tabelenakele ya Salt Lake ntango Mokambi Hinckley atangaki mbala ya yambo esakoli yango. “Eye wana ezalaki libaku moko monene,” ekundolaki ye. “Nayokaki ntina ya etinda yango. Namikutaki ngai moko kokanisaka, ‘Oyo ezali lisungi monene mpo na baboti. Ezali mpe lisusu mokumba monene mpo na baboti.’ Nakanisaki mpo na ntango moko ete etalaki mingi mingi ngai te mpo ete nabalaki te mpe nazalaki na bana te. Kasi mbele lokola na lombangu nakanisaki ete, ‘Kasi etali mpe ngai. Nazali moto ya libota. Nazali mwana mwasi, ndeko ya mwasi, tata mwasi to mama leki, mwana nkasi, nkoko ya mwasi. Nazali mpenza na mikumba—mpe mapamboli—mpo nazali moto ya libota. Ata soki nazalaki moto ya libota bobele moko oyo azali na bomoi, nazali kaka mpe moto ya libota ya Nzambe, mpe nazali na mokumba ya kolendisa mabota mosusu.’”
Likambo ya esengo nde totikali se biso moko te na makasi ma biso. “Lisalisi ya monene koleka manso,” elobi Ndeko ya mwasi Thompson, “oyo tokozwa na kolendisaka mabota ezali ya koyeba mpe kolanda malongi ma Klisto mpe kotiela Ye motema ete akosalisa biso.”2
Uta na Makomi
Masese 22:6; 1 Nefi 1:1; 2 Nefi 25:26; Alama 56:46–48; Doctrine et Alliances 93:40
Uta na Mambi ma Kala ma Biso
“Ntango Ndeko ya mwasi Bathsheba W. Smith asalelaki lokola mokambi monene ya minei ya Lingomba ya Bamama Basungi [uta 1901 kino 1910], ayokaki mposa ya kolendisa mabota, mpe boye atiaki mateya ya koteya bamama mpo na bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi. Kati na mateya yango ezwamaki batoli mpo na libala, bobateli mwana liboso ya mbotama, mpe kobokala mwana. Mateya maye esungaki mateya ya Mokambi Joseph F. Smith mpo na ntina ya kosalisa Lingomba ya Bamama Basungi na mikumba na bango na ndako:
“‘Esika nyonso wapi bozangi koyeba to na mwa moke bozangi bososoli mpo na oyo etali libota, misala ya libota, mpo na eye etali masengami maye masengeli kozala mpe maye mazali mpenza kati na mobali mpe mwasi mpe kati na bana mpe mibali, libongisi liye ezalaka to ezali penepene, mpe na likonzi ya mbotama mpe bofuli oyo ezali na libongisi balengelemi mpe basili kobelema mpo na kopesa malakisi maye matali mikumba minene mina.’”3
© 2012 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na bakomi. Ebetami na Etazini ya Amerika. Bondimami na lokota ya Angele: 6/11. Bondimami ya bobongoli: 6/11. Bobongoli ya Visiting Teaching Message, February 2012. Lingala. 10362 639