2014
Koyekola Koyeba Nkoko na Ngai ya Mwasi
sánzá ya nsambo 2014


Bilenge

Koyekola Koyeba Nkoko na Ngai ya Mwasi

Mokomi afandi sikawa na Virginia, Etazini ya Amerika.

Mpo na kokokisa moko ya miango na ngai lokola Elenge Mwasi, namipesaki mpo na kosalisa nkoko na ngai ya mwasi koyeba bankoko na ye na kolukaka na nkasa ya microfilm na centre ya mambi ma kala ya libota na Mesa, Arizona, Etazini ya Amerika. Lokola tofandaki moko na mopanzi ya mosusu mpe tolukaki libota na biso, nabandaki komituna: “Eyebi ngai ya mingi mpenza na ntina ya nkoko na ngai ya mwasi oyo afandi na mopanzi na ngai?”

Tokutaki bato mingi ya libota, tobongisaki bansango na bango, mpe tokendeki na Tempelo ya Mesa na Arizona mpo na kosala mabatisi mpe nkotisa na bango. Kala mingi te nsima, nkoko na ngai ya mwasi apesaki ngai liboke ya mambi ma kala ya libota na ye.

Lokola azali kobela maladi ya mikuwa, ezali mpasi mingi mpo na nkoko na ngai ya mwasi kobeta masini. Nasepelaka kosalisa ye na ordinateur. Elongo, tokomaki mambi ma kala ya bomoi na ye mpo na litomba ya molimo ya libota na biso. Nalingaka kozala eteni ya bomoi na ye mpe koyekola mingi mpenza mpo na oyo etali mambi ma kala ya Eklezia ntango tozali kosala elongo na miango oyo.

Bimisa na lokasa