2014
Misio ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mobateli Mpate Malamu
sánzá ya míbalé 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya Mibale 2014

Misio ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mobateli Mpate Malamu

Boyekola na losambo mateya oyo mpe boluka koyeba maye nini ya kosakola. Boni boni bososoli na biso ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na mateya ya batali? Mpo na nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Yesu Klisto, Mobateli mpate Malamu, ateyaki ete:

“Nani moto moko kati na bino azali na bampate monkama, mpe moko na bango abungi, akotika bango ntuku libwa na libwa kati na esobe, mpe akokende koluka oyo ebungi kino ekozwa ye yango te? …

“Nalobi na bino, ete…esengo ekozala kati na Lola mpo na mosumuki moko oyo ayamboli” (Luka 15:4, 7).

Ntango tokomi kososola ete Yesu Klisto azali Mobateli mpate Malamu, mposa na biso ekobakisama mpo na kolanda ndakisa na Ye mpe kosalisa baoyo bazali na bonsenga. Yesu alobaki ete:”Ngai nazali Mobateli mpate malamu, nayebi bampate na ngai mpe bayebi ngai. …Mpe nakotika bomoi na ngai mpo na bampate” (Yoane 10:14–15). Na ntina ya Bomikabi ya Klisto, moko kati na biso akobunga mokolo moko te ete tokoka te kozwa nzela na biso ya ndako (tala Luka15).

Mokambi Thomas S. Monson alobaki ete, “Ya biso ezali mokumba mpo na kolengela bibwele. … Ekoki biso moko na moko kobakisa likolo na kosalisa.”1

Uta na Makomi

Banzembo 23; Yisaya 40:11; Moziya 26:21

Uta na Mambi ma Biso ya Kala

Elizabeth Ann Whitney, oyo akendeki na likita ya yambo ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobelaki mbongwana na ye na 1830 ete: “Sikasikawa nayokaki Nsango malamu lokola Bampaka bateyaki yango, Nayebaki yango ezali mongongo ya Mobateli mpate Malamu.” Elizabeth alandaki mongongo ya Mobateli mpate malamu mpe azwaki libatisi mpe nkotisa.

Biso mpe tokoki koyoka mongongo ya Mobateli mpate malamu mpe kokabola mateya elongo na basusu. Mokambi Monson alobaki ete, “Tozali maboko ya Nkolo awa likolo na mabele, elongo na etinda mpo na kosalisa mpe kotombola bana na Ye.”3

Kaka lokola mobateli mpate alukaka mpate ebunga, baboti bakoki koluka mwana oyo azali kotelengana. Mokambi James E. Faust (1920–2007), Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo, alobaki: “Na baboti babukana mitema oyo bazali na bosembo, na etingia mpe na losambo na koteyaka bana bazanga botosi, tolobi na bino, Mobateli mpate malamu azali kosenzela likolo na bango. Nzambe ayebi mpe asosoli bozindo ya mawa na bino. Elikya ezali.”4

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Heavenly Homes, Forever Families,” Liahona, Sanza ya motoba 2006, 70.

  2. Elizabeth Ann Whitney, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 128.

  3. Thomas S. Monson, “Nini Esalaki Ngai mpo na Moto Moko Lelo?” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2009, 86.

  4. James E. Faust, “Dear Are the Sheep That Have Wandered,” Liahona, ya Sanza ya Mitano 2003, 68.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Boni kozwa boyebi ete Mobikisi azali Mobateli mpate malamu amemaka kimia kati na bomoi na biso?

  2. Na banzela nini tokoki kosala mpo na baoyo “babunga” uta na kozala ngwi na Eklezia to baoyo bazali na bondimi moko na biso te?

  3. Boni Nakoki kosunga baboti oyo bazali na bana kotelengana uta na botosi nsango malamu?

Bimisa na lokasa