2013
Kimia, Zala Nie
sánzá ya mísáto 2013


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya misato 2013

Kimia, Zala Nie

Mokambi Thomas S. Monson

Mokolo moko mwa mibu mileki, nsima ya kosala misala na bilo, nazwaki liyoki makasi ya kokende kotala mwasi mokufeli mobali moko ya mobange oyo azalaki mokoni na lopitalo ya mibange na mboka Salt Lake City. Nakendaki kuna mbala moko na motuka.

Ntango nakendaki na kisuku na ye, nakutaki moto moko te. Natunaki mosali moko soki azalaki wapi mpe akambaki ngai na ndako ya masolo. Kuna nakutaki mwasi mokufeli mobali oyo ya boboto kotalaka ndeko na ye ya mwasi mpe moninga mosusu. Tosololaki elongo na esengo.

Wana ezalaki biso kosolola, mobali moko ayaki na ekuke ya kisuku mpo na kozwa linzanza ya soda uta na masini ya kotekela. Atalaki ngai mpe alobaki, “Mpo na nini, ozali Tom Monson.”

“Iyo,” nayanolaki. “Mpe nazali komona yo lokola moko ya baHemingway.”

Andimaki ete azalaki Stephen Hemingway, mwana ya Alfred Eugene Hemingway, oyo asalaki lokola mosungi na ngai ntango nazalaki episikopo mibu mingi mileki mpe nazalaki kobenga ye Gene. Stephen ayebisaki ngai ete tata na ye azalaki na ndako se moko wana ya mibange mpe azalaki penepene ya liwa. Gene azalaki kotanga nkombo na ngai, mpe libota elingaki kokutana na ngai kasi bakokaki kozwa nimelo ya telefone mpo na kobenga ngai te.

Nasengaki bolimbisi na mbala moko mpe nakendaki elongo na Stephen na kisuku ya mosungi na ngai ya kala, epai wapi bana na ye mosusu basanganaki, mpamba te mwasi na ye akufaki mwa mibu mileki liboso. Libota bamonaki bokutani na ngai na Stephen na ndako ya masolo lokola eyano uta na Tata wa biso na Lola na mposa na bango ya makasi ete namona tata na bango mpe nayanola mbela na ye yambo akufa. Ngai mpe nayokaki ete ezalaki bongo, mpo soki Stephen akotaka na kisuku wapi nakendaki kotala moto na ntango mpenza asalaki yango te, nakokaki koyeba te ete Gene azalaki kutu na ndako wana.

Topesaki ye lipamboli. Molimo ya kimia ezwaki esika. Kotala totalaki ye ezalaki ya kitoko, nsima natikaki bango.

Na ntongo elandaki telefone na ngai elelaki mpo na koyebisa ete Gene Hemingway akufaki—kaka minuti 20 nsima na ye kozwa lipamboli uta na mwana na ye mpe ngai.

Nasalaki losambo moko ya nse epai ya Tata na Lola mpo na nguya na Ye ya bokambi, oyo etindikaki ngai kokende na lopitalo mpe ekambaki ngai epai ya moninga na ngai ya bolingo Alfred Eugene Hemingway.

Nalingi kokanisa ete makanisi ya Gene Hemingway na mpokwa wana—ntango toyokaki Molimo, tozwanaki na losambo na bomikitisi, mpe topesaki lipamboli ya bonganganzambe —mazongiselaki biso maloba mazwami na loyembo “Maître la Tempête Lance”:

Wumela, O Mosikoli mopambolami!

Kotika ngai moko lisusu te,

Mpe na esengo nakosema na libongo epambolama

Mpe kopema na ngambo ya esengo.

Nalingaka nzembo wana ntango nyonso mpe natatoli bolendisi yango epesaka:

Ezala nkanda ya mbu ya mopepe makasi

To bazabulu to bato to eloko nyonso kani ekoki kozala,

Mai moko te ekoki komela masuwa wapi efandi

Nkolo ya mbu mpe mabele mpe likolo.

Banso bakotosa bolingi na yo na boboto:

Kimia, zala nie.1

Na nzela ya mpizoli mpe mimekano, na nzela ya bobangi mpe mawa, na nzela mpasi ya motema mpe kozala se yo moko nsima ya kobungisa bandeko na yo ya bolingo, ezali na elikya ete bomoi ezali seko. Nkolo mpe Mobikisi na biso azali nzeneneke ya bomoi ete ezali bongo.2 Maloba na Ye na makomi masantu makoki: “Jala nye mpe yeba ete ngai najali Njambe” (Njembo 46:10). Natatoli na ntina ya bosolo oyo.

Matangi

  1. “Maître la tempête lance,” Hymns, no. 56.

  2. Tala Richard L. Evans, “So Let Us Live to Live Forever,” New Era, Sanza ya sambo 1971, 18.

Koteya uta na Etinda Oyo

Etinda oyo ekoki kolendisa baye babungisi moto balingaki na liwa to baye bazali kobunda na momekano. Likolo ya etinda ya Mokambi Monson, tala lolenge nini okoki kokabola makomi malandi, uta na mposa ya baye ozali koteya: Yobo 19:25–26; 1 Bakolinti 15:19–22; Moziya 24:13–15; Doctrine et Alliances 122:7–9. Soki otindami, okoki kotatola na ntina ya kimia oyo Mobikisi apesaki yo kati na mimekano na yo.