2014
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mokeli
sánzá ya yambo 2014


Etinda ya Bamama BATALI MPE BATEYI, Sanza ya yambo 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mokeli

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na biso ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baye bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Lokola tososoli ete Yesu Klisto azali ndakisa na biso na makambo manso, tokoki kobakisa mposa na biso ya kolanda Ye. Makomi etondi na malendisi mpo na biso tolanda matambe ya Klisto. Na Banefi, Yesu alobaki, “Mpo misala miye bomoni ngai kosala yango nde bino mpe bokosala” (3 Nefi 27:21). Alobaki, “Nazali nzela, solo, mpe bomoi: moto moko te akoki kokende epai ya Tata soki aleki epai na ngai te” (Yoane 14:6).

Lelo bakambi na biso bakundolisi biso tozwa Mobikisi lokola ndakisa na biso. Linda K. Burton, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki, “Ntango moko na moko na biso azali na malongi ya Bomikabi makomami na mozindo na mitema na biso, bongo nde tokobanda kokoma lolenge ya bato Nkolo alingi biso tozala.”1

Mokambi Thomas S. Monson alobaki, “Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azali Ndakisa na biso mpe bokasi na biso.”2

Tika tozwa mokano ya kobelema mpembeni na Yesu Klisto, ya kotosa mitindo na Ye, mpe ya kobunda kozonga epai na Tata wa biso na Lola .

Uta na Makomi

2 Nefi 31:16; Alma 17:11; 3 Nefi 27:27; Moroni 7:48

Uta na Mambi ma Kala na Biso

“Atiaki bilembo na nzela mpe alakisaki nzela,” ekomaki Eliza R. Snow, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi ya mibale, na ntina ya mosala ya kufa ya Yesu Klisto.3 Asalisaki bato —moko na moko. Ateyaki ete tosengeli kotika tuku libwa na libwa mpo na kobikisa moko oyo abungi (tala Luka 15:3–7). Abikisaki mpe ateyaki bato, kutu kozwaka ntango mpo na moto na moto kati na bibele ya bato 2.500 (tala 3 Nefi 11:13–15; 17:25).

Na bamama Basantu ya Mikolo mya Nsuka, Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi Toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo, alobaki: “Bino bandeko basi kitoko bozali kosala mosala ya kokabola mawa ya basusu mpo na bantina oyo eleki mposa mpo na matomba ya moto se moko. Na makambo oyo bozali komekola Mobikisi. … Makanisi na Ye ezalaki ntango nyonso mpo na kosalisa basusu.”4

Matangi

  1. Linda K. Burton, “Is Faith in the Atonement of Jesus Christ Written in Our Hearts?” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2012, 114.

  2. Thomas S. Monson, “Meeting Life’s Challenges,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 71.

  3. “How Great the Wisdom and the Love,” Hymns, no. 195.

  4. Dieter F. Uchtdorf, “Happiness, Your Heritage,” Ensign or Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 120.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Mpo na nini mpe boniboni Yesu Klisto azali ndakisa na ngai?

  2. Lolenge nini kosalisaka bandeko basi nazali kotala ekoki kosalisa ngai kolanda Mobikisi?

Bimisa na lokasa