2014
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mosali
Sanza ya Motoba 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Motoba 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mosali

Boyekola na losambo mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kosakola. Boniboni bososoli na biso ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na mateya ya bamama batali? Mpo na nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Lokola tozali kosalisa basusu, tokomi balandi ya solo ya Yesu Klisto, oyo atikaki ndakisa mpo na biso. Mokambi Thomas S. Monson alobaki ete: “Tozingami na baoyo bazali na bonsenga. … Tozali maboko ya Nkolo awa na mabele, na etinda ya kosalisa mpe kotombola bana na Ye.”1

Linda K. Burton, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, ateyaki ete: “Na nzela ya kosala, moko na moko na biso akoki kokoma mingi lokola Mobikisi ntango tozali kosalela bana ya Nzambe. Mpo na kosalisa biso kosungana malamu, nalingi kopesa likanisi ete tokundola maloba minei: ‘Liboso tala, sima salisa.’ … Lokola tozali kosala bongo, tozali kobatela mayokani, mpe mosala na biso, lokola ya Mokambi Monson, ekozala elembo na biso ya kozala bayekoli.”2

Tokoki kosambela ntongo nyonso mpo na koyeba mabaku ya kosalisa basusu. “Tata na Lola akokamba yo, mpe baanzelu bakosalisa yo,” elobaki David L. Beck, mokambi monene ya Bilenge Mibali. “Okopesamela nguya ya kopambola babomoi mpe ya kobikisa milimo.”3

Uta na Makomi

Matai 20:25–28; 1 Nefi 11:27–28; 3 Nefi 28:18

Uta na Mambi ma Biso ya Kala

Na likita linene ya sanza ya zomi mobu 1856, Mokambi Brigham Young (1801–77) asakolaki ete bapionie bamemi ya makalo ya maboko bazalaki kokatisa esobe mpe ete moto nyonso azalaki kosunga na kobuka bilei mpo na bango na lombangu. Lucy Meserve Smith akomaki ete basi “balongolaki bilamba na bango ya kati [elamba ya se], basoseti mpe eloko nyonso bakokaki kopesa, kaka ntango wana na Tabelenakele, mpe kotia liboke [na yango] na kati ya wago.”

Lokola bapionie oyo babikaki babandaki kokoma na Salt Lake City, Lucy akomaki ete, “Naino nazwa esengo makasi…na mosala moko te nasala na bomoi na ngai, kasi mposa ya kosala malamu elekaki. Nasengelaki kaka kokende na magazini mpe koyebisa bosenga ya mayele na ngai, soki ezalaki elamba, etongamaki na yango ofele.”4

Mokambi George Albert Smith (1870–1951) alobaki na ntina ya kosalisaka basusu ete: “Esengo na biso ya seko ekozala engebene na nzela oyo tokomipesa biso moko mpo na kosalisaka basusu.5

Tala oyo

  1. Lolenge nini losambo ekoki kokamba biso kozala bisalelo na maboko ya Nkolo?

  2. Lolenge nini kosalela basusu esungi biso na kobatela mayokani na biso?

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Nini Esalaki Ngai mpo na Moto Moko Lelo?” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2009, 86.

  2. Linda K. Burton, Yambo Tala, Sima Salela” Liahona, Nov. 2012, 78, 80

  3. David L. Beck, “Mosala na Yo ya Bule Kosalisa,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 56.

  4. Lucy Meserve Smith, na Filles dans Mon Royaume: Lisolo mpe mosala ya Lingomba ya Bamama Basungi (2011), 171.

  5. George Albert Smith, na Filles dans Mon Royaume,77

Bimisa na lokasa