2014
Elanga ya Kosalisa
sánzá ya míbalé 2014


Bilenge

Elanga ya Kosalisa

Mokomi afandi na Virginia, USA.

Eleko moko ya elanga nalekisaki ntango na mboka moko ya bapaya kosalaka elongo na bana oyo bazalaki kozanga biloko mingi ya ntina. Ntango nakutanaki yambo na bana yango, nazalaki solo mpenza na nkanda. Nazalaki koloba lokota na bango te, kasi nandimaki ete Molimo ekokamba ngai mpo na koyokana na bango. Lokola nakomaki koyeba mwana moko na moko, nasosolaki ete lokota ezali epekiseli mpo na bolingo te. Nasakanaki, nasekaki, mpe nasalaki biloko elongo na bana mpe nasengelaki kaka koyoka bolingo ekoka mpo na bango. Namonaki bolingo oyo Tata na Lola azali na yango mpo na bana na Ye, mpe esengo oyo etondisaki motema na ngai ekoki kolimbolama te.

Ntango nyonso Nakosalisa basusu, nazali koyoka kaka bolingo mpo na baye nazali kosalisa te kasi lisusu mpo na Tata na Lola. Nayei solo mpenza koyeba ete “ntango bozali kosalisa bazalani na bino bozali mpenza na mosala ya Nzambe na bino” (Moziya 2:17). Ntina ya lisalisi na ngai, ezala na miango ya lisalisi monene to na misala mike mike ya boboto, ezali mpo na kokumisa Nzambe (tala Matai 5:16). Nalikie ete ntango nasalisi basusu, bato bakondima bolingo na ngai mpo na Tata ya Lola mpe Pole ya Klisto oyo ezali kopela na kati na ngai.

Bimisa na lokasa