2013
Mosala
sánzá ya mísáto 2013


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya misato 2013

Mosala

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko ba yo basi mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei. Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Profeta na Biso, Mokambi Thomas S. Monson, alendisi biso “kosembola loboko mpo na kosalisa baye bazali na mposa ya lisalisi na biso mpe kotombola bango na nzela ya likolo mingi mpe na lolenge ya malamu. … Ezali mosala mwa Nkolo, mpe ntango tozali na etinda ya Nkolo, … tosengeli kozwa lisalisi ya Nkolo.”1

Mibu mingi mileki LaVene Call mpe moninga na ye mama motali mpe moteyi bakendeki kotala ndeko mwasi moko ya bolembu. Babetaki ekuke mpe bamonaki elenge mama moko na elamba ya kosukolela. Azalaki lokola ya kobela, kasi nokinoki basosolaki likambo na ye ezalaki molangwa. Bamama batali mpe bateyi bafandaki mpe basololaki elongo na elenge mama wana kati na mikakatano.

Ntango batikaki ye, balobaki ete, “Azali mwana ya Nzambe. Tozali na mokumba ya kosalisa ye.” Yango wana bazalaki kokende kotala ye mbala na mbala. Ntango nyonso, bakokaki komona mpe koyoka mbongwana ya malamu. Basengaki ndeko mwasi yango akendaka na Lingomba ya Bamama Basungi. Atako abandaki kokende na makasi, na nsuka akomaki kokende mbala na mbala. Nsima ya kolendisa bango, ye mpe mobali mpe mwana na ye ya mwasi bakendeki na eklezia. Mobali ayokaki Molimo Mosantu. Alobaki ete, “Nakosala nini episikopo akoyebisa ngai.” Sikawa bazali kosala makasi na Eklezia mpe bakangisami na tempelo.2

Uta na Makomi

3 Nefi 18:32; Doctrine et Alliances 84:106; 138:56

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Kosalisa baoyo babungi nzela kozongela nsango malamu ya Yesu Klisto ezali ntango nyonso eteni ya ezaleli ya Mosantu ya Mikolo mya Nsuka mpe mondimi na lingomba ya Bamama Basungi. Mokambi Brigham Young (1801–77) alobaki ete, “Tika tozala na mawa moko na mosusu, … mpe tika baoyo bakoki komona bakamba bakufi miso kino bakokoka komona nzela bangomei.”3

Eliza R. Snow, mokambi monene ya mibale ya Lingomba ya Bamama Basungi, andimaki na botondi bokasi ya bandeko basi ya Ogden, Utah, USA, mpo na kolendisana. “Nazali koyeba malamu ete mingi epesami [na kotalaka lisalisi] oyo ekokoma mokolo moko te na babuku [ya bokundoli],” elobaki ye. Kasi kondimaka ete likundoli moko ebatelami na lola na ntina ya mosala ya bandeko basi wana ezali bango kosembola loboko epai ya baye mitema na bango ekomi malili, alobaki ete: “Mokambi Joseph Smith alobaki ete lingomba oyo ebongisamaki mpo na kobikisa milimo. … Buku mosusu ebatelami ya bondimi na biso, boboto na biso, misala malamu na biso, mpe maloba. … Eloko moko te ebungi.”4

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “The Sacred Call of Service,” Liahona, sanza ya mitano 2005, 55, 56.

  2. Mokanda epai ya bokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi uta na mwana mwasi ya LaVene Call.

  3. Brigham Young, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 107.

  4. Eliza R. Snow, na Daughters in My Kingdom, 83.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Edimi ngai kosenga ndeko mwasi ya bolembu kokende na likita ya Lingomba ya Bamama Basungi elongo na ngai?

  2. Ezali bandeko basi nazali kokengela kosepela kotunaka ngai mituna oyo etali nsango malamu?

Bimisa na lokasa