2013
Liloba Moko mpo na Bamisionele Oyo Bazali Kotatabana
sánzá ya míbalé 2013


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya Mibale 2013

Liloba Moko mpo na Bamisionele Bazali Kotatabana

Na Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Bayekoli ba Yesu Klisto bazali ntango nyonso na lotomo ya komema nsango malamu na Ye na mokili (tala Malako 16:15–16). Nzokande, ntango mosusu ezali mpasi kofungola monoko mpe koloba etali bondimi bwa biso na baye ba nzinganzinga na biso. Ntango boko bandimi ba Eklezia bazali na likabo ya kobotama mpo na koloba na basusu etali boyambi, basusu bazali mwa kotatabana to bokoki koyoka nkele, nsoni, to kutu kobanga nakosalaka yango.

Na ntina na yango, ekoki ngai kopesa likanisi ya makambo minei maye moto nyonso akoki kosala na kolandaka etinda ya Mobikisi mpo na koteya nsango malamu “na ekelamo nyonso” (D&C 58:64).

Zala Pole

Liloba lya ngai nalula mbala mingi etiami na monoko mwa St. François d’Assise elobi, “Teya nsango malamu na ntango nyonso mpe soki esengeli, salela maloba.”1 Ebombami na liloba liye ezali bososoli ete mbala mingi masakola ma nguya mingi koleka mazangi kolobama.

Ntango tozali na bosembo mpe towumeli sikisiki na mibeko na biso, bato bakomona. Ntango tongengisi bosepeli mpe esengo, bakomona kutu mingi.

Moto nyonso alingi kozala na esengo. Ntango biso bandimi ba Ekezia tongengisi pole ya nsango malamu, bato bakoki komona esengo na biso mpe koyoka bolingi bwa Nzambe kotondisaka mpe kosopanaka na bomoi na biso. Bakolinga koyeba ntina nini? Bakolinga kososola sekele na biso.

Yango ekokamba bango na kotuna mituna lokola “Ntina nini azali na esengo mpenza?” To “Ntina nini ntango nyonso ozali na lolenge ya malamu boye?” Biyano na mituna miye, ya solo, ememi na malamu mpenza na kati ya lisolo etali nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto.

Sololaka.

Kobimisa lisolo ya biyamba—mingimingi na baninga mpe balingami ba biso—ekoki komonana lokola likambo ya kobanga mpe ya mpasi. Esengeli te kozala bongo. kotanga makambo ma molimo to kolobela milulu to makambo ya Eklezia na masolo ya libaku ekoki kozala pete mpe kosepelisa soki totii mwa mpiko mpe bwania.

Mwasi wa ngai, Harriet, azali ndakisa moko ya kokamwa ya likambo liye. Ntango tozalaki kovanda na Allemani, azwaki lolenge moko ya kosalela masolo matali Eklezia na kati ya masolo na ye elongo na baninga mpe bayebani. Na ndakisa, ntango moto moko atunaki mpo na eye etali nsuka ya mposo na ye, azalaki koloba, “Eyenga oyo tozalaki na makambo ma kafukafu na eklezia ya biso! Elenge mobali moko ya mibu 16 apesaki lisikulu moko ya kitoko liboso ya bato 200 ya lingomba na biso mpo na eye etali kozala na bomoi ya peto.” To, “nayekolaki lisolo ya mwasi moko ya mibu 90 oyo asonaki babulangeti mingi koleka 500 mpe apesaki yango na pologalami ya kosalisa ya Eklezia na biso mpo na kotinda na bakeleli epai nyonso na mokili.”

Mbala mingi, bato baye bayokaki yango balingaki koyeba mingi koleka. Batunaki mituna. Mpe eye wana ememaki bango na mabaku ya kolobela nsango malamu na lolenge ya momesano, ya sembo, mpe ya kotindika te.

Na boyei ya Interneti mpe malaka ya mangomba ya bato, ezali pete mingi lelo mpo na kolobela makambo maye na lolenge ya bosololi koleka bileko ya liboso. Oyo tosengeli ezali kaka mpiko mpo na kosala bongo.

Tondisama na Ngolu.

Likambo ya mawa, ezali pete mpenza na kosepelisa bato te. Esalemaka mbala mingi mpenza ete toswana, totiola, mpe tosambisa. Ntango tokomaka na nkanda, na nko, to na loma na bato, likambo ya nsuka bakolingaka ezali koyeba biso mingi koleka. Ekoki koyebana te bato boni batiki Eklezia to boni basangani na biso ata moke te mpamba te moto moko alobaki likambo moko oyo esalaki bango mpasi to ezokisaki bango.

Ezali na bosenzi mingi mpenza na mokili lelo. Lokola Interneti ebimisaka bato polele te, ezali pete mingi koleka nyonso mpo na koloba makambo ya bolololo to ya kozokisa na nzela ya nsinga. Esengeli biso te, bayekoli ba elikya ya Klisto wa biso ya boboto, kozala na mibeko mileki likolo ya bolingo? Makomi mateyi ete, “Tika elobeli na yo ezala ntango nyonso na boboto, na mongua, ete bokoka koyeba boniboni bosengeli koyanola moto nyonso” (Bakolose 4:6).

Nalingi likanisi ete maloba na biso mazala polele lokola mapata na mokolo ya moi mpe matonda na ngolu. Ekoki bino kokanisa nini mabota, palwasi, bikolo, mpe kutu mokili mwa biso ekozala soki tokoki komekola mobeko moye ya pete?

Tondisama na Bondimi

Ntango mosusu tokomipesaka lokumu mingi mpenza to tokomizomelaka mingi mpenza ntango basusu bayambi nsango malamu. Ezali likambo ya motuya komikundola ete Nkolo azali te kozela ete tobongola basusu.

Mbongwana eyaka na nzela ya maloba na biso te kasi na nzela ya misala uta na lola ya Molimo Mosantu. Ntango mosusu nyonso esengeli ezali kaka liloba mokuse mpamba ya litatoli na biso to mayele tozwa mpo na kobanda kolembisa motema moko to kofungola ekuke eye ekoki komema basusu na koyeba babosolo ya kitoko koleka ya bitinda ya Molimo.

Mokambi Brigham Young (1801–77) alobaki ye ayebaki nsango malamu ezalaki ya solo ntango “amonaki moto moko azanga ntoki ya koloba, to likabo mpo na koloba na bato, oyo akokaki bobele koloba, ‘Nayebi, na nguya ya Molimo Mosantu, ete Buku ya Mormon ezali ya solo, ete Joseph Smith azali Profeta ya Nkolo.’” Mokambi Young alobaki ntango ayokaki litatoli lina ya bomikitisi ete, “Molimo Mosantu kowutaka na moto wana apelisa[ki] bososoli na ngai, mpe pole, nkembo, mpe bozangi kufa [ezalaki] liboso na ngai.”2

Bandeko babali mpe basi, bozala na bondimi. Nkolo akoki kokomisa maloba olobi monene mpe kokokomisa yango maloba ya nguya. Nkolo asengi bino kobongola te kasi kofungola minoko na bino. Mokumba mwa kobongola ezali ya bino te—yango ezali ya moto oyo azali koyoka mpe ya Molimo Mosantu.

Mondimi nyonso Azali Misionele

Bandeko balingami, lelo ezali na nzela mingi koleka bileko nyonso mpo na kofungola minoko mpe kokabola elongo na basusu nsango ya esengo ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ezali na nzela moko mpo na moto nyonso—ata misionele motatabani—mpo na kosala elongo na mosala monene moye. Tokoki kozwa nzela moko mpo na kosalela batalenta mpe matomba ma bisomei na kosunga mosala monene ya kotondisa mokoli na pole mpe bosolo. Wana ezali biso kosala bongo, tokozwa esengo eye eyaka na baye bazali bato ya botongono mpe bato ya mpiko ekoki mpo na “koteleme lokola banzeneneke ba Nzambe na bantango inso” (Moziya 18:9).

Matangi

  1. St. François d’Assise, na William Fay mpe Linda Evans Shepherd, Share Jesus without Fear (1999), 22.

  2. Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young (1997), 67.

Koteya uta na Etinda Oyo

Lolenge moko ya makasi ya koteya mpo na “kolendisa mitema ya baye boteyaka mpo na kotia…bantina oyo ekoki kosalisa bango kosalela mateya boteyi” (tala Teaching, No Greater Call [1999], 159). Bokanisa kobengisa baye boteyi kotia ntina moko na nzela ya losambo mpo na kokabola nsango malamu elongo na moto moko to bato mingi sanza eye. Baboti bakoki kosolola ndenge bilenge bana bakoki kosalisa. Bokoki lisusu kosalisa bato ya libota komanyola elongo to kosala moko na moko banzela mpo na kotombola nsango malamu na lisolo ya mbala na mbala mpe kokanisa milulu mikoya mya Eklezia wapi bakoki kobengisa moninga moko.