2012
Bolinga, Bokengela, mpe Bolendisa.
2012


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya Minei 2012

Bolinga, Bokengela, mpe Bolendisa

Yekola liteya oyo na nzela ya losambo, mpe na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yo.

Bondimi, Libota, Lisungi

Lokola Mobikisi, bamama bateyi basalisaka moko na moko (tala 3 Nefi 11:15). Toyebi tozali na elonga na kosalaka lokola mama moteyi ntango bandeko ba biso basi bakoki koloba: (1) motali mpe moteyi wa ngai asalisaka ngai kokola na molimo; (2) nayebi mama motali mpe moteyi wa ngai abatelaka ngai mpenza mpe libota lya ngai; mpe (3) soki nazali na kpokoso, nayebi mama motali mpe moteyi wa ngai akosala na kozila te basenga ye.1

Boniboni tokoki lokola bamama batali mpe bateyi kolinga, kokengela, mpe kolendisa ndeko mwasi? Kolandaka makanisi libwa mazwami na mokapo 7 ya Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society mpo na kosalisa bamama batali mpe bateyi kosala epai ya bandeko na bango basi:

  • Sambela mokolo na mokola mpo na ye mpe libota lya ye.

  • Luka bofuli mpo na koyeba ye mpe libota lya ye.

  • Tala ye mbala na mbala mpo na koyeba boniboni azalli mpe mpo na kobondisa mpe kolendisa ye.

  • Tikala kosolola na ye mbala na mbala na kotalaka, kobengaka ye na telefone, mikanda, e-mail, maloba mike ya telefone, mpe na bikela ya boboto ya mike mike.

  • Pesa ye mbote na mayangani ma Eklezia.

  • Salisa ye ntango azali na mpasi, maladi, to mposa mosusu ya kozela te.

  • Teya ye nsango elamu uta na makomi mpe etinda ya Bamama Bateyi Batali.

  • Fula ye na kolakisaka ndakisa elamu.

  • Yebisa na mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi etali mosala mwa bango mpe bolamu ya ndeko mwasi ya molimo mpe ntango.

Uta na Makomi

Luka10:38–39; 3 Nefi 11:23–26; 27:21

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

“Kotala mpe koteya ekomi nzela mpo na basi Basantu Ba Mikolo mya Nsuka na mokili mobimba mpo na kolinga kobokola mpe kosalisa kosalisa—‘kosala engebene na bolingo mingi oyo Nzambe aloni na tolo ya [biso],’ lokola Joseph Smith ateyaki.”2

Ndeko mwasi moko oyo kala te akufelaki mobali alobaki etali bamama batali bateyi ba ye: “Bayokaki. Babondisaki ngai. Balelaki elongo na ngai. Mpe bayambaki na maboko na bango. … [Bango] basungaki ngai na bozangi elikya ya mozindo mpe mitungisi ya mwa basanza ya kozalaka ngai moko.”3

Kosunga na mikumba ya ntango ezali lisusu lolenge ya kosalisa. Na likita linene ya sanza ya Zomi 1856, Mokambi Brigham Young asakolaki ete bapionie ya makalo bazalaki kotelengana na mabanga ya mbula ya pembe na molai ya mapeko 270–370 mapeko (435–595 km) mosika. Abiangaki Basantu ba Mikoko mya Nsuka na Salt Lake City mpo na kobikisa bango mpe “kosunga mpe na makambo maye tokobiangaka ya ntango.”4

Lucy Meserve Smith akomaki ete basi balongalaki bazipi ya bango mpe soseti ya kopesa moto nokinoki na tabelenakele mpe batondisaki yango na kati ya wago mpo na kotinda yango na bapionie na malili. Nsima basangisaki bilamba ya mbeto mpe bilambi mosusu mpo na baye balingaki koya na nsuka na biloko mike. Ntango lingomba ya makolo ekomaki, ndako moko na mboka “etondisamaki na biloko mpo na bango.”5

Matangi

  1. Tala Julie B. Beck, “Nini Nalikyi Bankoko ba Ngai ya Basi (mpe Babali) Bakososola etali Lingomba ya Bamama Basungi,” Liahona, sanza ya Zomi na moko 2011, 113.

  2. Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 153.

  3. Daughters in My Kingdom, 119–20.

  4. Brigham Young, “Remarks,” Deseret News, Oct. 15, 1856, 252.

  5. Tala Daughters in My Kingdom, 36–37.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Boniboni nakoki koyeba nini bandeko basi bazali na mposa?

  2. Boniboni bandeko basi bakoyeba ete nazali kobatela bango mpenza?

Bimisa na lokasa