2013
Naasengi Bikisa Motema na Ngai
sánzá ya mísáto 2013


Bilenge

Nasengi Bikisa Motema na Ngai

Na mokolo ya bokundoli liwa ya ndeko na ngai ya mobali, nazalaki kobanza-banza na ntina ya ntango na ngai uta akufaki. Namikundolaki kaka mpasi makasi oyo nazalaki koyoka te kasi lisusu mapamboli Nzambe apesaki ngai.

Nasosolaki ata moke te boniboni bato bakoki koloba ete liwa ya moto tolingaki ekoki komema mapamboli. Nakokaki kososola te lolenge nini nakokaki mpenza kozala na esengo mpe botondi mpo na likambo oyo ezali kosala ngai mpasi makasi. Ezalaki, nzokande, na butu moko oyo ebongolaki emoneli na ngai mobimba.

Nalamukaki na katikati ya butu na motema ya kilo mingi koleka nazwa naino te. Mpasi ezalaki kokanga ngai mpema. Nafukamaki mpe nalelaki na losambo epai ya Tata wa ngai na Lola. Bomoi na ngai mobimba nateyamaki na ntina ya Bomikabi mpe nguya ya kobikisa ya kokamwa ya Yesu Klisto. Sikawa bondimi na ngai ezalaki komekama. Endimaki ngai mpenza? Nasengaki Tata wa ngai na Lola mpo na kobikisa motema na ngai. Mpasi elekaki mingi mpenza mpo ete nakoka kotalela yango ngai moko.

Nsima liyoki ya kimia, bolendisi, mpe bolingo elekaki na nzoto na ngai mobimba. Nayokaki lokola soki Nzambe azingaka ngai na maboko na Ye mpe azalaki kobatela ngai na mpasi makasi nazalaki koyoka. Nazali naino kozanga ndeko na ngai, kasi nakokaki komona na miso ya bokeseni. Ezalaki na mingi mpenza oyo nakokaki koyekola uta na likambo oyo.

Nayebi ete bolingo mpe kimia ya Nkolo ezali. Tosengeli bobele kokabola.

Bimisa na lokasa