2014
Ekoki Ngai Kosepela na Mosala ya Kobakisaka Bankombo?
Sanza ya Motoba 2014


Bilenge

Ekoki Ngai Kosepela na Mosala ya Kobakisa Bankombo?

Mokomi avandi na Veracruz, Mexico.

Nasanganaki na moango oyo esalemaki na likonzi na biso ya kobakisa bankombo 50,000. Na ebandeli ezalaki mpasi. Na mabaku mingi liboke ya bankombo batindaki na Interneti ezalaki mpasi mpo na kotanga, mpe mbala mosusu nalingaki kozongisa yango mpe nazwa moko mosusu ekeseni. Kasi sima namonaki ete soki bato nyonso bakanisaki lolenge wana, maboke wana ekotikala kino nsuka. Nakoki kokanisa milongo ya bato kozelaka na mokili ya molimo, mpe nakanaki kokoba na komekaka kotanga bankombo wana mpe kokoma yango na kozangaka kosala libunga.

Nayekolaki kozala na bolingo mpo na bato wana. Nasosolaki ete bazalaki ya solo na bonsenga ya lisalisi, mpe biso mpe lokola tozalaki na bonsenga ya lisungi kowutaka na bango. Nayaki kososola malamu na sima ete moango ya bobongi nie ya Tata na Lola eponaka bilongi ya bato te. Ntango tolandi bofuli mpe malako ya bakambi oyo Ye aponi, tokotatola ngolu mpe bolingo na Ye ya suka te.

Kobakisa bankombo ekoma mpo na ngai mosala oyo nalingaka mingi. Nayekolaki kotuya mpe kolinga makambo mingi mpo na oyo etali mambi ma kala ya libota. Nazwaki mpe lisusu makabo ya motuya monene uta na Nkolo na biso na kotosaka ata eloko moko ya pete lokola kosangana na bato kosalaka mosala ya kobakisa bankombo.

Bimisa na lokasa