2014
Ngonga Malamu mpo na Kolona Nzete
sánzá ya yambo 2014


Etinda ya Bakambi ya yambo, Sanza ya yambo 2014

Ngonga Malamu mpo na Kolona Nzete

Elilingi
Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Na Roma ya kala, Janus azalaki nzambe ya baebandeli. Azalaki mbala mingi koyemama na bilongi mibale—moko kotalaka nsima na makambo eleka, mosusu kotalaka liboso epai na makambo ekoya. Na bankota mosusu babengaka sanza ya yambo na nkombo na ye mpamba te ebandeli ya mobu ezalaki ntango ya kotia makanisi mpe ya kosala miango.

Mibu nkoto nsima, babonkoko mingi na mokili mobimba ezali kokoba na momeseno ya kokamataka mikano mpe kosala miango ya mobu ya sika na sanza oyo. Ya solo, kokamataka mikano ezali pete—kobatelaka yango ezali eloko ekeseni na nyonso.

Mobali moko oyo akomaki mokanda molai ya mikano ya Mobu ya Sika amiyokaki mwa malamu na komonaka bokei na ye na liboso. Amilobelaki ete, “Kino sikawa, nakangami na elieli na ngai, nabungisi bomoto na ngai te, nalekisi mosolo nakanaki kosalela te, mpe namileli ata mbala moko te mpo na oyo etali mbwa ya moninga ya penepene. Kasi lelo ezali mokolo ya 2 ya sanza ya yambo mpe ngonga ebetaki mpe ezali ntango natikaki mbeto. Ekozala likamwisi mpo na kokoba kolanda bantina na ngai nyonso.”

Kobandela Lisusu

Ezali na likambo moko ya kotiela elikya na lolenge ya kokamwa mpo na oyo etali ebandeli ya sika. Nabanzi na ngonga moko to mosusu banso tolingaka kobandela lisusu mpo na kosala mabunga te.

Nalingaka kosomba ordinatele ya sika na flash disiki ya sika. Mpo na ngonga moko esalaka malamu mpenza. Kasi lokola mikolo mpe baposo ezali koleka mpe bapologalami mingi mpe mingi koleka etiami (boko na bolingi, mosusu na bolingi mpenza te), na nsuka ordinatele ebandi kotelema, mpe makambo emesanaki kosala na mbangu mpe malamu ekomi kosala malembe. Ntango mosusu ezali kosala te. Kutu kofungola yango ekoki kokoma mokumba mpamba te disque dur etondisami na mabe ya ndenge na ndenge mpe bintika ya lotiliki. Ezali na bangonga ntango nzela se moko ezali koboma lisusu ordinatele mpe kofungola yango lisusu.

Bato bakoki mpela moko mpe kokoma bato batondisama na bobangi, botatabani, mpe na bozito ya mabe basala. Mabunga tosali (ya motema moko mpe ya motema moko te lokola) ekoki kozala bozito likolo na biso kino ekoki komonana mpasi mpo na kosala maye toyebi tosengeli kosala.

Na likambo ya lisumu, ezali na ndenge ya kitoko ya koboma biloko bibeba yango nde ebiangami boyamboli oyo epesaka biso nzela ya kongengisa disque dur ya kati na biso uta na biloko oyo etondisi mitema na biso. Nsango malamu, na nzela ya Bomikabi ya kokamwa mpe ya mawa ya Yesu Klisto, elakisi biso banzela ya kopetola milimo na biso na mbindo ya lisumu mpe mbala moko lisusu kokoma sika, mpeto, mpe moto azanga elindo lokola mwana moke.

Kasi ntango mosusu biloko mosusu elembisaka biso mpe ezongisaka biso nsima, kosalaka ete makanisi mpe misala ezanga litomba to mbuma esalaka ete kobandayango ebebaki ekoma mpo na biso.

Kobimisa ya Malamu Koleka kati na Biso

Kotia bantina ezali mosala moko oyo elongobani. Toyebi ete Tata na biso ya Lola azali na bantina mpamba te Ye alobaki na biso ete mosala mpe nkembo na Ye ezali “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Mose 1:39).

Bantina na biso ya moto se moko ekoki kobimisa ya malamu mingi koleka kati na biso. Nzokande, moko ya biloko oyo ebimisaka makasi tosalaka libanda ya nzela na kozwaka mikano mpe kobatelaka yango ete ekokisama ezali kozongisa lobi maye tokoki kosala lelo. Tozali ntango mosusu kozongisa nsima libaku na biso ya kobanda, kozela ngonga malamu mpo na kobanda —mokolo ya yambo ya mobu ya sika, ebandeli ya eleko ya elanga, mpe ntango tobiangemi lokola episikopo to mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, nsima ya kokota ya bana na eteyelo, nsima ya kozwa pansio.

Bozali na mposa ya libengisi te liboso bobanda kotambola na nzela ya bantina malamu. Bozali na mposa ya kozela ndingisa te mpo na kokoma moto oyo oponamaki kozala. Bozali na mposa ya kozela kobengisama te mpo na kosala na Eklezia.

Tokoki ntango mosusu kobebisa mibu ya bomoi na biso kozelaka ete toponama (tala D&A 121:34–36). Kasi wana ezali likanisi ya lokuta. Bosili koponama!

Na bangonga mosusu na bomoi na ngai nalekisi babutu ezanga mpongi kondongwanaka na mituna, mitungisi, to mitema mpasi ya moto se moko. Kasi likambo te ata butu ezali molai, nalendisami ntango nyonso na likanisi oyo: na ntongo moyi ekobima.

Na mokolo ya sika nyonso, ntongo ya sika eyaka —te kaka mpo na mabele kasi lisusu mpo na biso. Mpe na mokolo ya sika eyaka ebandeli ya sika —libaku ya kobanda lisusu.

Kasi Nini Soki Tokwei?

Ntango mosusu likambo oyo ezongisaka biso nsima ezali bobangi. Tokokaki kobanga ete tokolonga te, ete tokolonga, ete tokokaki kotungisama, ete elonga ekokaki kobongola biso, to ete ekokaki kobongola bato tolingaka.

Mpe boye tozelaka. To totikaka.

Likambo mosusu tosengeli komikundola ntango ekomaka mpo na kotia bantina ezali oyo: tokokweya pene solo—pene kati na eleko mokuse. Kasi na esika ya kolemba, tokoki kopesama nguya mpamba te bososoli oyo elongolaka nguya ya kozalaka moto ya kobonga nie kaka sikawa. Endimamaka uta na ebandeli ete na ngonga moko to mosusu, tokoki kokweya na oyo tosengami. Koyebaka oyo uta na ebandeli elongolaka eteni monene ya bosutuki mpe bolembu ya bokweyi.

Ntango topusani mpembeni ya bantina na biso na lolenge oyo, bokweyi esengeli kosukisa biso te. Bomikundola, ata kutu soki tokweyi mpo na kokoma na bisika ya nsuka, bisika wapi mposa na biso ezalaki ya kokende na mbala moko tokosila kokoba na nzela oyo ekokamba biso epai na yango.

Mpe wana ezali likambo—elingi koloba mingi.

Kutu atako tosengelaki kokweya mpembeni ya monkoloto ya nsuka, kaka kokobaka mobembo ekokomisa biso monene koleka oyo tozalaki liboso.

Ngonga Malamu mpo na Kobanda Ezali Sikawa

Lisese moko ya kala elobi, “Ngonga malamu mingi mpo na kolona nzete ezali mibu 20 mileki. Ngonga malamu ya mibale ezali sikawa.”

Ezali likambo moko kitoko mpe ya elikya oyo etali liloba oyo sikawa. Ezali likambo moko ya kopesa nguya ete soki toponi kozwa mokano sikawa, tokoki kokende liboso na ngonga mpenza oyo.

Sikawa ezali ngonga malamu mpo na kobanda kokomaka moto tolingi kokoma na nsuka—te kaka mibu 20 uta sikawa kasi lisusu mpo na seko nyonso.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Uchtdorf alimbolaki ete ntango tokweyi mpo na kokokisa bantina na biso, “tokoki kopesama nguya. … Kutu atako tokokaki kokweya pembeni ya monkoloto ya nsuka, kaka kokobaka mobembo ekokomisa biso monene koleka oyo tozalaki liboso.” Senga baye ya libota bakabola boyebi kati na boye wapi bayekolaki mingi “koleka uta na lolenge ya kosala na esika ya koyekola uta na oyo eyaka” na nsuka na nsuka, ndakisa kosilisaka eteyelo to kozwaka mbano ya lokumu.

Bimisa na lokasa