2014
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Molobeli
sánzá ya nsambo 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Sambo 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Molobeli

Boyekola na losambo mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kosakola. Boniboni bososoli ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Yesu Klisto azali Molobeli na biso epai ya Tata. Liloba molobeli oyo ewuti na Latin elingi koloba “oyo azali koloba mpo na mosusu.”1 Mobikisi alobaka mpo na biso, kosalelaka bososoli, boyengebene, mpe mawa. Koyebaka yango ekoki kotondisa bino na bolingo mpe botondi mpo na Bomikabi na Ye.

“Boyoka [Yesu Klisto] oyo azali molobeli epai ya Tata, oyo azali kolobela likambo na bino liboso na Ye—

“Kolobaka: Tata, tala mpasi mpe liwa na ye oyo asalaki lisumu te, na oyo osepelaki mpenza; tala makila ya Mwana na yo oyo esopanaki, makila na ye oyo opesaki ete yomei okoka kokembelama;

“Yango wana, Tata, batela baye bandeko na ngai oyo bandimi na nkombo na ngai, ete bakoka koya epai na ngai mpe bazua bomoi ya libela” (D&C 45:3–5).

Mpo na ntina ya Klisto lokola Molobeli na biso, Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Babale alobaki: “Soki ezali na ntina monene mpo na ngai, ete nakoka na ntango nionso mpe na esika nionso kobelama na nzela ya losambo na ngbende ya ngolu, ete Tata na ngai na Lola ayoka bonsenga na ngai, ete Molobeli na ngai, ye oyo asumukaki te, oyo ya ye makila esopakani, akolobela ngai likambo na ngai.”2

Uta na Makomi

Mosiya 15:8–9; Moroni 7:28; Doctrine et Alliances 29:5; 110:4

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Epai nyonso kati na mambi ma kala ya Eklezia ya Nkolo, bayekoli ya basi ya Yesu Klisto balandaki ndakisa na Ye. Esetele azalaki molobeli ya botongono mpe ya mpiko. Ndeko na ye Moledekai atindelaki ye lokasa moko ya mobeko ya mokonzi ete Bayuda basengelaki kobebisama, mpe atindaki ye “kosala bonsenga liboso ya [mokonzi] mpo na bato na ye.” Abakisaki ete: “Mpe nani ayebi soki oyaki na bokonzi mpo na ntango ya lolenge oyo?” (Esetele 4:8, 14.)

Atako likama ya kozala molobeli mpo na bato na ye, Esetele andimaki: “Boye nakokende epai ya mokonzi, oyo ezali engebene na mobeko te: mpe soki nakowa, nawa” (Esetele 4:16).

Nsima Esetele alobaki na bomikitisi na mokonzi mpe “akweyaki na makolo na ye, mpe abondelaki ye na mpizoli … abongola mokanda … mpo na kobebisama ya Bayuda.” Abakisaki ete, “Boniboni nakoki kondima kobebisama ya bandeko na ngai?” (tala Esetele 8:3, 5–6). Motema ya mokonzi elembisamaki, mpe andimaki bonsenga na ye.3

Matangi

  1. Tala Russell M. Nelson, “Jesus Christ—Our Master and More” (Brigham Young University fireside, Feb. 2, 1992), 4; speeches.byu.edu.

  2. D. Todd Christofferson, “I Know in Whom I Have Trusted,” Ensign, May 1993, 83.

  3. Tala lisusuDaughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 51.

Bomaniola oyo.

Boniboni kimolobeli ya Yesu Klisto ekoki kofula biso mpo na kopesa mawa mpe bolimbisi na bato basusu?

Bimisa na lokasa