2012
Babiangemi na Nzambe kasi Basungami na Bato
Sanza ya Motoba 2012


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Sambo 2012

Babiangemi na Nzambekasi Basungami na Bato

Elilingi
Na Mokambi Henry B. Eyring

Lokola bandimi ya Eklezia, tobiangemi mbala na mbala kosunga bato na mabiangi mpo na kosalela. Mibu mileki, moyekoli moko ya mibu 18 alakisaki ngai nini yango elakisi kosunga basali ba Nkolo. Natikali se ya kopambolama na ndakisa na ye ya bomikitisi.

Awutaki se kobanda mobu na ye ya yambo na kelasi ya bana bakola. Abatisamaki mobu moko naino ekoki te yambo atika ndako mpo na kobanda boyekoli na ye na univeristé moko ya monene. Nazalaki kosala kuna lokola episikopo.

Wana ezalaki mobu kobanda, nazwanaki na lisolo ya moke elongo na ye na bilo ya episikopo. Na lisolo wana ya yambo nazali kokundola se moke longola se alobelaki mikakatano na ye na esika ya sika, kasi nakobosana soki moke te lisolo na biso ya mibale.

Asengaki komona ngai na bilo na ngai. Nakamwaki ntango alobaki, “Ekoki biso kosambela elongo, mpe ekoki ngai kopesa losambo?” Nazalaki pene ya koloba ete nasilaki kosambela mpe kozela ete ye mpe asalaki lokola. Na esika ya eye nandimaki.

Abandaki losambo na ye na litatoli ete ayebaki episikopo abiangemaki na Nzambe. Asambelaki Nzambe ayebisa ngai nini asengeli kosala na likambo oyo ezalaki motuya na molimo. Elenge mobali yango ayebisaki Nzambe ete ayebaki solo ete episikopo asilaki koyeba bamposa na ye mpe akopesa ye toli oyo asengeli koyoka.

Wana ezalaki ye koloba, makama mpenza oyo alingaki kokutana na yango mayaki na mayele ma ngai. Toli ezalaki ya pete kasi epesamaki na maloba ya polele makasi: sambelaka ntango nyonso, tosaka mitindo, mpe kobanga te.

Elenge mobali wana, mobu moko na Eklezia, ateyaki na ndakisa nini Nzambe akoki kosala na mokambi ntango asungami na bondimi mpe nsambo ya baye abiangemi kokamba. Elenge mobali wana alakisaki mpo na ngai nguya ya mobeko mwa bondimami ya banso kati na Eklezia (tala D&A 26:2). Atako Nkolo abiangaka basali na Ye o nzela ya bobimisi, bakoki kosala bobele nsima ya kosungama na baye babiangemi kosalisa.

Na nzela ya voti na biso ya kosunga, tosalaka bilaka ya lipombo. Tolakaka kosambela mpo na basali ba Nkolo mpe ete Ye akokamba mpe akolendisa bango (tala D&A 93:51). Tosambelaka ete tokoluka mpe tokozela koyoka bofuli uta na Nzambe na toli na bango mpe ntango nyonso bazali kosala na libiangi na bango (tala D&A 1:38).

Ekosenga ete tozongisa elaka wana sika na mitema na biso mbala na mbala. Moteyi na yo ya Eteyelo ya Eyenga akomeka koteya na Molimo, kasi kaka lokola okoki kosala kosala, moteyi na yo akoki kosala mabunga liboso ya kelasi. Nzokande, okoki kokamata mokano ya koyoka mpe kotala ntango nini okoki koyoka bofuli koya. Ntango ezali wapi okoyoka mabunga moke mpe okozwa mbala mingi koleka bilembo ete Nzambe azali kosunga moteyi wana.

Ntango totombolaka loboko mpo na kosunga moto moko, tomipesaka mpo na kosala mpo na ntina nyonso ya Nkolo moto wana abiangemi kokokisa. Ntango bana na biso bazalaki moke, mwasi na ngai abiangemaki koteya bana mike na palwasi na biso. Natombalaki loboko na ngai kaka mpo na kosunga ye te, kasi nasambelaki lisusu mpo na ye mpe nsima nasengaki nzela mpo na kosalisa ye. Mateya nazwaki ya botondi mpo na eye basi bazali kosala mpe mpo na bolingo ya Nkolo mpo na bana ezali se kopambola libota na ngai mpe bomoi na ngai.

Kala mingi te nasololaki na elenge mobali oyo wana mibu mileki asungaki episikopo na ye. Nayekolaki ete Nkolo mpe bato basungaki ye na libiangi na ye lokola misionele, lokola mokambi ya likonzi, mpe lokola tata. Ekomaki lisolo na biso na nsuka ye alobaki, “Nazali se kosambela mpo na yo mikolo nyonso.”

Tokoki kozwa mokano ya kosambela mokolo na mokolo mpo na moto oyo abiangemi na Nzambe mpo na kosalisa biso. Tokoki kozongisa matondi na moto oyo apamboli biso na mosala na ye. Tokoki kozwa ekateli ya kokende liboso ntango moto oyo tosungaki azali kosenga bato ya kosala na bolingi na bango moko.1

Baoyo bakosunga basali ya Nkolo na bokonzi na Ye bakosungama na nguya na Ye oyo ezanga emekiselo. Banso tozali na mposa ya lipamboli lina.

Matangi

  1. Tala Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph F. Smith (1998), 211–12.

Koteya uta na Etinda Oyo

Nsima ya kokabola etinda yango, tanga litangi oyo elandi: “Nkolo akokomisa yo esalelo moko na maboko na Ye soki ozali na bomikitisi, na botongono, mpe na etingya. … Okozwa bokasi ebakisami ntango osungami na lingomba mobimba ya bandimi mpe otiami mpembeni” (Teaching, No Greater Call [1999], 20). Sangisa libota nzinganzinga na eloko moko ya bozito mpe senga ete moto moko ameka kotombola yango. Na kobakisaka moto moko na ntango moko, bengisa bato mosusu ya libota kosalisa kotombola eloko yango. Bolobana nini esalemaka ntango moto nyonso azali kosalisa. Tala lolenge nini okoki kobeta sete na toli ya Mokambi Eyring mpo na eye etali banzela ya solo mpo na kosunga basusu na mabiangi na bango.

Bimisa na lokasa