2014
Elaka ya Kobalola Mitema
sánzá ya nsambo 2014


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Sambo 2014

Elaka ya Kobalola Mitema

Elilingi
Mokambi Henry B. Eyring

Mama na ngai, Mildred Bennion Eyring, akolaki na lingomba ya balondi bilanga ya Granger, Utah, Etazini ya Amerika. Moko ya bandeko na ye ya mibali, Roy, balandaki mombongo ya libota ya kobokola bameme. Lokola elenge mobali abandaki kolekisa baposo mingi mosika ya ndako. Wana ezalaki ntango koleka akomaki na bolembu kati na Eklezia. Na nsuka akendeki na Idaho, USA, abalaki, mpe abotaki bana misato. Akufaki na mibu 34 ntango mwasi na ye azalaki na mibu 28 mpe bana na bango bazalaki mike mike.

Atako libota ya moke ya Roy ezalaki na Idaho mpe mama na ngai akenda mosika penepene na bakilometele 4,025 na New Jersey, USA, mbala na mbala azalaki kokomela bango mikanda ya bolingo mpe ya bolendisi. Libota ya noko na ngai elobelaka mama na ngai na bolingo kobengaka ye “Tata mwasi Mid.”

Mibu milekaki, mpe mokolo moko nazwaki mbela na telefone uta na moko ya bandeko na ngai. Ayebisaki ngai ete mwasi mokufeli ya Roy akufaki. Ndeko na ngai alobaki, “Tata mwasi Mid alingaki oyeba yango.” Tata mwasi Mid akufa kala, kasi libota ezali kaka koyoka bolingo na ye, mpe basepelaki koyebisa ngai.

Natutisamaki na lolenge boni mama na ngai asalaki mosala na libota na ye oyo ekokani na mosala baprofeta ya Banefi basalaki na mabota na bango na kotikalaka penepene na bandeko oyo balingaki komema na nsango malamu ya Yesu Klisto. Nefi akomaki likundoli moko oyo alikiaki ete ekosalisa bana ya bandeko na ye ya mibali kozonga na bondimi ya tata na bango, Lehi. Bana babali ya Moziya balakisaki bolingo se moko wana ntango bateyaki nsango malamu na bakitani ya Lehi.

Nkolo apesi banzela mingi mpo ete tokoka koyoka bolingo oyo ekokoba kozala ya libela kati na mabota na biso. Bilenge na Eklezia lelo bazali koyoka mitema na bango kobaluka epai ya mabota na bango. Bazali koluka bankombo ya bato ya libota oyo bazwaki libaku ya kozwa makuli ma lobiko na bomoi oyo te. Bakomema bankombo wana na tempelo. Ntango bakoti na mayi ya libatisi, bazali na libaku ya koyoka bolingo ya Nkolo mpe ya bato ya libota mpo na bango oyo bazali kosalela makuli ma bozweli.

Nakoki komikundola bolingo kati na mongongo ya ndeko na ngai oyo abengaki mpe alobaki, “Mama na biso akufaki mpe Tata mwasi Mid alingi oyeba yango.”

Baoyo kati na bino basala makuli mpo na bato ya libota bazali kosalisa na bolingo, lokola bana ya Moziya mpe profeta Nefi basalaki. Lokola bango, bokoyoka esengo mpo na baoyo bandimi libonza na bino. Bokoki lisusu kozela ete boyoka bosepeli monene boye lokola Amona, oyo alobaki mpo na mosala na ye lokola misionele o ntei ya bato ya libota oyo bazali mosika:

“Yango wana, tokembela, iyo, tokokembela kati na Nkolo; iyo, tokosepela, mpo bosepeli na biso ezali ya kotonda; iyo, tokosanzola Nzambe na biso mpo na libela. Tala, nani akoki kokembela mingi mpenza kati na Nkolo? Iyo, nani akoki koloba mingi mpenza na ntina ya nguya monene na ye, mpe na ntina ya mawa na ye, mpe na ntina ya motema molai na ye mpo na bana ya bato? Tala, nalobi epai na bino, nakoki kolobela eteni eleki moke ya oyo nazali koyoka te” (Alma 26:16).

Natatoli ete mayoki ma bolingo bozali na yango mpo na bato ya libota na bino — ezala esika wapi bakoki kozala— ezali bokokisi ya elaka ete Eliya akoya. Asilaki koya. Mitema ya bana ezali kobaluka epai ya batata na bango, mpe mitema ya batata ezali kobaluka epai ya bana na bango (tala Malaki 4:5–6; Joseph Smith—History 1:38–39). Ntango boyoki mposa makasi ya koluka bankombo ya bankoko na bino mpe komema bankombo wana na tempelo, bozali koyoka bokokisi ya lisakoli wana.

Ezali lipamboli ya kozala na bomoi na ntango elaka ya kobalola mitema ezali kokokisama. Mildred Bennion Eyring ayokaki mposa makasi na motema na ye. Alingaki libota ya ndeko na ye ya mobali, mpe asalisaki bango. Bayokaki mitema na bango kobaluka na bolingo epai ya Tata mwasi Mid mpo alingaki bango.

Koteya uta na Etinda Oyo

Bokoki kolinga kotanga masakoli etali molimo ya Eliya elongo na baye bokendaka kotala (tala Malaki 4:5–6; Joseph Smith—History 1:38–39). Bosolola mpo na banzela ya komipesa na mosala ya mambi ma kala ya libota, kotangaka mpe bisalelo lokola kokotisa nkombo, bilili, mpe kokoma na internet. Soki baoyo bokendaka kotala bamesani na yango te FamilySearch.org, bokanisa kozwa mwa ntango mpo na kolakisa yango na bango.

Bimisa na lokasa