Etinda ya Bamama Batali Bateyi, sanza ya Mibale 2013
Babongwani epai ya Nkolo
Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei. Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.
Bandeko basi ya sika ba Eklezia—lokola Bilenge Basi kotangaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi, bandeko basi oyo bazongeli lingomba, mpe babongwani ya sika—bazali na mposa ya lisungi mpe bolingo ya bamama batali mpe bateyi. “Bomipesi ya mondimi ezali na motuya mpo na kokanga babongwani mpe mpo na komema bandimi balembi kozongela mosala,” elobaki Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga Likoki ya Bazomi na Babale. “Kosimba limoni ete Lingomba ya Bamama Basungi … ekoki kokoma [moko ya] [ba]nkita ya kozala na baninga ya nguya mingi koleka oyo tozali na yango na Eklezia. Boyamba nokinoki baye bateyami mpe bazongisami na mosala, mpe bolinga bango na kati ya Eklezia na nzela ya lingomba na bino.”1
Lokola bandimi ba Lingomba ya Bamama Basungi, tokoki kosalisa bandimi ya sika bayekola misala mya ebandeli ya Eklezia, lokola:
-
Kopesa lisikulu
-
Kopesa Litatoli.
-
Kobatela mobeko ya bokili.
-
Kofuta moko na zomi mpe makabo mosusu.
-
Kosalaka elongo na mosala mwa bonkoko ya libota.
-
Kosalaka mabatisi mpe nkotisa mpo na bankoko ba bango bawa.
“Esengaka kozala na baninga ya bokebi mpo na kosala ete bandimi ya sika bayoka elengi mpe boyei malamu na eklezia,” elobaki Mpaka Ballard.2 Biso banso, kasi mingimingi bamama batali mpe bateyi, tozali na mokumba ya motuya mpo na kotia kimoninga elongo na bandimi ba sika lokola lolenge ya kosalisa bango kokoma “babongwani ya ngwi epai ya Nkolo” (Alma 23:6).
Uta na Makomi
Uta na Mambi ma Kala na Biso
“Lokola motango ya babongwani ezali komata ntango nyonso,” eloba Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008), “tosengeli kobakisa kosala makasi ya motuya mpo na kosalisa bango ntango bazali koluka ya bango nzela. Moko na moko ya biso azali na mposa ya biloko misato: Moninga, mokumba, mpe koleisama na “liloba malamu ya Nzambe” (Moroni 6:4).”3
Bamama batali mpe bateyi bazali na likoki mpo na kosalisa baye bakengelaka. Kimoninga mbala mingi eyaka yambo, lokola esalemaki mpo na elenge ndeko mwasi ya Lingomba ya Bamama Basungi oyo azalaki mama motali mpe moteyi ya ndeko mwasi moko ya mobange. Bazalaka malembe na kotonga kimoninga kino bakomaki kosala moko pene na mosusu na mosala ya kotiaka bopeto. Bakomaki baninga, mpe lokola bazalaki kosolola na ntina ya Etinda ya Bamama Batali mpe bateyi, baleisamaki bango babale na “liloba malamu ya Nzambe.”
Mokambi Joseph Fielding Smith (1876–1972) alobaki ete Lingomba ya Bamama Basungi “ezali eteni ya motuya ya bokonzi bwa Nzambe na mabele … esalisaka bandimi na yango ya botongono na kozwa bomoi ya seko na bokonzi ya Tata wa biso.”4
© 2013 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nyonso na Bakomi. Ebetami na Etazini ya Amerika. Bondimami na lokota ya Angele: 6/12. Bondimami ya bobongoli: 6/12. Bobongoli ya Visiting Teaching Message, February 2013. Lingala. 10662 639