2013
Nakokaki Kobosana Mawa na Ngai
August 2013


Bilenge

Nakokaki Kobosana Mawa na Ngai

Mokomi awuti na Taiwan.

Ntango baninga na ngai Ndeko mobali Chen mpe mwasi na ye babatisamaki na palwasi na biso, nasepelaki mingi koleka. Mobu moko nsima ya libatisi na bango, bakangisamaki na tempelo, mpe mwana na bango ya mobali oyo akufaka yambo basangana na Eklezia akangisamaki na bango. Ezali kitoko makasi ya komona BaChen kokola na nsango malamu.

Nsima na mobu molandi babomaki Ndeko mobali Chen na likama ya motuka. Nsima ya likama, liwa na ye ekomaki lokola ntango nyonso na makanisi na ngai mpe mbala mingi ezalaki koyela bandoto na ngai. Nazalaki kolamuka na mpinzoli mpe mbala na mbala namitunaki, “Mpo na nini? Mpo na nini Nkolo azali kopesa nzela ete likama ya lolenge oyo esalema? Mpo na nini likambo ya boye esengeli koyela libota ya kitoko oyo?” Mokolo moko, wana ezalaki ngai kobunda na mituna oyo, nazwaki mokanda moko ya mateya mpe natangaki maloba oyo uta na Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985):

“Soki totalaki bomoi oyo ya kufa lokola mobimba ya bomoi, mpasi, mawa, botutu, mpe bomoi ya mokuse elingaki kozala likambo ya mawa. Kasi soki totali bomoi lokola likambo ya seko oyo ebandaki mosika yambo na ntango eleka yambo na mbotama mpe kokobaka na mikolo ya seko mikoya nsima ya liwa, nde makambo manso mazali koyela biso makoki kotiama na emoneli moko ya malamu. …

“Emitiki biso te na masenginia ya komeka bokasi, bokono na biso ete tokoka koyekola bompikiliki, Emitiki biso te na liwa ete tokoka kozala bato bakoki kozanga kokufa mpe kokoma bato na nkembo”1

Na ngonga wana, nakanaki kobosana mawa na ngai mpe kotala kati na lobi oyo ekoki kosalema mpe elakelamaki mpo na biso. Namonaki na miso ya mayele na ngai Ndeko mobali Chen ya kosangana na esengo elongo na libota na ye. Limoni wana ememelaki ngai kimia. Nayebi ete Tata na Lola akopesa biso bwania mpe mpiko mpo na kotelemela mitungisi.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 15.

Bimisa na lokasa