2014
Salela Nkolo na Bolingo
sánzá ya míbalé 2014


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Mibale 2014

Kosalela Nkolo na Bolingo

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Nkolo Yesu Klisto ateyaki ete, “Moto nyonso oyo akoluka kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango: kasi oyo nyonso akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, se moko wana nde akobikisa yango” (Luka 9:24).

“Nandimi,” elobi Mokambi Thomas S. Monson, “Mobikisi azali koyebisa biso ete longola se soki tobungi bisomei na kosalisaka basusu, bomoi na biso ezali na mwa ntina moke. Baoyo bazali na bomoi oyo bobele mpo na bangomei bakokauka suka-suka mpe na maloba ya lisese bakobungisa bomoi na bango, ntango baoyo bazali komibungisa na lisalisi ya basusu bakokola mpe bakofuluka —mpe na solo bakobikisa bomoi na bango.”1

Na matangi malandi ya mosala ya Mokambi Monson, ye akundolisi Basantu ya Mikolo ya Nsuka ete bazali maboko ma Nkolo mpe ete mapamboli ya seko mazali kozela baoyo bazali kosalisa basusu na botongono.

Lisalisi kati na Tempelo

“Lisalisi monene epesami ntango tozali kosala makuli ma bozweli mpo na baye bakenda na ngambo mosusu ya elamba. Mbala mingi toyebi te bato oyo biso tosalelaka mosala yango. Tozali kozela botondi te, tozali na boyebi mpe te soki bakondima masalisi maye biso topesi. Nzokande, tozali se kosalisa, mpe na kosalaka lolenge wana tozali kozwa oyo eyaka na bokasi moko mosusu te: tokomi solo mpenza babikisi na Ngomba ya Siona. Lokola Mobikisi apesaki bomoyi na Ye lokola libonza ya bozweli mpo na biso, boye biso, na mwa ndelo moke, tosalaka mpe lolenge moko ntango tozali kosala mosala ya bozweli mpo na baoyo bazali na nzela ya kokende liboso te longola se soki eloko moko esalemi mpo na bango na bato oyo bazali kati na biso awa na mabele.”2

Tozali Maboko ya Nkolo

“Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, tozingami na baye bazali na bosenga ya bokebi na biso, lilendisi na biso, lisungi na biso, libondi na biso, boboto—na biso bazala bato ya libota na biso, baninga, bato toyebi, to bapaya. Tozali maboko ya Nkolo awa na mabele, na etinda ya kosalisa mpe kotombola bana na Ye. Azali kotalela moko na moko na biso. …

“Mosala wana mpo na moye wapi tobiangemi banso ezali mosala ya Nkolo Yesu Klisto.”3

Kosalisa na Elilingi ya Mobikisi

“Na Mokili ya Sika, Nkolo mosekwi asakolaki ete, ‘Boyebi makambo maye bosengeli kosala na eklezia ya ngai; mpo misala oyo bomoni ngai kosala yango bosengeli kosala, mpamba te yango bomoni ngai kosala yango kutu nde bokosala’ [3 Nefi 27:21.].

“Tokopambola basusu ntango tozali kosala na elili ya ‘Yesu na Nazareth… oyo akendaki bisika na bisika mpo na kosala bolamu’ [ Misala 10:38]. Nzambe apambola biso mpo na kozwa esengo na kosalelaka Tata na biso ya Lola lokola tozali kosalela bana na Ye na mabele.”4

Mposa ya Kosalisa

“Tosengeli komipesa libaku ya kosalisa. Mpo na bandimi oyo bakweyaki uta na mosala to oyo bazongi nsima mpe batikali na kozangaka kozwa mokano, tokoki kosambela mpo na koluka nzela ya kosalisa bango. Kosengaka bango kosala na esika songolo ekoki kaka kozala mwa botindiki basengeli mpo na kozonga mobimba na mosala. Kasi bakambi oyo bakokaki kosunga na likambo oyo bazali ntango mosusu koboya kosala yango. Tosengeli kotia na motema ete bato bakoki kobongwana. Bakoki kotia nsima na bango mimesano ya mabe. Bakoki koyambola uta na mabunga na bango. Bakoki komema bonganganzambe na bolongobani. Mpe bakoki kosalela Nkolo na etingya.”5

Ezali Biso Kosala Nyonso Tosengeli?

“Mokili ezali na bosenga ya lisalisi na biso. Ezali biso kosala nyonso tosengeli? Ezali biso kokundola maloba ya Mokambi John Taylor ete: ‘Soki oyebi kokumisa libiangi na yo te, Nzambe akozwa yo moyanoli mpo na baye okokaki kobikisa soki osalaka lotomo na yo’? Teachings of Presidents of the Church: John Taylor (2001), 164. Ezali na makolo ya kotelemisa, maboko ya kosimba, mayele ya kolendisa, mitema ya kofula, mpe milimo ya kobikisa. Mapamboli ya seko mazali kozela yo. Ya bino ezali litomba ya kozala batali te kasi basali elongo na litambe ya … kosalisa.”6

Matangi

  1. “Nini Nasali mpo na Moto Moko Lelo?” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2009, 85.

  2. “Kino Tokutani Lisusu,” Liahona, sanza ya Mitano 2009, 113–14.

  3. “Nini Nasali mpo na Moto Moko Lelo?” 86, 87.

  4. “Libiangi ya Mobikisi mpo na Kosalisa,” Liahona, Sanza ya mwambe. 2012, 5.

  5. “Tala Basusu lokola Bakoki Kobongwana,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 68.

  6. “Bolingi mpe Bolongobani mpo na Kosalisa,” Liahona, ya Sanza ya mitano 2012, 69.

  7. Teaching, No Greater Call: A Resource Guide for Gospel Teaching (1999), 12

Liteya uta na Etinda Oyo

“Soki ozali na bolingo lokola ya Klisto, okozala ya kolengelama malamu mingi mpo na koteya nsango malamu. Okofulama mpo na kosalisa basusu koyeba Mobikisi mpe kolanda Ye.”7 Yeba kosambela ete bolingani ebakisama mpo na baye bokei kotala. Lokola bokolisi bolingo lokola ya Klisto mpo na bango, bakokoka malamu mingi kosalisa Nkolo mpe baoyo bokoteya na banzela ya ntina mingi.

Bimisa na lokasa