2012
Matondi na Moteyi na Ngai ya Eteyelo ya Eyenga
Sanza ya Motoba 2012


Bolenge

Matondi na Moteyi na Ngai ya Eteyelo ya Eyenga

Kelasi na ngai ya Eteyelo ya Eyenga ezalaka ntango nyonso na limemia te. Nalingaka koyoka liteya yango mposo nyonso, kasi ntango mosusu emonanaka kaka lokola ete basusu na kelasi na ngai balingaka te. Mbala mingi bazali kosolola to kosakana na bisanelo ya lotiliki ntango moteyi na biso azali komeka koteya biso. Likambo ya mawa, namimonaka kati na kosalaka yango.

Mposo moko tosalaki mabe koleka momeseno, mpe pene na nsuka ya kelasi, moteyi na biso akomaki na mai na miso mpo moto moko te alingaki kolanda liteya na ye. Ezalaki biso kobima na kelasi, nayokaki mabe mpo na ye.

Eyenga elandi moteyi na biso alimbolaki ete asambelaki mingi mposo wana, kolukaka bokambi, mpe esalemaki mpo na ye ete asengeli kolakisa biso film moko ya Eklezia. Abandaki kolakisa bilili yango, biye ezalaki kolobela bomoi ya Yesu Klisto mpe bikamwa oyo Asalaki.

Wana ezalaki ngai kobanza na ntina ya film yango na mpokwa wana, nayokaki eloko moko ya bokeseni. Na mpwasa nasosolaki ete nazalaki koyoka Molimo, mingi mpenza koleka naino nayoka liboso. Sikawana nazwaki mokano ete nasengeli kosala bambongwana na bomoi na ngai mpo na kozala mingi lokola Mobikisi, mpe nasosolaki ete maye masalemaki na Eteyelo ya Eyenga mokolo wana malendisaki litatoli na ngai makasi mpenza. Nazali na botondi mpenza mpo na moteyi na ngai ya Eteyelo ya Eyenga mpe nyonso asalaka mpo na kelasi na biso mposo nyonso.

Bimisa na lokasa