2012
‘Asekwi’ — Litatola moko ya Profeta
2012


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Minei 2012

“Asekwi”

Litatola lyoko ya Profeta

“Lokito ya kelelo ya Boklisto,” Mokambi Thomas S. Monson asakolaki, ezali ete Yesu ya Nazareti asekwaki na liwa. “Bosolo ya Bosekwi epesi na moko mpe na banso kimia eye eleki bososoli” (tala Bafilipi 4:7).1

Na biteni ya matangi malandi, Mokambi Monson akaboli litatoli lya ye ya mpe botondi mpo na Bosekwi bwa Mobikisi mpe asakoli yango mpamba te Mwana Mobali alongaki liwa, bana banso ba Tata baye bayei na mabele bakozala na bomoi lisusu.

Bomoi o ngambo mosusu ya Bokufi

“Nandimi ete moto moko te kati na biso akoki kososola motuya mobimba ya nini Klisto asalaki mpo na biso na Getesemane, kasi nazali na botondi mokolo na mokolo ya bomoi bwa ngai mpo na libonza lya komikaba na Ye na ntina na biso.

“Na ntango ya nsuka, Ye akokaki koboya komona mpasi. Kasi Asalaki yango te. Ye andimaki makambo manso ete Akoka kobikisa biloko binso. Na kosalaka bongo, Apesaki biso bomoi ya koleka bomoi oyo bokufi. Ye abotolaki biso uta na Bokweyi bwa Adama.

“Na mozindo mwa molimo mwa ngai, nazali na botondi na Ye. Ateyaki biso lolenge nini kotambwisa bomoi bwa biso. Ateyaki biso lolenge nini ya kokufa. Azweli biso lobiko mpenza.”2

Kolimwisa Molili mwa Liwa

“Na yoko ngonga, lokola na mpasi ya makasi mpe bokono, liwa eyaka lokola anzelu ya mawa. Kasi mbala mingi, tokokanisaka yango lokola monguna ya esengo ya bato.

“Molili mwa liwa ekoki libela kolimwisama na pole ya bosolo oyo ebimisami. ‘Nazali lisekwa, mpe bomoi, elobaki Moteyi. ‘Ye oyo andimi ngai, atako akufaki, akozala nzokande na bomoi: Mpe oyo nyonso azali na bomoi mpe andimi ngai akokufa soki moke te.’

“Bosolo boye ya mbala na mbala—iyo, kutu bondimami bosantu—ya bomoi koleka nkunda ekoki malamu kopesa kimia elakamaki na Mobikisi ntango Alobaki solo na bayekoli baYe: ‘Kimia Natikeli bino, kimia napesi epai ya bino; te lokola mokili epesaka, epesi ngai epai na bino. Tika ete motema na yo molenga te, mpe ebanga te.’”3

Azali Awa Te

“Mobikisi wa biso azali lisusu na bomoi. Na makambo manso ya nkembo, ya kolendisa, mpe ya solo mingi koleka maye masalemi na mambi ma kala ma bato ezalia—elonga likolo lya liwa. Mpasi mpe bolozi ya liwa na Getesemane mpe Kalavari isukwamaki mpenza. Lobiko la bato ezwamaka mpenza. Bokwei ya Adama bobotolamaka.

“Lilita lya mpamba na ntongo ya Pasika ena ezalaki eyano na motuna ya Yobo, ‘Soki moto akufi akozala lisusu na bomoi?’ Na banso na lokito la mongongo mwa ngai, nasakoli, Soki moto akufi, akozala lisusu na bomoi. Toyebi, mpo tozali na pole ya bosolo ebimisami. …

Bandeko balingami babali mpe basi, na ngonga ya mawa ya mozindo mingi koleka, tokoki kozwa kimia ya mozindo uta na maloba ma anzeli ntongo ya Pasika ena ya yambo: ‘Azali awa te: mpo asekwa.’”4

Banso Bakozala na Bomoi Lisusu

“Tosekaka, tolelaka, tosalaka, tosakanaka, tolingaka, tozali na bomoi. Mpe nsima tokufi. …

“Mpe ata tokufi tokotikala bobele mpo na Moto moko mpe etinda ya Ye, kutu Yesu Klisto ya Nazalete. …

“Na motema mwa ngai mpe mpiko ya molimo mwa ngai, natomboli mongongo mwa ngai lokola nzeneneke abongi malamu mpe nasakoli ete Nzambe azali na bomoi. Yesu Klisto azali Mwana mobali wa Ye, Mobotami Se Moko ya Tata na mosuni. Ye azali Mosikoli na biso; Ye azali Moyokanisi na biso na Tata. Ye azalaki oyo awaki na ekulusu mpo na komikaba mpo na masumu ma biso. Ye akomi mbumba ya yambo ya Lisekwi. Lokola akufaki, banso tokozala na bomoi lisusu.”5

Litatoli ya Moto na Moto

“Nasakoli litatoli lya ngaimei ete liwa esili kololongama, elonga likolo lya lilita esili kolongama. Tika maloba makomisami bule na Ye oyo akokisaki yango ekoma boyebi ya solo mpo na banso. Mikundola yango. Linga yango mingi. Kumisa yango. Asekwi.6

Matangi

  1. “Asekwi,” Liahona, Sanza ya minei 2003, 7.

  2. “At Parting,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 114.

  3. “Now Is the Time,” Liahona, Jan. 2002, 68; tala lisusu Yoane 11:25–26; 14:27.

  4. “Asekwi,” Liahona, May 2010, 89, 90; tala lisusu Yobo 14:14; Matai 28:6.

  5. “I Know That My Redeemer Lives!” Liahona, Sanza ya mitano 2007, 24, 25.

  6. Liahona, Sanza ya minei 2003, 7.

Koteya uta na Etinda Oyo

Nsima ya kokabola matangi maye uta na nsango ya Mokambi Monson, manyola litatoli liye apesaki ya ndimbola ya solo ya Pasika. Bokoki kotuna libota ya bandimi motuna moye: “Elingi koloba nini mpo na yo eye profeta na bomoi atatolaki etali bosolo boye lelo? Boniboni okoki kosalela yango na bomoi bwa yo? Kanisa kobakisa litatoli lya yo.

Bimisa na lokasa