2012
Nakomona Ye Lisusu
2012


Bolenge

Nakomona Ye Lisusu

Papa asalaki ete moko na moko na biso bana tomiyoka malamu. Alingaki biso mpe akolimbisa na pete nyonso. Asalaki malamu na ye koleka mpo na komona solo ete moko na moko na biso azalaki na esengo, mpe akomisaki yango polele ete alingaki ya malamu mingi koleka mpo na biso. Nalingaki ye mingi mpenza.

Ntango nazalaki na kelasi ya mibu motaba, tata na ngai akufaki na likama ya motuka. Libota lya ngai mpe ngai tokomaki na mobulu mpenza Ezalaki na libulu ya monene na libota lya biso. Papa azalaki moko oyo natielaki motema, moko epai nazalaki kokendeko soki nazalaki na kpokoso. Na esika ya koluka lisungi, natikaki nkanda mpe mpasi ewumela. Na nsuka nasukisaki ete ezalaki mabe ya Nzambe. Natikaki kotanga makomi mpe kosala nsambo. Nakendeki na eklezai bobele mpo Mama alindaki ngai nakende. Namekaki kotikala mosika na Tata wa ngai ya Lola.

Nsima nakendeki na nganda ya Bilenge Basi mpo na mbala ya yambo. Nalingaki kokutana na baninga ba sika, kasi nazalaki naino kotanga makomi te. Na butu ya nsuka, tozalaki na liyangani ya litatoli. Nayokaki eloko moko nazwaka te uta kala: Molimo. Nalulaki bana basi baye batelemaki mpe bapesaki matatoli ma bango, kasi natikalaki ya kovanda, mpamba te nakanisaki nazalaki na yango te. Na mbalakaka nayokaki lokola nasengelaki kotelema. Nafungolaki monoko mwa ngai, komitunaka nini koloba. Boye nalobaki ete nasepelaki mpo na nganda ya Bilenge Basi. Nsima namimonaki kolobaka ete nayebi Yesu Klisto akufaki mpo na ngai mpe ete Tata wa ngai ya Lola alingaki ngai mpe ete Eklezia ezalaki ya solo.

Natondisamaki na kimia ya kokamwa. Na ntina ya likambo liye nakoki koloba ete nayebi nakomona tata wa ngai lisusu na ntina ya Bomikabi mpe Lisekwa lya Mobikisi.

Bimisa na lokasa