2013
Bomikoki
August 2013


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Libwa 2013

Bomikoki

Boyekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo bozali kotala. Bosalela mituna mpo na kosalisa bino kolendisa bandeko na bino basi mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na bino moko. Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Bomikoki ezali makoki, mokano, mpe bokasi ya komipesa mpo na bolamu ya molimo mpe ya ntango mpo ya biso moko mpe ya mabota na biso.1

Wana ezali biso koyekola mpe kotia na misala mabongisi ya bomikoki na mabota mpe na masanga na biso, tozwi mabaku ya kobatela babola mpe bakeleli mpe ya kosalisa basusu bakoma bato basili komikoka mpo ete bakoka koyika mpiko na ntango ya motungisi.

Tozali na litomba mpe mokumba ya kosalela bonsomi na biso ya boponi mpo na kokoma bato basili komikoka na molimo mpe na ntango. Kolobaka na ntina ya bomikoki ya molimo mpe kotalela na biso ya Tata na Lola, Mpaka Robert D. Hales ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale ateyi ete: “Tokomaka bato oyo babongwami mpe oyo basili kokoka na molimo ntango tozali, na losambo, kosalela mayokani tosalaki na bomoi na biso—na nzela ya koliaka elambo na bolongobani, kozalaka bato balongobani ya kozala na mokanda ya ndingisa ya tempelo, mpe komibonzaka mpo na kosalisa basusu.”2

Mpaka Hales apesaki biso toli ya kokoma bato basili komikoka na ntango ete, “oyo etangi mpe kozwa malakisi ya bakelasi ya likolo to koyekola mosala, mpe kosalela mosolo lokola ekoki na lifuta na biso. Na kokimaka baniongo mpe kobombaka mosolo sikawa, tomilengeli mpo na kozala na mosala ya Eklezia ya ntango mobimba na mibu mikoya. Ntina ya nyonso bomikoki na ntango mpe na molimo ezali mpo ete tomitia na esika ya likolo mpo ete tokoka kotombola basusu bazali kokelela.”3

Uta na Makomi

Matai 25:1–13; 1 Timote 5:8; Alma 34:27–28; Doctrine et Alliances 44:6; 58:26–29; 88:118

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Nsima ya bosangani ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na Salt Lake Valley, oyo ezalaki esobe moko ezanga bato, Mokambi Brigham Young alingaki bango bafuluka mpe basala bandako ya kofanda libela. Oyo elingaki koloba ete Basantu basengelaki koyekola mayele ya mosala oyo elingaki kopesa bango nzela ya kokoma bato bamikoki. Na bokasi oyo, Mokambi Young azalaki na elikya monene na makoki, batalanta, botongono, mpe bolingi ya basi, mpe alendisaki bango na mikumba sisiki ya ntango. Atako mikumba wana ya sikisiki ya bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi mikeseni mbala mingi na miye ya lelo, mabongisi etikali kaka se moko:

  1. Koyekola kolinga mosala mpe kotika goigoi.

  2. Kozwa molimo ya komibonza.

  3. Kondima mokumba ya moto na moto mpo na bokasi ya molimo, bokolongonu, kotanga kelasi, mosala, misolo, bilei, mpe biloko mosusu oyo esungaka bomoi.

  4. Bosambela mpo na kozwa bondimi mpe mpiko mpo na kolonga mikakatano.

  5. Bolendisa basusu oyo bazali na mposa ya lisungi.4

Matangi

  1. Tala Handbook 2: Administering the Church (2010), 6.1.1.

  2. Robert D. Hales, “Coming to Ourselves: The Sacrament, the Temple, and Sacrifice in Service,” Liahona mpe Ensign, sanza ya mitano 2012, 34.

  3. Robert D. Hales, “Coming to Ourselves,” 36.

  4. Tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 51.

Bimisa na lokasa