2014
Kotambwisa Mosala na Lombango.
Sanza ya Motoba 2014


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Motoba 2014

Kotambwisa Mosala na Lombangu

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Okoki kondima ete Eklezia oyo ezongisami lisusu ezalaki na mibu 98 yambo ezua makonzi 100? Kasi na mwa ntango moke koleka mibu 30 sima, Eklezia ebongisaka makonzi na yango 100 mpo na mbala ya mibale. Mpe bobele mibu mwambe nsima ete Eklezia ezuaki makonzi mingi koleka 300. Lelo tozali na makonzi mingi ya makasi koleka 3,000.

Mpona nini kokola oyo ezali kosalema na lolenge ya mbangu makasi? Ezali mpo ete toyebani malamu koleka mingi? Ezali mpo ete tozali na bandako ya losambo ya kitoko?

Biloko oyo ezali na motuya, kasi ntina Eklezia ezali kokola lelo ezali ete Nkolo alakisaki ete ekozala bongo. Na buku ya Doctrine et Alliances, Ye alobaki ete, “Botala, nakotambwisa mosala na ngai mbangu na ntango na yango.”1

Biso, lokola bana ya molimo ya Tata na biso na Lola, totindamaki na mabele na ngonga oyo ete tokoka kosala elongo na kotambwisaka mosala monene oyo na lombangu.

Nkolo atikala soki moke te, na boyebi na ngai, kolakisa ete mosala na Ye ezali mpe esukisami na bokufi. Nzokande, mosala na Ye elandisami kino na boseko. Nandimi ete Ye azali kotambwisa mosala na Ye na lombangu na mokili ya milimo. Nandimi mpe lisusu ete Nkolo, na nzela ya basali na Ye kuna, azali kolengelaka milimo mingi koyamba nsango elamu. Mosala na biso ezali koluka bakufi na biso mpe sima kokende na tempelo mpe kosala makuli ya bule oyo ekomemela baoyo bazali na ngambo mosusu ya elamba mabaku se moko oyo tozali na yango.

Mosantu ya Mikolo ya Nsuka nyonso ya malamu na mokili ya molimo azali na mosala, elobaki Mokambi Brigham Young (1801–77). “Basalaka nini kuna? Bazali koteya, koteya ntango nyonso mpe kolengela nzela mpo ete totambwisa na lombangu mosala na biso na kotongaka batempelo awa mpe bisika mosusu.”2

Sikawa, mosala ya mambi ma kala ya libota ezali pete te. Mpo na baoyo kati na bino uta na Scandinavia, nakaboli pasi na bino. Ndakisa, na molongo/monkoloto na ngai ya Swede, nkombo ya koko na ngai ya mobali ezalaki Nels Monson; nkombo ya tata na ye ezalaki Monson te kasi Mons Okeson. Nkombo ya tata ya Mons ezalaki Oke Pederson, mpe nkombo ya tata na ye ezalaki Peter Monson—kozongaka lisusu nsima na Monson.

Nkolo azali kozela ete yo mpe ngai tosala mosala na biso ya mambi ma kala ya libota malamu. Nabanzi eloko ya liboso oyo tosengeli kosala soki tosengeli kosala mosala na biso malamu ezali kozala na Molimo ya Tata na biso na Lola elongo na biso. Ntango totambwisi bomoi na lolenge ya sembo lokola toyebi lolenge ya kozala, Akofungola nzela mpo na kokokisa mapamboli oyo tozali koluka na kosala makasi mpe na etingya.

Tokosala mabunga, kasi moko te kati na biso akoki kokoma nganga mayele na mosala ya mambi ma kala ya libota soki yambo azalaki moyekoli te. Tala ntina, tosengeli komikotisa kati na mosala oyo, mpe tosengeli komilengela mpo na komata ngomba. Oyo ezali mosala ya pete te, kasi Nkolo atiaka yango likolo na bino, mpe Ye atie yango likolo na ngai.

Lokola ozali kolanda mosala ya mambi ma kala ya libota, okomimona kokimaka na nzela ya kpokoso, mpe okomilobela, “Eloko mosusu nakoki kosala ezali te.” Ntango bokomi na esika wana, bokita na mabolongo na bino mpe senga Nkolo afungola nzela, mpe Akofungola nzela mpo na bino. Natatoli ete oyo ezali ya solo.

Tata na Lola alingaka bana na Ye na mokili ya molimo mingi kaka lokola Alingaka yo mpe ngai. Na kotalaka mosala ya kobikisa bakufi na biso, Profeta Joseph Smith alobaki, “Mpe sikawa lokola ntina minene ya Nzambe ezali kokende mbangu mpo na kokokisama, mpe makambo elobama na ba Profeta ezali kokokisama, lokola bokonzi na Nzambe etiami na mabele, mpe molongo ya kala ya makambo ya kala ezongisami, Nkolo amonisi epai na biso mokumba mpe litomba oyo.3

Na kotalaka bankoko na biso baoyo baleka na kozanga koyeba Nsango malamu, Mokambi Joseph F. Smith (1838–1918) alobaki ete, “Na nzela ya bokasi na biso mpo na bango minyololo ya bowumbu na bango ekokweya, mpe molili oyo ezingaka bango ekokima, ete pole ekoka kongenga likolo na bango mpe bakoka koyoka na mokili ya milimo nsango ya misala oyo esalami mpo na bango na bana na bango awa, mpe bakosepela elongo na bino na kokokisaka mikumba oyo. 4

Ezali bankoto likolo ya bankoto ya bana ya milimo ya Tata na Biso na Lola oyo bayoka ata mokolo moko te nkombo ya Klisto liboso bakufa mpe bakende na kati ya mokili ya molimo. Kasi sikawa bazali koteyama nsango malamu mpe bazali kozelaka mokolo bino na Ngai tokosala boluki-luki esengeli mpo na kosembola nzela ete tokoka kokende na kati ya ndako ya Nkolo mpe kosalela bango mosala oyo bakoki kosala bango moko te.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, natatoli ete Nkolo akopambola biso soki tondimi mpe tokei na momekano oyo.

Koteya uta na Etinda Oyo

Kanisa lisolo moko ya kitoko kowuta na mambi ma kala ya libota na yo mpe kabola lisolo yango na baoyo ozali kotala. Okoki kolinga kosalela mituna na eteni ya bana ya Etinda ya Bakambi ya Yambo (lokasa 6) mpo na kolendisa baoyo ozali kotala kokabola masolo na bango. Tala boni kotanga litangi Doctrines et Alliances 128:15 mpe kosololaka na ntina ya kosala ya makuli ya tempelo na nkombo ya bankoko na biso.

Matangi

  • Doctrine et Alliances 88:63.

  • Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Brigham Young (1997), 280.

  • Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 409.

  • Mateya ma Bakambi ba Eklezia: Joseph F. Smith (1998), 247.

Bimisa na lokasa